Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/98 nk. 3-6
  • Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Tozala ntango nyonso na likebi malamu na mateya na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Matomba ya kozala na teritware na yo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Salelá ntango na yo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 11/98 nk. 3-6

Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu

1 Likoló eyindi, mpe lokito ya nsɔmɔ eyei makasi kino ekómi kosala matoi mpasi. Lipata moko ya milinga ezali kokita. Yango ekoki kozala mpenza nini? Limpinga moko ya mayoyo oyo ekobebisa mpenza ekólo mobimba! Likambo yango, oyo elobelami na Yoele, ezali kokokisama lelo na mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na basaleli bapakolami ya Nzambe. Baninga na bango ya mosala, ebele monene mpe bazali kosangana na mosala yango.

2 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí 1998, na lokasa 11 mpe na paragrafe 19, elobi boye: “Limpinga ya mayoyo ya Nzambe na mikolo na biso epesi litatoli ya mozindo na ‘mboka’ ya baklisto. (Yoele 2:9)  . . . Bazali ntango nyonso kolonga bipekiseli nyonso, kokɔta na bamilio ya bandako, kosolola na bato na balabala, kosolola na bango na nzela ya telefone, kokutana na bango na nzela nyonso oyo ekoki kosalema mpo na koyebisa bango nsango ya Yehova.” Ezali mpenza likambo ya esengo ya kozala na libaku malamu ya kosangana na mosala oyo etambwisami na Nzambe, boye te?

3 Na bokeseni na mayoyo ya solosolo, oyo lobanzo na yango ezali bobele ya kolya, biso basaleli ya Yehova tozali komibanzanza mpenza mpo na bomoi ya bato oyo tozali kosakolela bango nsango malamu. Tozali na mposa ya kosalisa bango ete báyeba solo ya nkembo ya Liloba ya Nzambe. Tozali mpe na mposa ya kolendisa bango ete básala matambe oyo ekomema bango na lobiko ya seko. (Yoa. 17:3; 1 Tim. 4:16) Na yango, tolingi kokokisa mosala na biso malamumalamu. Ezala lolenge ya litatoli oyo toponi kopesa, tosengeli komituna soki tozali kosakola na motindo mpe na ntango oyo ekobimisa matomba malamu. Lokola “motindo na mokili oyo ezali kolimwa,” ekozala malamu ete tótalela mitindo mpe lolenge na biso ya kobanda masolo epai na bato mpo na koyeba soki tozali mpenza kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kobota mbuma.​—1 Kol. 7:31.

4 Atako tosalaka milende ya kokutana na bato ya mitindo mikeseni, mosala ya ndako na ndako ezali ntango nyonso eteni oyo ezali na ntina mingi na mosala na biso ya kosakola. Mbala mingi, tomonaka ete bato bazalaka epai na bango te to balalaka na ntango oyo toyaka kotala bango? Oyo nde likambo ya mawa na ndenge tokoki te koyebisa bango nsango malamu! Ndenge nini tokoki kolonga mokakatano yango?

5 Tózala na makanisi mabongi: Na ekeke ya liboso, na Yisalaele, babomi-mbisi bazalaki kosala mosala na bango na butu. Mpo na nini bongo? Ezali te ete kosala na butu ezalaki kosepelisa bango, kasi ezali mpo ete ezalaki ntango malamu mpo na kozwa mbisi mingi. Ntango wana ezalaki ntango malamu ya kozwa matomba mingi. Na ntina yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1992 elobi ete: “Bobele bongo, biso mpe tosengeli kotalela teritware na biso mpo na kokende koluka mbisi ya elilingi na ntango oyo bato bazali epai na bango mpe bakoki koyoka biso.” Na kotyáká likebi na bizaleli ya bato oyo bafandi na bakartye ya bato mingi mpe bakartye mosusu, ekoki komonana ete bato mingi bazalaka epai na bango mbala mosusu mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na ntɔngɔ, kasi na momeseno bazalaka na likoki te ya kosolola na biso na ntango wana. Soki ezali bongo na teritware na biso, tokoki kokende kotala bango mwa nsima bobele na moi to na nsima ya nzanga, boye te? Ekozala lolenge moko malamu ya kozala na molende mpe ya kozala na bonkonde epai ya bazalani na biso. Yango ezali komonisa bolingo mpenza ya boklisto.​—Mat. 7:12.

