Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
1. Likita ya mosala ya kosakola ekokisaka mokano nini?
1 Na libaku moko, Yesu asalaki likita elongo na bayekoli na ye 70 liboso ete bákende kosakola. (Luka 10:1-11) Mpo na kolendisa bango, akundwelaki bango ete bakozala bango moko te kasi Yehova, “Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma,” akokamba bango. Apesaki mpe bango malako oyo esalisaki bango básala mosala malamu mpe akabolaki bango “mibalemibale.” Lelo oyo mpe, mokano ya likita ya mosala ya kosakola ezali ya kolendisa biso, kopesa biso malako mpe moto ya kobima na ye.
2. Likita ya mosala ya kosakola esengeli koumela miniti boni?
2 Sikoyo, likita ya mosala ya kosakola eumelaka miniti 10 tii 15, mpe esangisaka makambo lokola kokabola bandeko na bituluku, kopesa teritware mpe kosala libondeli. Ekozala lisusu bongo te. Kobanda na sanza ya minei, likita yango ekoumela miniti mitano tii nsambo kasi koleka te. Nzokande, soki esalemi nsima ya makita ya lisangá esengeli kozala mokuse mpenza, mpamba te, bandeko oyo bakoyangana na likita yango basilaki koyoka makanisi ya Biblia. Kosala likita ya mosala ya kosakola na mokuse, ekopesa bandeko nyonso ntango mingi ya kosakola. Lisusu, babongisi-nzela to basakoli oyo basilaki kobanda kosakola liboso, bakolongola kaka mwa miniti moke.
3. Bibongiseli nini esengeli kozwama mpo likita ya mosala ya kosakola esalisa mpenza basakoli?
3 Esengeli kozwa bibongiseli mpo likita ya mosala ya kosakola esalisa mpenza basakoli. Na masangá mingi, ezalaka malamu mpenza ete etuluku na etuluku eyangana na esika na yango, na esika ete bituluku nyonso eyangana esika moko. Yango ekozala mpasi te mpo basakoli bákóma na esika ya likita to mpe na teritware. Kokabola basakoli ekozwa ntango mingi te, mpe ekozala mpasi te mpo mokɛngɛli ya etuluku atyela basakoli ya etuluku na ye likebi mpenza. Lisangani ya bankulutu ekozwa bikateli oyo ezali malamu koleka na kotalela makambo ya teritware na bango. Liboso ya kosukisa likita na libondeli ya mokuse, mosakoli nyonso asengeli koyeba soki akosakola wapi mpe elongo na nani.
4. Mpo na nini tosengeli komona ete likita ya mosala ya kosakola ezali na ntina lokola makita na biso mosusu nyonso?
4 Ezali na ntina lokola makita mosusu nyonso ya lisangá: Lokola likita ya mosala ya kosakola esalemaka mpo na baoyo balingi kokende kosakola, ntango mosusu bandeko ya lisangá nyonso te nde bakoki koyangana na likita yango. Kasi yango emonisi te ete tosengeli kozwa yango na lisɛki, to komona ete makita mosusu ya lisangá eleki yango. Ndenge moko na makita na biso mosusu nyonso, likita ya mosala ya kosakola ezali ebongiseli oyo Yehova azwá, oyo esalisaka biso tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu. (Ebr. 10:24, 25) Na yango, motambwisi asengeli komibongisa malamu mpo lisolo ekumisa Yehova mpe elendisa bayangani. Soki eloko moko epekisi te, basakoli oyo bakobima mosala ya kosakola basengeli kosala makasi báyangana na likita yango.
Tosengeli te kozwa likita ya mosala ya kosakola na lisɛki, to komona ete makita mosusu ya lisangá eleki yango
5. (a) Mokumba ya mokɛngɛli na mosala ya kosakola ezali nini na oyo etali kobongisa likita ya mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini ndeko mwasi asengeli kotambwisa likita ya mosala ya kosakola?
5 Ndeko oyo akotambwisa asengeli komibongisa: Mpo moto amibongisa malamu mpo na kosala lisolo na makita, esɛngaka azwa lisolo yango liboso. Ezali mpe bongo mpo na likita ya mosala ya kosakola. Na ntembe te, soki etuluku moko eyangani, mokambi ya etuluku yango to mosungi na ye nde akotambwisa likita. Nzokande, soki bituluku nyonso ekoyangana esika moko, mokɛngɛli na mosala ya kosakola akopona ndeko moko mpo atambwisa likita yango. Bakɛngɛli mosusu bapesaka batambwisi nyonso programɛ ya kotambwisa mpe batyaka yango na etanda ya mayebisi. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola asengeli kosalela bososoli ntango azali kopona batambwisi; abosana te ete likita ekolendisa bandeko soki motambwisi azali moteyi malamu mpe ayebi kobongisa makambo. Soki na mikolo mosusu nkulutu, mosaleli na misala to ndeko mobali mosusu oyo azwá batisimo akozala te mpo na kotambwisa likita yango, mokɛngɛli na mosala ya kosakola akopona ndeko mwasi moko oyo azwá batisimo mpe azali na makoki mpo atambwisa likita yango.—Talá lisolo: “Soki esɛngi ete ndeko mwasi nde atambwisa.”
6. Mpo na nini ezali na ntina motambwisi oyo aponamaki amibongisa malamu?
6 Soki tozwi mokumba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi to na Likita ya mosala, tozwaka yango na lisɛki te mpe tomibongisaka malamu. Mingi na biso tobandaka komibongisa mbala moko nsima ya kozwa yango, kasi te nzelanzela ntango tozali kokende na makita. Ndenge wana nde tosengeli mpe kotalela mokumba ya kotambwisa likita ya mosala ya kosakola. Sikoyo lokola likita yango ekozala mokuse mpenza, komibongisa malamu ezali na ntina mingi mpo likita yango elendisa mpe esila na miniti oyo epesami. Komibongisa malamu esɛngi mpe koyeba liboso teritware ya kosakola.
7. Wapi mwa makambo oyo motambwisi akoki kolobela?
7 Makambo ya kolobela: Lokola makambo ezalaka ndenge moko te na bateritware nyonso, moombo ya sembo apesi te plan moko boye oyo elimboli ndenge ya kosala likita mokomoko ya mosala ya kosakola. Etanda oyo elobi: “Na likita ya mosala ya kosakola, bokoki kotalela”, epesi mwa makanisi. Mbala mingi, likita yango ekozala lisolo na bayangani. Na bantango mosusu, bokoki kosala elakiseli moko oyo ebongisami malamu, to kotala video oyo etali mosala ya kosakola, oyo euti na jw.org. Wana motambwisi azali komibongisa mpo na likita ya mosala ya kosakola, asengeli kokanisa na makambo oyo ekolendisa mpe malako oyo ekosalisa baoyo bakosakola mokolo wana.
Wana motambwisi azali komibongisa mpo na likita ya mosala ya kosakola, asengeli kokanisa na makambo oyo ekolendisa mpe malako oyo ekosalisa baoyo bakosakola mokolo wana
8. Makambo nini oyo ekosalisa mpenza basakoli, esengeli kolobela na likita ya mosala ya kosakola na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo?
8 Na ndakisa, mikolo ya pɔsɔ basakoli mingi bakabolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Bandeko mingi oyo basakolaka mikolo ya pɔsɔ babimaka te na kati ya pɔsɔ; na yango, bakoki kozala na mokakatano ya komikundola ndenge ya kobanda lisolo oyo bamekamekaki na losambo na bango na kati ya libota. Yango wana, ekozala malamu motambwisi azongela moko ya ndenge ya kobanda lisolo oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi. Akoki mpe kolobela ndenge oyo basakoli bakoki kobanda lisolo na kolobela nsango moko, likambo moko oyo esalemi to fɛti moko mpo na kokabola bazulunalo, to mpe kobongisa nzela mpo na kozongela moto oyo andimi kozwa bazulunalo. Soki na bandeko oyo bayei na likita ya mosala ya kosakola, ezali na baoyo basilaki kokabola bazulunalo ya sanza wana, motambwisi akoki kosɛnga bango bálobela na mokuse ndenge basalaki to báyebisa makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango. Na mikolo ya lomingo, motambwisi akoki kopona kosala mpe bongo na oyo etali kokabola bazulunalo ya sanza wana. Lokola tokoki kokabola mikanda oyo toyekolaka na bato, na ndakisa mwa babuku Nsango malamu mpe Yoká Nzambe ná buku Biblia eteyaka mokolo nyonso, ekozala malamu motambwisi alobela na mokuse ndenge ya kokabola yango.
9. Bokoki kolobela nini na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na ntango ya kampanye ya sipesiale?
9 Soki bozali kosala kampanye ya sipesiale mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, motambwisi akoki kolobela ndenge ya kokabola bazulunalo ya sanza wana nzela moko na lokasa ya libyangi to trakte, to mpe kolobela ndenge ya kosala soki moto asepeli. Akoki mpe kosɛnga bandeko bálobela makambo oyo bakutanaki na yango, oyo emonisi ntina ya bakampanye ya ndenge wana.
10, 11. Mpo na nini ezali na ntina ete basakoli bámibongisa mpo likita ya mosala ya kosakola elendisa?
10 Basakoli basengeli komibongisa: Basakoli mpe bakoki kosala ete likita ya mosala ya kosakola elendisa. Soki bamibongisi liboso ya kokende kosakola, na ndakisa na losambo na kati ya libota, bakozala na likambo ya koyebisa basakoli mosusu. Komibongisa malamu esɛngi mpe kozwa bazulunalo mpe mikanda mosusu liboso ya koya na likita ya mosala ya kosakola mpo basakoli nyonso bákende mbala moko na teritware kozanga koumela mpambampamba.
11 Ezali mpe na ntina kozwa bibongiseli ete tókóma mwa miniti liboso ete likita ya mosala ya kosakola ebanda. Ya solo, tosalaka makasi tókóma na retare te na makita nyonso ya lisangá. Nzokande, kokóma na retare na likita ya mosala ya kosakola ekoki mpenza kobebisa bibongiseli oyo ezwamaki. Na ndenge nini? Ndeko oyo azali kokamba akotalela makambo mingi liboso ya kokabola basakoli. Soki basakoli bazali mingi te, akoki kotinda bango nyonso na teritware oyo esakolamaki ndambo. Soki basakoli mosusu batambolaki na makolo mpo na koya na likita mpe teritware ezali mosika, akoki kokabola bango ná baoyo bazali na mituka. Soki mobulu esalemaka mingi na teritware yango, akoki kosɛnga bandeko mibali básakola elongo na etuluku ya bandeko basi to pembeni wana. Basakoli oyo bazali bibɔsɔnɔ bakoki kosakola na balabala ya patatalu to na bandako oyo ezali na baeskalye mingi te. Akoki kokabola basakoli ya sika bákende elongo na baoyo bamesani na mosala. Nzokande, soki tokómi na retare, mbala mingi ekosɛnga kozongela lisusu bibongiseli oyo ezwamaki, to kobandela lisusu mpo baoyo bayei na retare bázwa moninga. Ntango mosusu, likambo moko ekoki kosala ete tókóma na retare. Kasi, soki tozali na momesano ya kokóma na retare, tosengeli koluka koyeba soki ezali mpo tomonaka ete likita ya mosala ya kosakola ezali na ntina te, to mpo tomibongisaka liboso te.
12. Soki mbala mingi oyokanaka na bato ya kosakola elongo na bango, osengeli kotalela nini?
12 Basakoli oyo bayei na likita ya mosala ya kosakola bakoki koyokana kobima na ndeko moko liboso ete likita ebanda to kozela ete motambwisi apesa moto ya kobima na ye. Soki mbala mingi oyokanaka na moto, mpo na nini te ‘kofungwama’ na kosakola elongo na basakoli ndenge na ndenge na esika ya kosakolaka kaka ná baninga na yo ya motema? (2 Ko. 6:11-13) Mpo na nini te na bantango mosusu, oyokana na mosakoli ya sika mpo bósakola elongo mpe osalisa ye akolisa makoki na ye ya koteya? (1 Ko. 10:24; 1 Tim. 4:13, 15) Landá na likebi malako nyonso oyo bakopesa yo, ezala mpe oyo etali esika okobanda kosakola. Na nsuka ya likita, koluka te kobongola bibongiseli oyo ezwamaki mpe kende mbala moko na teritware.
13. Matomba nini tokozwa soki moto nyonso atye likebi mpe akokisi mokumba na ye na likita ya mosala ya kosakola?
13 Bayekoli 70 oyo Yesu atindaki “bazongaki na esengo” nsima ya kosakola. (Luka 10:17) Ya solo, likita oyo Yesu asalaki elongo na bango liboso ya kobanda kosakola esalisaki bango básakola malamu. Lelo oyo, makita ya mosala ya kosakola ekoki mpe kosalisa basakoli mpo básakola malamu. Soki moto nyonso atye likebi mpe akokisi mokumba na ye, likita ya mosala ya kosakola ekolendisa biso, ekopesa biso malako mpe moto ya kosakola na ye mpo tókokisa etinda bapesá biso ya kopesa “litatoli na bikólo nyonso.”—Mat. 24:14.