Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/98 lok. 8
  • Nalingi kotambwisa boyekoli ya Biblia!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalingi kotambwisa boyekoli ya Biblia!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Lolenge ya kobanda boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Biblia eteyaka​—Buku ya liboso mpo na koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 11/98 lok. 8

Nalingi kotambwisa boyekoli ya Biblia!

1 Basakoli mingi kati na biso bamonisaka ete bazali na mposa ya kotambwisa boyekoli ya Biblia. Ezali na lolenge yango nde tokokisaka mokano na biso ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Nzokande, basakoli mingi balekisaka basanza, kutu bambula, kozanga ete básepela na libaku ya koteya moto moko solo ya Biblia. Esengeli kosala nini na sanza ya Novɛ́mbɛ na ntina na likambo yango? Lokola tozali kolakisa buku Boyebi, tokosala milende ya kobanda boyekoli ya Biblia na buku yango.

2 Tóbongisa wikende moko to wikende mingi: Tozali kolendisa mosakoli mokomoko ete abongisa ntango na sanza oyo mpo na koluka kotambwisa boyekoli ya Biblia. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda bakopona wikende moko to wikende mingi mpo na kosala mosala yango. Na nsima, bakosala bibongiseli mpo ete bato ya bituluku na bango básala bozongeli ya sika.

3 Tómemaka banɔti na biso ya bozongeli ya sika na ntango ya makita yango mpo na mosala ya kosakola. Na nsima, tókenda kotala bato nyonso oyo basepelaki na nsango malamu, oyo bazwaki mokanda moko to oyo bayanganaki na makita. Tósala bozongeli ya sika mokomoko na mokano ya kobanda boyekoli.

4 Elakiseli mpo na kobanda boyekoli ya Biblia: Na ntango ya makita ya mosala ya kosakola, elakiseli moko oyo ebongisami malamu ekosalema, ekomonisa lolenge ya kobanda boyekoli na ntango ya bozongeli ya sika. Tokoki koloba boye: “Bato mingi bazali na Biblia na bango. Kasi bayebi te ete yango eyanolaka na mituna ya ntina oyo tomitunaka na ntina na bomoi na biso. [Tólakisa etanda ya makambo mazali na kati ya buku Boyebi mpe tótánga mitó ya makambo ya mikapo 3, 5, 6, 8 mpe 9.] Na lisalisi ya buku oyo, okoki koyeba makambo mingi ya ntina bobele nsima ya mwa basanza soki ozali kolekisa bobele ngonga moko na pɔsɔ mpo na koyekola. Soki okolinga kopona moko kati na mitó ya makambo oyo, nakosepela komonisa yo lolenge boyekoli yango esalemaka.” Soki moto yango azali kokakatana mpo ete azalaka mpenza na ntango mingi te, tólimbolela ye ete tokoki kosala mpe boyekoli ya mokuse. Tólakisa ye mwa buku Azali kosɛnga mpe tósɛnga na ye ete tótalelaka liteya moko ya mokuse na boumeli ya miniti 15 kino 30 na pɔsɔ.

5 Soki tosali milende mpo na kobanda boyekoli ya Biblia mpe soki tobondeli Yehova ete apambola biso, ntembe ezali te ete tokozwa bayekoli ya Biblia. (1 Yoa. 5:14, 15) Soki tozali na mposa ya kotambwisa boyekoli ya Biblia, oyo ezali libaku mpenza ya kobanda yango!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto