Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka
1 Yehova Nzambe azali kopambola lisangá na ye awa na mabelé na kokolisáká yango ntango nyonso. Na mokili mobimba, na mbula ya mosala oyo euti koleka, bato 375 923 bazwaki batisimo—mwayene ya bayekoli ya sika koleka 1 000 bazali kobakisama mokolo na mokolo, to pene na bato 43 na ngonga mokomoko! Na bisika ndenge na ndenge na mokili, atako bandeko na biso bazali kokutana na mikakatano na boumeli ya bambula, kasi mosala ya Bokonzi ezali kofuluka mpe bokoli monene ezali komonana. Ezali likambo ya esengo mpenza komona lolenge mosala ya kopalanganisa nsango malamu ezali kokola na mokili mobimba!
2 Na boumeli ya mbula ya mosala oyo euti koleka, na Burundi, na Congo-Brazzaville mpe na Congo-Kinshasa, motángo ya babongisi-nzela basungi, ya babuku, ya mwa babuku mpe ya bazulunalo oyo tokabolaki emataki mpenza. Motángo ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe emataki. Ezalaki boni mpo na bato oyo toyekolaka na bango Biblia? Motángo na bango nyonso ekitaki na bato minei likoló na monkama na mboka Burundi mpe na bato 10 likoló na monkama na Congo-Brazzaville kasi na Congo-Kinshasa, motángo yango emataki kino bato 14 likoló na monkama. Boyekoli ya Biblia ezali moboko mpenza ya mosala na biso ya kozalisa bayekoli. Na bongo, mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo ete motángo ya bato oyo bazali koyekola Biblia ekita te?
3 Tókolisa mposa ya koyekola Biblia na bato: Biso moko tosengeli komona ntina ya komipesa mpo na kozala makasi mpe na molende na elimo. Bayekoli ya solo ya Yesu bazalaka “na molende mpo na misala malamu.” (Tito 2:14, NW) Soki moto na moto ataleli mosala na ye, biso banso tokoki koloba ete tozali mpenza na mposa ya kolandela bosepeli nyonso oyo bato bamonisaka na kozwáká mikanda na mosala ya kosakola? Tomonisaka mpenza bosepeli mpo na kosɛnga koyekola Biblia na bato nyonso oyo bayambaka malamu nsango na biso? (Lom. 12:11) To tosengeli kokolisa mpenza mposa na biso ya kosala bozongeli ya sika mpe kobanda boyekoli ya Biblia, boye te?
4 Botángi ya Biblia moto na moto, koyangana mbala na mbala na makita, mpe koyekola mikanda oyo mikolimbolaka Biblia ekosalisa biso ete tózala makasi na elimo mpe tótonda na nguya ya elimo ya Nzambe. (Ef. 3:16-19) Yango ekolendisa kondima na biso, elikya na biso epai na Yehova mpe bolingo na biso mpo na bazalani. Tokopusama mpo na koteya basusu solo; na bongo, tokosepela na mosala na biso, tokolonga mpe tokolendisama mpo na kosala lisusu mingi koleka. Ɛɛ, tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka!
5 Libosoliboso tóyekola na bato ya ndako na biso: Baboti oyo bazali baklisto basengeli komibanzabanza mpo na kotosa manaka na bango ya boyekoli ya Biblia na libota. (Det. 31:12; Nz. 148:12, 13; Mas. 22:6) Baboti bakozwa matomba mpenza soki bayekoli na bana na bango, mwa buku Azali kosɛnga mpe na nsima buku Boyebi mpo na kobongisa bango ete bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te mpe bámipesa mpe bázwa batisimo. Solo, ezali mabe te ete baboti bákoka kotalela mateya mosusu elongo na mwana oyo mbula na ye mpe ezalela na ye mpenza esɛngi bongo. Moboti oyo azali koyekola Biblia na mwana na ye oyo azwi naino batisimo te akoki kokoma ngonga oyo azali kosala na boyekoli yango, na lapolo na ye ya mosala ya kosakola mpe kotánga bozongeli ya sika mpe boyekoli, lokola yango elobelami na Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1987.
6 Bongisá manaka na yo moko: Na kotaleláká motángo ya bazulunalo, ya mwa babuku, mpe ya babuku oyo ezali kokabolama, ntembe ezali te ete mbuma mingi esili kopalanganisama. Mateya yango ya solo mazali lokola mbuma oyo elonami mpe oyo bozali kolikya ete ekobimisa bayekoli ya sika mingi. Kasi moloni bilanga akoki mpenza kosepela soki abuki mbuma te na mosala oyo ye alekisaki ntango mingi mpo na kolona mbuma mpe kosala milende nyonso mpo na kokolisa yango? Akosepela soko moke te. Lolenge moko, ezali mpenza na ntina ete tólandelaka bosepeli na mosala ya kosakola.
7 Ozalaka na ntango ya sikisiki na manaka na yo mpo na kosala bozongeli ya sika mbala na mbala? Koumela te mpo na kosala bozongeli ya sika epai na moto nyonso oyo amonisi bosepeli. Salá bozongeli ya sika na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Obongisaka mosala na yo malamu mpenza na kozaláká na karnɛ ya malamu, oyo ezali na nkombo ya bato ya sika oyo osengeli kozongela? Nsima ya kokoma nkombo mpe adresi ya molobani na yo, kobosana te kokoma dati ya mokolo ya liboso oyo bosololaki, mokanda oyo otikelaki ye, mpe motó na likambo ya lisolo, mpe likambo oyo bokosolola na mbala ya nsima. Tiká mpe esika na karnɛ na yo mpo ete okomaka, nsima ya bozongeli nyonso ya sika, makambo mosusu oyo okomona ete osengeli kobakisa.
8 Malako mpo na kosala bozongeli ya sika: Wapi mwa malako okoki kosalela ntango ozali kosala bozongeli ya sika epai na moto oyo amonisaki bosepeli? (1) Zalá na mɔ́tɔ, na boninga, na nsai, mpe na maloba mabongi na lisolo. (2) Lobelá masolo to makambo oyo mazali kosepelisa moto yango. (3) Zalá na elobeli ya pɛtɛɛ, ya kosepelisa, mpe salelá Makomami. (4) Na bozongeli nyonso, salá makasi ete oteya molobani na yo likambo moko oyo akomona ete ezali mpenza na ntina na bomoi na ye. (5) Lamwisá mposa na ye mpo na motó na likambo oyo bokosolola na mbala ya nsima. (6) Koumela ntango molai te. (7) Kotuna moto yango mituna oyo mikotungisa ye te to oyo mikotya ye na nkaka te. (8) Zalá na bososoli mpo ete okweisa te makanisi mabe to mimeseno mabe ya molobani na yo liboso ete akolisa mpenza botɔ́ndi na ye na makambo ya elimo.—Talá siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1997 mpo na malako mosusu likoló na lolenge ya kosala malamu bozongeli ya sika mpe kobanda boyekoli ya Biblia.
9 Tósalela mabaku nyonso: Na lisangá moko, bandeko bazwaki likoki ya koyeba nkombo mpe nimero ya eteni ya ndako ya bafandi nyonso ya ndako moko oyo bazalaki kokɛngɛla yango makasi. Batindaki nkomá na batrakte mibale epai na mofandi mokomoko ya ndako yango. Na nsuka ya nkomá yango, basɛngaki boyekoli ya Biblia mpe batyaki nimero ya telefone mpo ete moto oyo akosepela ayanola na nkomá yango. Mwa mikolo na nsima, elenge mobali moko asɛngaki boyekoli ya Biblia. Na mokolo oyo elandaki, bazongaki kotala elenge mobali yango mpe babandaki boyekoli ya Biblia na lisalisi ya buku Boyebi. Na mpokwa yango, ayanganaki na boyekoli ya mokanda, mpe akobaki koyangana na makita nyonso. Bobele na ntango yango, abandaki kotánga Biblia mokolo na mokolo. Akolaki na lombangu mpenza na elimo mpe azwaki batisimo.
10 Basakoli babimaki mosala ya kosakola na motuka moko mpe bamibongisaki mpo na kosala elongo bozongeli ya sika. Moto oyo moko na bandeko basi yango mibale alingaki kozongela kotala azalaki te, kasi mwana mwasi moko afungolaki ekuke mpe alobaki na ye ete: “Nazalaki kozela bino.” Moto moko oyo ayebanaki na ye apesaki ye buku Boyebi. Na ntango bandeko basi bayaki kotala ye, asilaki kotánga buku yango mbala mibale mpe asepelaki mingi koleka na makambo oyo mazalaki kati na yango. Alobaki ete akamwaki te na komonáká Batatoli bayei kotala ye mokolo wana mpamba te abondelaki Nzambe mpo atinda bango báya koyekolisa ye Biblia. Babandaki boyekoli, akómaki koyangana na makita ya lisangá mpe akolaki noki na elimo.
