Salelá ntango na yo malamu
1 Biso nyonso tozalaka na ngonga ndenge moko pɔsɔ na pɔsɔ. Ngonga oyo tolekisaka mpo na kosakola nsango malamu ezali na ntina mingi mpamba te ezali ntango oyo tolekisaka na mosala ya kobikisa bomoi. (Lom. 1:16) Tokomonisa ete tosepelaka na mosala ya kosakola wana tozali komibongisa malamu mpo na likita ya mosala ya kosakola, kokóma na makita yango liboso ebanda, mpe kokende mbala moko teritware. Ekozala malamu te ete tólekisaka ntango mingi na likita ya mosala ya kosakola na esika ete tókende koteya. Lokola Yehova asili koteya biso ete ‘likambo na likambo ezali na ntango na yango,’ tosengeli mpenza kosalela malamu ngonga oyo tobongisi mpo na mosala ya kosakola.—Mos. 3:1, NW.
2 Yebá kosalela ntango na yo na mayele: Tozwaka mapamboli mingi ntango tozali kolanda malamu manaka oyo ezali kosalisa biso ete tosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola. Mbala mingi matomba malamu oyo tozwaka na mosala ya kosakola esengeli kokokana na ntango oyo tolekisaka na mosala yango. Tokoki kobongisa programɛ na biso ya mokolo na mokolo, mpo tózala na ntango mingi ya kosangana na mosala ya kosakola? Na ndakisa, nsima ya kokabola bazulunalo mokolo ya pɔsɔ, tokoki nde kozwa mwa ngonga mosusu mpo na kosala bozongeli ya sika epai ya bato oyo bamonisaki bosepeli? Soki tobimi na mosala ya kosakola mokolo ya lomingo mpo na mwa ntango, tokoki mpe kolekisa lisusu ndambo ya ngonga mpo na kosala bozongeli ya sika epai ya bato oyo bamonisaki bosepeli to mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia? Wana tozali kosakola ndako na ndako tokoki mpe kopesa litatoli na balabala? Na motindo wana to na lolenge mosusu tokoki kobongisa lisusu mosala na biso ya koteya.
3 Wana tozali na mosala ya kosakola, tokoki kobebisa ngonga mingi soki tozali na bokɛngi te. Ya solo, soki molunge eleki makasi, mwa bopemi moke ekosalisa biso na kozwa lisusu makasi mpe kokoba mosala na biso. Nzokande, tosengeli kozala na bokatikati, mpamba te mbala mosusu ekozala na ntina te ete tópemaka ntango nyonso.
4 Na bambula oyo ekómi mpasi mingi mpo na kokuta bato na bandako na bango. Mpo na kolonga mokakatano yango, basakoli mingi basakolaka ndako na ndako na ngonga ekeseni ya mokolo. Mpo na nini te komeka kopesa litatoli na mpokwa.
5 Ezali malamu te ete basakoli mibale bákutanaka mbala na mbala mpo na kosolola wana bazali kopesa litatoli na balabala. Na esika ya kosala bongo, basengeli nde kotɛlɛma moto na moto na esika na ye mpe kobɛlɛma na bato mpo na kosolola na bango. Na kosaláká bongo bakosalela malamu ntango na bango mpe bakozwa esengo mingi na mosala na bango.
6 Salelá mabaku ya kopesa litatoli: Ndeko moko akutanaki na mwasi moko oyo alobaki na ye ete asepeli na makambo yango te, ndeko yango atunaki ye soki moto mosusu azalaki na kati ya ndako mpo asolola na ye. Yango epesaki ye nzela ya kosolola na mokolo ndako, oyo azalaki na bokɔnɔ na boumeli ya mbula mingi mpe azalaki bobele kolala na mbeto. Elikya oyo ezali na Liloba ya Nzambe esalisaki ye asepela lisusu na bomoi. Aumelaki te kotɛlɛma mpe abandaki kotambola, koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi, mpe koyebisa bato mosusu elikya ya sika oyo azalaki koyekola!
7 Ndeko mwasi moko elenge, asalelaki toli etali kosakola nsango malamu mwa bangonga moke liboso ya Boyekoli ya mokanda na lisangá. Na ndako ya liboso, akutanaki na elenge mwasi moko ya mibu 13 oyo ayokaki ye na likebi nyonso mpe azwaki mokanda. Mokolo oyo elandaki ndeko yango amonaki elenge mwasi wana na eteyelo. Na nsima, alendisaki elenge yango ete ayekola na ye Biblia, elenge yango andimaki.
8 Salá ete ngonga oyo ozali kolekisa na mosala ya kosakola ezala na ntina mingi: Kosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola esalisaka biso tókolisa lisusu makoki na biso ya kosakola nsango malamu. Okoki lisusu kobongisa makoki na yo mpo na oyo etali kobanda lisolo na kosaleláká maloba ya kokɔta na lisolo oyo ezali kobenda likebi? Okoki komibongisa mpo na kokóma moteyi ya malamu wana ozali kotambwisa bato na boyekoli ya Biblia? Na kosaláká bongo, okoki mpenza kosalela malamu ntango na yo mpe kosala ete mosala na yo ya kosakola ebimisa matomba mingi.—1 Tim. 4:16.
9 Lokola ‘ntango oyo etikali ezali lisusu mingi te,’ tosengeli komipesa mpenza na mosala ya boklisto. (1 Kol. 7:29, NW) Mosala ya kosakola esengeli kozala na esika ya liboso kati na makambo na biso nyonso ya bomoi oyo totyelaka yango ntango. Tiká ete tósangana na molende na mosala ya kosakola. Ntango ezali eloko ya ntina mingi oyo Yehova asili kopesa biso. Tosengeli kosalela yango malamu mpe na mayele.
[Etanda na lokasa 4]
Talelá toli oyo:
◼ Yaká na likita ya mosala ya kosakola na ngonga malamu.
◼ Bóbimaka bato mingi te esika moko, bobele soki bomoni ete esengeli bongo.
◼ Kendá na teritware noki.
◼ Sakolá na teritware ntango bato mingi bazali na bandako na bango.
◼ Na bantango mosusu okoki kosakola yo moko soki yango ezali na likama te.
◼ Kolekisa ntango mingi te mpo na kozongela bato oyo basepelaki ntango osakolaki ndako na ndako.
◼ Luká kopesa bato mosusu litatoli ntango basakoli mosusu bazali koumela na ndako moko.
◼ Soki likoki ezali, lekisá ngonga mingi na mosala ya kosala na esika ya kosala bobele ngonga moko.