Salelá malamu mpenza ntango na yo na mosala ya kosakola
Na mobu ya mosala 2014, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga 1 945 487 604 na mosala ya kosakola. Yango emonisi polele ete tozali na ekateli ya kosala mingi na mosala ya Yehova! (Nz. 110:3; 1 Ko. 15:58) Lokola “ntango oyo etikali ekómi mokuse,” tokoki nde kosalela malamu bangonga na biso, oyo ezali na motuya mingi, na mosala ya kosakola mpo tósolola lisusu na bato mingi?—1 Ko. 7:29.
Kosalela malamu mpenza ntango na biso na mosala ya kosakola esɛngaka kobongola makambo. Na ndakisa, soki mbala mingi olekisaka ngonga moko to koleka na motindo moko boye ya mosala ya kosakola kozanga ete osolola na moto, okoki nde kobongola makambo mpo okutana na bato mingi mpe osolola na bango? Makambo ezalaka ndenge moko te na bisika nyonso. Nzokande, makanisi oyo elandi ekosalisa yo osalelaka malamu mpenza ntango na yo mpo ‘obɛta mopɛpɛ te.’—1 Ko. 9:26.
Kosakola ndako na ndako: Banda bambula mingi, basakoli bamesaná kobanda mosala ya kosakola na ndako na ndako. Kasi, lokola bato mingi bakendaka mosala na moi, mpo na nini te komeka kosakola ndako na ndako na mpokwa to na ntɔngɔ, wana bato mingi bazali na ndako mpe bazali kopema? Na moi, kosakola na balabala to na bisika ya mombongo ekoki kobimisa mpenza matomba.
Litatoli na bisika ya bato nyonso: Esengeli kotya mikanda na bamesa mpe bashario na bisika oyo bato mingi balekaka na makolo na teritware ya lisangá. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya nsambo 2013, lok. 5.) Soki bato bazali lisusu koleka mingi te na esika oyo eponamaki mpo na kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso, Komite ya mosala ya lisangá ekozwa ekateli ya kopona esika mosusu oyo bato balekaka mingi mpo na kotya shario to mesa.
Kozongela bato mpe koyekola na bato Biblia: Okoki nde kozongelaka bato mpe koyekolaka na bango Biblia na bangonga mosusu oyo mitindo mosusu ya kosakola ebimisaka matomba mingi te? Na ndakisa, soki kosakola ndako na ndako ebimisaka matomba na mikolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ, okoki nde koyekola na bato Biblia na nsima ya midi to na mpokwa? Na bisika oyo basakoli basalelaka mituka na mosala ya kosakola, soki bakei kozongela bato, ekozala malamu ete bázala mingi te na motuka mpo básakola mingi!
Atako ezali solo ete tokoki kobanda kotánga ngonga ntango nyonso oyo tobandi kosakola, esengo na biso ekobakisama soki tosali mingi. Soki omoni ete motindo moko boye ya kosakola ezali kobota mbuma te na ngonga moko boye, meká motindo mosusu. Bondelá Yehova, “Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma,” mpo asalisa yo osalela malamu mpenza ntango na yo na mosala ya kosakola!—Mat. 9:38.