Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/06 lok. 8
  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Makita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tosengeli lisusu te kotalelaka Mokapo ya mokolo na likita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 10/06 lok. 8

Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola

1. Ndenge nini likita ya mosala ya kosakola ekoki kosalisa biso?

1 Likita ya mosala ya kosakola oyo esalemi malamu, elendisaka biso mpe esalisaka biso tózwa mateya oyo ebongi liboso tókende kosakola. Esalisaka biso mpe tózwa libaku ya kobima na bandeko mosusu mpo tólendisana mpe tósalisana. (Mas. 27:17; Mos. 4:9, 10) Tokoki kosala nini mpo tózwa litomba na likita yango?

2. Wapi mwa makambo oyo motambwisi akoki kotalela?

2 Motambwisi: Mokanda moko te elobeli liboso makambo mpenza oyo ekotalelama na likita yango. Yango wana, soki okotambwisa yango, osengeli komibongisa malamu. Kokanisa mbala moko te kolobela mokapo ya mokolo, atako ezali mabe te kokɔtisa makanisi na yango soki eyokani na mosala ya kosakola. Luká makanisi oyo ekosalisa mpenza bandeko oyo bakosakola mokolo wana. Na ndakisa, okoki komona malamu bólobela lolenge moko ya kobanda lisolo to kosala yango elakiseli. Okoki kopona bótalela likanisi moko na buku Comment raisonner, buku Eteyelo ya mosala, to lisolo moko oyo eutaki kosalema na Likita moko ya Mosala. Na bantango mosusu, bokoki mpe kotalela ndenge ya kolonga mokakatano moko oyo basakoli bakoki kokutana na yango na teritware na bino, to bokoki kolobela ndenge ya kosalisa moto asepela na nsango malamu mpe ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia, mingi mpenza soki basakoli mingi bakozongela bato oyo basepelaki. Ezala bokotalela lisolo nini, lobá na esengo mpe na ndenge ya kolendisa.

3. Likita ya mosala ya kosakola esengeli koumela miniti boni, mpe makambo nini esengeli kosalema na likita yango?

3 Bandá likita na ngonga oyo etyami, ata soki oyebi ete bandeko mosusu bakoya nsima. Salelá bososoli ntango ozali kokabola basakoli, mpe pesá teritware na baoyo nyonso basengeli na yango. Likita yango esengeli koleka miniti 10 to 15 te mpe esengeli kozala mokuse mpenza soki esalemi nsima ya makita. Liboso likita esila, mosakoli mokomoko asengeli koyeba soki akobima ná nani mpe bakosakola wapi. Esengeli kosala libondeli na nsuka ya likita yango.

4. Nini ekoki kosalisa basakoli nyonso bázwa matomba na likita ya mosala ya kosakola?

4 Bokoki kopesa mabɔkɔ: Tokomonisa ete tozali komemya Yehova mpe komitya na esika ya basusu soki tozali kokóma na ngonga ya malamu na likita yango, ndenge tosalaka yango na makita ya lisangá. Pesáká biyano ntango motambwisi azali kotuna mituna. Okoki kosɛnga motambwisi apesa yo moto ya kobima na ye, to okoki koyokana liboso na mosakoli moko mpo bóbima elongo na ye. Soki omoni malamu kopona yo moko ndeko oyo okosakola na ye, salá makasi ‘ofungwama’ mpe osakolaka na bandeko mingi, na esika ya kosakolaka kaka elongo na baninga na yo. (2 Kol. 6:11-13) Soki likita esili, ezali malamu te kotika ndeko to teritware oyo bapesi yo; esengeli mpe kokende na teritware mbala moko.

5. Mokano ya likita ya mosala ya kosakola ezali nini?

5 Ezala likita ya mosala ya kosakola to makita ya lisangá, nyonso ezali na mokano kaka moko: ebongisami mpo na kosalisa biso “tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.” (Ebe. 10:24, 25) Soki tozali kosala nyonso tózwa matomba na likita yango, tokokokisa malamu mosala na biso ya kosakola​—‘mosala ya malamu’ mpenza!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto