Lolenge bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ mpo na—Boyekoli ya Biblia kati na libota
1 Solo ebongisaka libota mpe epesaka yango ntina ya bomoi, kasi kosalela Yehova eyaka yango moko te. Esɛngaka ntango mpe molende mpo na kotonga libota oyo ezali makasi na elimo. Ezali na ntina monene mpo na basangani ya libota ete básala na bomoko mpo na likambo yango. Lisolo oyo ya liboso kati na molɔngɔ ya masolo misato ekolobela lolenge oyo mabota makoki kopesana mabɔkɔ mpo na kokóma na momeseno malamu ya koyekola Biblia.
2 Na kotángáká Biblia mokolo na mokolo: Masese 24:5 elobi ete “moto na mayele azali na makasi.” Boyebi oyo moto azwaka na kotángáká Liloba ya Nzambe mbala na mbala ekopesa ye nguya ya elimo oyo asengeli na yango mpo na kotɛmɛla Satana. (Nz. 1:1, 2) Botángaka Biblia mokolo na mokolo kati na libota? Manaka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali na “manaka mosusu mpo na botángi ya Biblia” mpo na pɔsɔ mokomoko ya mbula mobimba. Mpo na kolanda manaka yango ezali kosɛnga bobele miniti 10 mokolo na mokolo mpo na libota. Poná ngonga oyo ebongi, lokola na ntɔngɔ na ntango ya kolya, nsima ya bolei ya mpokwa, to liboso ya kolala, mpo na kotánga Biblia mpe kotalela mokapo ya mokolo na mokolo na mwa buku Tótángaka Makomami. Salá ete yango ezala momeseno ya libota na yo.
3 Na koyekoláká elongo pɔsɔ na pɔsɔ: Boyekoli ya Biblia esengeli kozala likambo ya ntina kati na libota pɔsɔ na pɔsɔ. Moto mokomoko ya libota asengeli kosimba ebongiseli yango mpe kosangana na yango na kopesáká biyano na ntango ya boyekoli. Tata ya libota akotalela bamposa ya libota na ye wana azali kopona makambo oyo bakoyekola mpe mokolo oyo boyekoli ekosalema, ngonga ya kobanda boyekoli, mpe ntango boni boyekoli yango esengeli koumela. Salá ete boyekoli ya Biblia kati na libota ezwa esika ya liboso na manaka na bino ya pɔsɔ. Kotika te ete makambo mosusu oyo ezali mpenza na ntina te epekisa bino koyekola.—Filp. 1:10, 11.
4 Mbala mingi, bazalaki kobénga tata ya libota moko na telefone mpo na makambo ya mombongo na ntango ya boyekoli ya libota, tata yango azalaki kokata telefone. Soki bakiliya bayei na ndako, azalaki kobénga bango básangana na boyekoli to bázela kino ntango boyekoli ekosila. Tata yango azwaki ekateli ete eloko moko te ebebisa boyekoli na bango. Yango ezalaki na bopusi malamu likoló na bana na ye. Ata mpe mombongo na ye etambolaki malamu.
5 Oyo nde esengo wana bato ya libota moko bazali kopesana mabɔkɔ mpo na makambo ya elimo. Soki tomonisi bosembo na milende na biso ya kosangana mbala na mbala na boyekoli ya Biblia kati na libota, tokozwa mapamboli ya Yehova.—Nz. 1:3.