Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/98 lok. 7
  • Tópesa litatoli na kozaláká na etamboli malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tópesa litatoli na kozaláká na etamboli malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bilenge oyo bazali kongɛnga lokola miinda
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Etamboli oyo ezali komonisa mosala na biso ya boklisto kati na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 7/98 lok. 7

Tópesa litatoli na kozaláká na etamboli malamu

1 Lelo oyo, lokola bato bazali kotika nzela na makambo nyonso, bilenge mingi oyo bazali komibanzabanza te bazali kobebisa bomoi na bango na bilangwiseli, na makambo ya mbindo, na botomboki mpe na mobulu. Nzokande, etamboli malamu ya bilenge ya mpiko kati na lisangá ya boklisto esepelisaka bato mpe na ntembe te ezali mpenza eloko kitoko na miso ya Nzambe. Etamboli yango epesaka litatoli ya nguya oyo ekoki kobenda bato mosusu kati na solo.​—1 Pet. 2:12.

2 Makambo mingi oyo masalemi mazali komonisa ete etamboli malamu ya bilenge baklisto esili kopesa litatoli malamu epai na bato oyo batalaka bango. Kolobáká na ntina na mwanakelasi na ye moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova, molakisi mwasi moko alobaki liboso ya kelasi mobimba ete Nzambe ya elenge mwasi yango, Yehova, azali Nzambe ya solo. Alobaki bongo mpamba te elenge mwasi yango azalaki ntango nyonso na limemya. Molakisi mosusu atindaki nkoma na la Société na maloba oyo: “Nalingi kopesa bino longonya mpo na bilenge malamu oyo bozali na bango kati na lingomba na bino. . . . Bilenge na bino bazali mpenza ndakisa malamu. Batosaka bakóló, bazalaka na bonkonde mpe balataka na bopɔlɔ. Lisusu, bayebi Biblia na bango malamumalamu! Oyo wana mpenza lingomba!”

3 Molakisi mwasi moko akamwaki na etamboli malamu ya mwanakelasi na ye moko ya mibu nsambo, baboti na ye bazali Batatoli. Molakisi asepelaki na boboto mpe bolingo ya mwana yango, oyo ekeseneki na bana mosusu nyonso. Akamwaki na lolenge mwana yango azalaki kotalela bindimeli na ye lokola eloko ya lisɛki te, mpe amonaki ete azalaki komiyoka mabe te ete akeseni na basusu mpo na bindimeli na ye. Molakisi amonaki ete elenge yango azalaki na lisosoli oyo liteyami malamu mpe azalaki na likoki ya “kokabola kati na malamu mpe mabe.” (Ebe. 5:14) Na nsima, mama ya elenge yango akendaki kotala molakisi, mpe boyekoli ya Biblia ebandaki. Nsima ya mikolo, molakisi azwaki batisimo mpe nsukansuka akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza!

4 Elenge mobali moko abendamaki na etamboli malamu ya moklisto mwasi moko Motatoli ya Yehova ya eteyelo na ye. Motatoli yango akeseneki na banakelasi mosusu nyonso; azalaki na limemya mpenza, azalaki koyekola mingi, mpe azalaki ntango nyonso kolata na bopɔlɔ mpenza; lisusu, na bokeseni na bilenge basi mosusu, azalaki kobima na bilenge mibali soko moke te. Elenge mobali yango amonaki ete elenge mwasi wana azalaki kolanda mitinda ya Biblia na bomoi na ye. Atunaki ye mituna na ntina na bindimeli na ye, mpe makambo oyo ayekolaki esimbaki motema na ye. Abandaki koyekola Biblia, mpe aumelaki te kozwa batisimo, na nsima akómaki mobongisi nzela, mpe na nsima akómaki kosala na Betele.

5 Soki ozali elenge moklisto oyo azali na mposa ya kopesa litatoli malamu epai na basusu, sɛnzɛlá etamboli na yo na makambo nyonso. Komitika te kobebisama na mokili, ezala na bizaleli na yango, na makanisi na yango to na lolenge ya bomoi na yango. Zalá mpenza ndakisa malamu na maloba na yo, na molato na yo, na ekateli na yo ya nsuki, bobele ntango ozali na mosala ya kosakola mpe na makita te, kasi mpe na eteyelo to na ntango ya kominanola. (1 Tim. 4:12) Oyo nde esengo okozala na yango ntango moto moko asepeli na solo mpo ete ‘ongɛngisaki pole na yo’ na lisalisi ya etamboli na yo!​—Mat. 5:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto