Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/01 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Makita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Tosengeli lisusu te kotalelaka Mokapo ya mokolo na likita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 9/01 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Makambo nini esengeli kolobela na likita mpo na mosala ya kosakola?

Ntina ya likita mpo na mosala ya kosakola ezali ya kobongisa biso mpo na mosala ya kosakola. Yango wana, motambwisi asengeli komibongisa malamumalamu mpo akoka kobimisa makanisi oyo ekolendisa, makanisi ya sikisiki, oyo basakoli bakosalela na mosala ya kosakola. Soki mokapo ya mokolo elobeli mosala ya kosakola, bokoki kotánga mokapo yango mpe kolobela yango na boumeli ya mwa miniti. Kasi, likita yango esengeli libosoliboso kolobela makambo etali mosala ya kosakola oyo ekosalema, esengeli kosalisa bandeko nyonso oyo bakobima mpo na kopesa litatoli ete babongisama mpe basakola malamu na mokolo yango.​—2 Tim. 4:5.

Bokoki mpe kolobela makanisi mosusu oyo bokoki kosalela oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi mpo bandeko nyonso báyeba mokanda oyo bokolakisa na sanza yango mpe ndenge ya kolakisa yango. Na mokolo ya kolakisa bazulunalo, bokoki kosala elakiseli moko kati na bilakiseli oyo ezali na “Ndenge ya kolakisa bazulunalo.” Mpo na lolenge mosusu ya kosakola, bokoki kopona maloba ya kobanda lisolo moko to mibale oyo ezali na buku Comment raisonnner, maloba oyo bomoni ete ebongi kosalelama na teritware na bino. Bokoki kolobela to komonisa na elakiseli lolenge moko ya kosakola; na ndakisa ndenge ya kosalela Biblia ntango ozali kosakola, ndenge ya kosala mpo na kolonga ntembe mpe kosolola malamu na moto, ndenge ya kolendisa moto andima koyekola Biblia, to ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki.

Ezala likita mpo na mosala ya kosakola yango moko, kokabola bato, kopesa bango bateritware, mpe libondeli, nyonso esengeli kosalema na boumeli ya miniti 10 kino 15. Ntango likita yango esili, moto nyonso asengeli koyeba soki akobima na nani, bakosakola esika nini, mpe basengeli kokende nokinoki. Lokola likita yango eumelaka miniti mingi te, esengeli ete moto nyonso akoma na ngonga malamu. Soki likita yango esalemi nsima ya likita mosusu ya lisangá, na ndakisa nsima ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, esengeli kozala mokuse mpenza. Ezali na ntina te kolobela mokapo ya mokolo, mpo bosili kotánga mikapo mingi na likita oyo esalemi liboso.

Esengeli kopona ndeko moko ya makoki mpo akoka kotambwisaka likita nyonso ya mosala. Bankulutu basengeli kopona bandeko basi oyo basilá kozwa batisimo mpo na kotambwisa likita yango soki ekomi ete mokolo moko ata ndeko mobali moko te ya makoki azali wana mpo na kotambwisa likita ya mosala. Ndeko mwasi oyo azali kotambwisa likita yango akofanda mpo na kotambwisa lisolo oyo euti na mokapo ya mokolo to na makambo mosusu oyo etaleli mosala ya kosakola, asengeli kozwa ntango molai te. Asengeli kolata litambala.

Makita mpo na mosala ya kosakola ezali mabaku malamu mpo na biso, ya kolendisana mpe komibongisa malamu mpo na kobima na mosala ya kosakola. Soki ndeko oyo azali kotambwisa yango amibongisi malamumalamu liboso, bato nyonso bakozwa litomba na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto