Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
1. Mpo na nini kozongela kotala bato ezali na ntina mingi?
1 Yesu atindaki bayekoli na ye básakola kaka te kasi mpe ‘bákomisa bato bayekoli . . . , bateyaka bango.’ (Mat. 28:19, 20) Mosakoli apesaka litatoli, kasi moteyi asukaka wana te. Alakisaka, alimbolaka, mpe apesaka bilembeteli. Moko ya nzela oyo toteyaka bato ezali ya kozongela baoyo bamonisi mposa ya solo, mpo tóbanda koyekola na bango Biblia.
2. Tosengeli kozongela banani?
2 Osengeli kozongela kotala bato ya lolenge nini? Salá nyonso ozongela kotala moto nyonso oyo andimaki kozwa mokanda to moto oyo amonisaki ata mposa ya moke na nsango malamu. Soki na ntango ozali kosakola na esika ya bato ebele okutani na moto oyo amonisi mposa, salá nyonso ozwa adresi to nimero ya telefone na ye mpo okoka kolandela mposa oyo amonisaki. Zalá na elikya ete okobanda koyekola Biblia na bato. Kobá koluka baoyo bakondima koyekola Biblia, mpe okokutana na bango.—Mat. 10:11.
3, 4. Bozongeli ya malamu esɛngi tósala makambo nini?
3 Monisá ete omibanzabanzaka mpo na bato: Kobongisa bozongeli ya malamu ebandaka ntango okutani na moto mpo na mbala ya liboso. Basakoli oyo bameseni bazwaka noti ya makambo oyo esepelisaki moto yango, mpe basalelaka yango mpo na kobongisa makambo bakoloba ntango bakozonga kotala ye. Basakoli mosusu bamonaka malamu kotuna motuna ntango basilisi kosolola na moto yango mpo epesa ye mposa ete tózongela ye. Mpo tozali komibanzabanza mpo na bato, tokanisaka bango mingi ata nsima ya kokabwana na bango, mpe yango wana toumelaka te kozongela bango. Soki ekoki, meká kozongela ye ntango mposa na ye ezali naino makasi—ata mokolo oyo elandi to nsima ya mikolo mibale.
4 Ntango ozongeli moto, luká kobakisa makanisi na makambo oyo bosololaki mbala eleki. Zalá na mokano ya kosolola na ye ata na likambo moko na Biblia mbala nyonso, mpe yoká ye ntango azali koloba. Luká koyeba moto yango malamu. Na nsima, ntango okozonga lisusu, yebisá ye mateya ya solo ya Biblia oyo eyokani mpenza na bamposa na ye.
5. Lolenge nini ya pɛtɛɛ tokoki kosalela mpo na kobanda koyekola Biblia na bato?
5 Salelá mabaku nyonso mpo na kobanda boyekoli ya Biblia: Ntango ozali kozongela bato, zalá na mokano ya kobanda koyekola na bango Biblia. Ndenge nini okosala yango? Yebisá moto yango ete olingi kosolola na ye likambo moko ya ntina mingi, mpe lakisá ye paragrafe moko ya buku Boyebi to ya mwa buku Azali kosɛnga oyo okanisi ete akosepela na yango. Tangá paragrafe yango, tuná motuna ya paragrafe, mpe limbolá vɛrsɛ moko to baversɛ mibale ya paragrafe yango. Okoki kosala yango kaka na ntango otɛlɛmi liboso na ye; bokoki kosala miniti mitano to zomi. Sukisá na kotuna motuna ya paragrafe oyo elandi mpe zwá bibongiseli mpo na kokoba lisolo yango mokolo mosusu.
6. Ndenge nini tokoki komonisa ete toyebaka ntina ya kosala bozongeli ya sika?
6 Kolandela bato nyonso oyo bamonisaki mposa ezali na ntina mingi na mosala ya biso ya kosakola. Na yango, bongisá programɛ na yo ya pɔsɔ mpo na kosala bozongeli ya sika. Soki ozali kosala bongo, mosala na yo ya kosakola ekobota mbuma mingi mpe ekomemela yo esengo.