6 Na Bafilipi 4:​5, ntoma Paulo azali kokundolela biso ete ‘boboto na biso bóyebana na bato nyonso.’ Na boyokani na lilako oyo lipemami, tosengeli kozala na bokatikati mpe na makanisi mabongi wana tozali kosakola na molende mpe na esengo. Elingi koloba te ete tosengeli kotika koteya liboso ya bato mpe na ndako na ndako, kasi tolingi nde koyeba ete tozali kosala mosala na biso ya kosakola na bantango oyo ebongi mpe oyo ekobimisa matomba malamu. (Mis. 20:20) Lokola babomi-mbisi na Yisalaele na ekeke ya liboso, ezali na ntina ete ‘tóluka mbisi’ na ntango oyo tokoki kozwa yango mingi, kasi te na ntango oyo tomoni ete ezali kosepelisa biso.

7 Mbongwana nini yango ezali kosɛnga? Mbala mingi, makita ya mosala ya kosakola esalemaka mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na 9:00 to na 9:30. Nsima na yango, basakoli bakendeke mbala moko na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na bongo, masangani mosusu ya bankulutu bazwaka bibongiseli mpo ete liboso ya kokende na mosala ya kosakola ndako na ndako na bakartye mosusu, basakoli básala mitindo mosusu ya mosala ya kosakola. Na ndakisa, litatoli na balabala, na bakartye ya mombongo, bozongeli ya sika. Na masangá mosusu, makita ya mosala ya kosakola esalemaka na moi, na 10:00, 11:00, to 12:00. Na nsima, basakoli bakendeke mbala moko na mosala ya kosakola ndako na ndako kino na ebandeli ya nsima ya nzanga. Na bateritware mosusu, ntango ya malamu ya kosakola ezali nde nsima ya nzanga, kasi na ntɔngɔ te. Na ntembe te, mbongwana motindo wana ekosala ete mosala ya kosakola ndako na ndako ebota mbuma.

8 Tózala na bososoli mpe na mayele: Bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola ndako na ndako bayambaka nsango malamu ndenge moko te. Bamoko bayokamelaka biso, basusu batyolaka biso, mpe basusu basilikaka to bazalaka nkandankanda. Na ntina yango, buku Comment raisonner à partir des Écritures na lokasa 7 ezali kokundolela biso ete tólukaka te “makanisi mpo na kondimisa baoyo bazali koboya solo.” Soki molobani na biso ayambi biso te, ezali malamu ete tótika ye mpe tókende. Tosengeli soko moke te kotungisa bato na kotingamáká na bango mpo ete básolola na biso to bándima makanisi na biso. Topusaka moto na makasi te. Yango ekoki komonisa ete tozali na makanisi mabongi te, mpe ekoki kopesa mokakatano mpo na Batatoli mosusu, to kotya mosala ya kosakola na kwɔkɔsɔ.

9 Liboso ya kosakola na teritware moko, ezali malamu kotala banɔti soki ezali na baadrɛsi ya bato mosusu oyo baboyá ete tókɔtaka epai na bango. Soki ezali bongo, esengeli koyebisa yango na mosakoli nyonso oyo azali kosakola na balabala yango. Moto moko te asengeli kokende na bolingi na ye moko kokutana na bato yango kozanga kotuna mokɛngɛli na mosala ya kosakola.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1994, Biyano na mituna na bino.

10 Tokosala mosala na biso ya kosakola malamumalamu soki tozali kosala mosala ya kosakola ndako na ndako na mayele. Tózala na mayele ntango tozali kokɔta na ndako moko. Maninisa mpe barido nyonso ekangami? Makɛlɛlɛ ezali te? Mbala mosusu bato ya ndako yango balali. Ekoki kozala ete tokokutana na bango nsima. Na ntembe te, ezali malamu kotika naino ndako yango sikawa mpe kokoma nimero na yango. Tokoki kozongela yango ntango tokosilisa teritware to koya mokolo mosusu.

11 Nzokande, ekoki kokóma ete tolamwisi moto moko na mpɔngi kozanga koyeba. Moto yango akoki kosilika. Esengeli kosala nini? Masese 17:27 epesi toli oyo: “Ye oyo azali na mayele azali na maloba mingi te.” Tokosɛnga bolimbisi te na ndenge tozali kosala mosala na biso, kasi ebongi kosɛnga bolimbisi na ndenge tolekaki na ntango oyo ebongi te. Na bonkonde nyonso, tokoki kosɛnga na moto yango ete tokozongela ye nsima na ntango oyo ebongi. Maloba mabongi oyo malobami na boboto makitisaka nkanda ya molobani motindo wana. (Mas. 15:1) Soki moto moko ayebisi biso ete asalaka mosala na butu, tokoki kokoma yango na kalati ya teritware mpo ete na mbala ya nsima tókende kotala ye na ntango ebongi.

12 Mpo na kosakola malamumalamu na teritware moko, ezali mpe na ntina kozala na bososoli. Soki bato mingi bazalaki epai na bango te ntango tokendaki kotala bango, esengeli kosala milende mosusu mpo na koyebisa bango nsango ya lobiko. (Lom. 10:13) Ekómaka mbala mosusu ete basakoli bámeka mbala na mbala bobele na mokolo wana kokutana na bato na bandako na bango. Likambo yango ezangaka te kobenda likebi ya bato ya pembeni, oyo bakoki kokanisa ete Batatoli ya Yehova bazalaka ‘ntango nyonso na babalabala na bango.’ Ndenge nini tokoki kopɛngola ezalela yango?

13 Esengeli kozala na bososoli. Ntango tozongi na ndako ya moto moko oyo azalaki te, ezali na eloko moko oyo ezali komonisa ete moto yango ayei? Soki maninisa mpe barido ekangami, mbala mosusu moto moko ayei naino te. Na yango ekozala na ntina te kobɛta lisusu ekuke. Soki toyei mbala na mbala mpe tozali kokuta moto yango te na bantango ekeseni, na moi mpe na mpokwa, tokoki kobénga ye na telefone soki likoki ezali. Soki bongo te, na mayele nyonso, tokoki kokɔtisa na nse ya ekuke na ye trakte to lokasa ya libyangi na makita, mingimingi soki tosakolaka mingi na teritware yango. Ekoki kozala ete tokokutana na moto yango mbala ya nsima ntango tokosakola na teritware yango.

14 Tosengeli kopɛngola momeseno ya kobenda lisolo molaimolai na ekuke ya moto soki azali koyoka nzoto malamu te. Soki moto yango abyangi biso ete tókɔta na ndako, tókeba ete tóbebisa ndako na ye te. Tózala na makanisi mabongi ntango mbwa moko ezali kogangela biso. Soki tozali kosakola na ndako moko ya etaze, tóloba na mongongo ya nse mpe tósala makɛlɛlɛ te, soki tosali bongo te, yango ekoki kotungisa bafandi mosusu mpe bakoki koyeba mbala moko ete tozali wana.

15 Tósala makambo na molɔngɔ: Na kosaláká ebongiseli malamu, likoki ekozala ete tópɛngola kozala bituluku bituluku kati na teritware. Bato bakoki kobanga soki bamoni mituka mingi etɛlɛmi liboso ya bandako na bango mpe etuluku ya basakoli bayangani wana. Tosengeli kopɛngola kopesa bato likanisi ete “totondaka” na bakartye ya bato. Ezali malamu kosala ebongiseli ya kokabola basakoli na Ndako ya Bokonzi na ntango ya likita mpo na mosala ya kosakola. Bituluku ya bato moke lokola libota moko ebangisaka mpenza bato ya teritware te. Mpe ezalaka mpasi te mpo na kobongisa yango lisusu wana tozali kosakola na teritware.

16 Mpo ete mobulu ezala te, baboti basengeli kosɛnzɛla etamboli ya bana na bango malamu wana bazali kosakola. Ntango bazali elongo na baboti na bango na mosala ya ndako na ndako, bana basengeli komonisa ete babɔkwami malamu. Baboti basengeli kopesa bana na bango ya mike nzela te ete básakanaka mpe bátambolaka mpambampamba. Yango ekoki kobenda likebi ya bato ya kartye to ya baleki nzela likoló na bango.

17 Esengeli kozala na bokatikati na oyo etali bopemi. Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛ́mbɛ 1995, na lokasa 5, elobaki ete: “Ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola, tobungisaka mbala mosusu ntango moko ya malamu wana tozali kopemapema mingi. Nzokande, soki klimá ya mokolo wana ezali malamu te, kosala mwa bopemi ekoki kosalisa biso mpo na kozwa lisusu makasi mpe kokoba mosala na biso. Atako bongo, basakoli mingi bamonaka malamu ete básakola kasi básalela te ntango oyo babongisaki mpo na mosala ya kosakola na kopema elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi mosusu. Kati na likambo yango, esengeli kozala na bokatikati.” Atako likambo yango etaleli moto na moto, emonanaka ete bituluku ya bandeko basi mpe bandeko mibali bakutanaka na barestora to na bikala. Longola ntango oyo bakolekisa ete bápesa bango biloko oyo basɛngi, etuluku ya bato ekoki kotungisa basombi mosusu. Ntango mosusu, na restora, bandeko balobelaka na mongongo makasi makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na ntɔngɔ. Yango ebebisaka lokumu ya mosala na biso ya kosakola. Na mayele nyonso, basakoli bakopɛngola ezaleli ya kotonda na esika moko oyo batɛkaka biloko mpe kobungisa ngonga ya mosala ya kosakola mpamba.

18 Basakoli mingi bazwaka matomba malamu na kosololáká na bato bipai nyonso oyo bango bazali. Ezala na balabala, na baparking mpe na bisika mosusu. Na bisika wana, tosengeli lisusu kopesa litatoli malamu, bobele na maloba te, kasi na kozaláká na makanisi mabongi. Basakoli ya lisangá mokomoko basengeli kotosa bandelo ya teritware na bango. Esengeli kosala bongo mpo na kotungisa bato te na bisika ya mombongo to na bisika ya kozela bísi, to na bapɔmpi ya esansi oyo efungwamaka butu na moi. Soki bankulutu ya lisangá mosusu basɛngi biso lisalisi te mpo na kosunga bango na teritware na bango, tokoleka bandelo ya teritware na biso te. Tómindimisa ete tozali kosala mosala na biso malamu.​—Talá 2 Bakolinti 10:13-15.

19 Masangá mosusu ezali na bisika mingi epai kuna bakoki kopesa litatoli ya libaku malamu. Na yango, ekaboli bisika yango na bateritware. Kalati moko ya teritware epesami epai ya mosakoli moko to na etuluku moko ya basakoli. Yango ekopesa nzela ete teritware yango esakolama malamu. Ekopɛngola mpe ete basakoli mingi básakola teritwware yango na mbala moko mpe na esika moko. Yango eyokani na motinda oyo elobelami na 1 Bakolinti 14:40: ‘Makambo nyonso másalema na molɔngɔ kasi na mobulu te.’

20 Molato na biso esengeli ntango nyonso kozala malamu mpe esengeli komonisa mpenza ete tozali baministre oyo bazali komema nkombo ya Yehova. Ezali mpe bongo mpo na biloko na biso ya mosala ya kosakola. Basakosi oyo epasukapasuka mpe Biblia oyo ekatanakatana epesaka nsɔni na nsango ya Bokonzi. Moto moko alobaki na ntina na molato na biso mpe na ntina na lolenge na biso ya kokata nsuki ete “emonisaka nokinoki soki tozali banani, lolenge na biso mpe etɛlɛmɛlo na biso na kati ya bato.” Na yango, molato na biso esengeli kozala nyamunyamu te to ya kolekisa ndelo te, kasi esengeli kozala ntango nyonso oyo ‘ebongi mpo na nsango malamu.’​—Talá 1 Timote 2:9, 10.

21 Na 1 Bakolinti 9:26, NW, ntoma Paulo alobaki ete: ‘Lolenge nazali kopota mbangu, nazali kopota kilikili te; lolenge nazali kobɛta makofi, nazali kobɛta bibɛtɛla te.’ Lokola Paulo, tozali na mokano ya kozala ntango nyonso na molende, kobota mbuma kati na mosala na biso ya kosakola. Wana tozali kosakola na molende kati na “limpinga ya mayoyo” ya Yehova, tóyebisa bazalani na biso nsango ya lobiko na kozaláká na makanisi mabongi mpe na bososoli!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto