Tozali komonisa elimo ya motindo nini?
1 Paulo asukisaki nkoma na ye na lisangá ya Bafilipi na elendiseli oyo: “Ngɔlu ya Nkolo Yesu Klisto ezala na elimo oyo bozali komonisa!” (Filp. 4:23, NW) Akumisaki Bafilipi mpo bazalaki kosepela mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu, bazalaki mɔ́tɔ mpe bazalaki komibanzabanza na bolingo nyonso bamoko mpo na ntina na bamosusu.—Filp. 1:3-5; 4:15, 16.
2 Tosengeli kozala na mposa ya komonisa elimo ya motindo moko kati na lisangá na biso. Soki bato nyonso bazali na molende, bazali komonisa boboto mpe bazali bayambi bapaya, elimo moko ezali kobotama oyo bato bazali kotala biso bazali komona yango. Elimo ya kokende liboso mpe etondi na bolingo ezali kolendisa bomoko mpe bokoli ya elimo. (1 Kol. 1:10) Elimo ya kozonga nsima ebotaka kolɛmba kati na motema mpe mpiɔ kati na mosala.—Emon. 3:15, 16.
3 Bankulutu bazali kopesa ndakisa: Bankulutu bazali na mokumba ya kobatela kati na bango, mpe kati na lisangá, elimo malamu ya kokende liboso. Mpo na nini? Mpamba te ezaleli na bango mpe elimo na bango ezali na bopusi likoló na lisangá. Tozali kosepela na kozala na bankulutu oyo bazali kosangana na molende kati na mosala ya kosakola, oyo bazali koyamba biso na komungamunga to mwa kosɛka mpe liloba moko ya bonkonde, mpe baoyo bazali kopesa batoli ya botongi mpe ya kolendisa, ezala na nkuku to na likoló ya ebaelo.—Ebe. 13:7.
4 Ya solo, biso nyonso tosengeli kopesa lisungi na biso mpo ete lisangá ezala na boninga, na ezaleli ya boyambi bapaya, na molende mpe na elimo ya malamu. Moko moko na biso akoki komimonisa na mɔ́tɔ mpe kotonda na bolingo mpo na boyokani na ye elongo na basusu. (1 Kol. 16:14) Kati na biso esengeli kozala te na bokabwani oyo bosalemi mpo na mbula ya kobotama, na lomposo ya nzoto, na nivo ya boyekoli to na oyo etali mosolo. (Talá Baefese 2:21.) Elikya na biso epesi biso nzela na komonisa elimo ya esengo, ya boyambi bapaya mpe na molende kati na mosala ya kosakola. Lom. 12:13; Kols. 3:22, 23.
5 Baoyo nyonso bazali kosangana na biso, bakisa bato oyo bazali kosepela na solo uta kala mingi te, basengeli komiyoka ete bazali bayei malamu kati na libota ya bandeko mpe kososola ete bolingo mpe bizaleli ya bato na Nzambe ezali kosala mosala. Na kosakoláká mpe na komonisáká bizaleli kitoko ya boklisto, tozali komonisa ete lisangá ezali ‘likonzí mpe etɛmiselo ya solo.’ (1 Tim. 3:15) Tozali mpe na libateli kati na elimo na lisalisi ya “kimya na Nzambe” oyo ezali kobatela mitema na biso mpe bikaniselo na biso. (Filp. 4:6, 7) Tiká ete biso nyonso tósala makasi na komonisa elimo oyo ekopesa biso likoki ya kozwa ngɔlu na Yehova, na nzela ya Nkolo Yesu Klisto!—2 Tim. 4:22.