11 Ndeko mwasi moko, oyo azwá batisimo esili koleka mbula pene na 25, autaki kopesa mama na ye buku Boyebi. Mama yango, oyo azalaki mosangani ya lingomba moko, abandaki kotánga buku yango. Nsima ya kosilisa kotánga mikapo mibale, asololaki na mwana na ye ya mwasi na telefone, mpe likambo ya kokamwa mpo na ndeko na biso ya mwasi, mama na ye alobaki ete: “Ngai mpe nalingi kokóma Motatoli ya Yehova!” Mama yango abandaki koyekola Biblia mpe sikawa asili kozwa batisimo.
12 Tómeka maloba oyo malandi mpo na kobanda lisolo: Osilá kosɛnga polele na moto moko ete olingi koyekola na ye Biblia? Okoki koloba bobele boye: “Soki olingi koyekola Biblia kozanga kofuta mbongo, nakoki komonisa yo na boumeli ya mwa miniti lolenge yango esalemaka. Soki osepeli na yango, tokoki kokoba.” Soki tosaleli lolenge yango, tokomona ete bato mingi bazali kokakatana te mpo na kondima kozwa mokanda mpe kolanda ndenge tokolakisa boyekoli ya Biblia.
13 Na ebandeli mpenza ya boyekoli, monisá na moyekoli lolenge akoki kobongisa boyekoli liboso na kotángáká Makomami oyo mayebisami mpe na kokatáká mɔkɔlɔtɔ na maloba ya ntina mpo na koyanola na mituna oyo mizali na nse ya lokasa. Obenda likebi bobele na makambo ya ntina. Atako ntango tobandi koyekola Biblia na moto tosengeli komonisa ete tozali bato ya makambo makasi te, ezali na ntina ete boyekoli yango esalemaka mbala na mbala. Yebá lolenge nini okokɔtisa libondeli mpamba te yango ezali likambo ya ntina kati na boyekoli, mpe lolenge okosalela Makomami mpo na kobongisa moyekoli liboso na botɛmɛli. Na nyonso wana, salá ete boyekoli ezala na esengo mpenza.
14 Ya solo, bayekoli nyonso bakolaka ndenge moko te. Bamoko basepelaka te na makambo ya elimo lokola bamosusu to basimbaka noki te makambo oyo bazali koyekola lokola bamosusu. Bamoko bazali na makambo mingi ya kosala na bomoi mpe bakoki kozala na ntango mingi te mpo na koyekola mokapo mobimba pɔsɔ na pɔsɔ. Na yango, na mabaku mosusu, ekoki kozala malamu koyekola na bango koleka mbala moko na pɔsɔ mpo na kosilisa mikapo mwa mingi mpe kobakisa mwa basanza mpo na kosilisa buku. Na bantango mosusu, mpo ete moyekoli akola, tokoki koyekola liboso mwa buku Azali kosɛnga mpe na nsima buku Boyebi; nde mpo na bayekoli mosusu, ekoki kozala malamu ete báyekola mwa buku Azali kosɛnga ata soki basilisi boyekoli ya buku Boyebi. Koyangana na makita ya lisangá, elongo na moyekoli yango, ekosalisa ye ete azala na moboko makasi kati na solo.
15 Na nyonso wana, obondelaka mpo na kobanda boyekoli ya Biblia! (1 Yoa. 3:22) Moko na mbano monene koleka oyo moklisto akoki kozwa ezali bongo kosalelama na Yehova mpo na kosalisa moto akóma moyekoli ya Yesu Klisto. (Mis. 20:35; 1 Kol. 3:6-9; 1 Tes. 2:8) Sikawa ezali ntango ya komonisa molende mingi na mosala ya koyekola Biblia na bato, komindimisáká ete Yehova akosopa mapamboli na ye na milende na biso mpo ete tóyekola Biblia na bato mingi koleka!
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Obondelaka mpo na kobanda koyekola Biblia na moto moko?