Mosala ya mobongisi-nzela—Lolenge ya kosalela ntango na biso na mayele!
1 ‘Nazalaka ntango nyonso na mosala mingi! Ekozala malamu ete nabanda mosala ya mobongisi-nzela na ntango oyo?’ Ezali lolenge yango nde ndeko moko ya mwasi azalaki kokanisa wana azalaki koyoka nkulutu moko mobongisi-nzela kosala lisukulu na liyangani ya zongazonga. Lisukulu yango ezalaki na motó ya likambo oyo: “Tókende liboso kati na mosala ya mobongisi-nzela.” Bobele na liyangani yango, ndeko mobali moko azalaki kokanisa, ‘Lolenge nini akoki komibongisa mpo na mosala ya mobongisi-nzela? Nazali nkulutu te, kasi nazali na makambo mingi ya kosala na bomoi na ngai!’
2 Wana nkulutu akobaki kosala lisukulu na ye oyo ezalaki komonisa matomba ya mosala ya mobongisi-nzela, asololaki na mwa babongisi-nzela ya zongazonga mpo na lolenge oyo bamibongisaki mpo na kobanda mosala yango mpe mapamboli oyo Yehova asili kosopela bango mpo na milende na bango. Moko na bango azalaki ebɔsɔnɔ, mosusu azalaki na mobalani oyo azali mondimi te, mpe mosusu atikaki mosala moko oyo ezalaki kopesa ye matomba mingi kasi atako bongo, azalaki na makoki ya kokokisa bamposa na ye. Ntango bayokaki lolenge oyo babongisi-nzela yango balongaki na lisungi ya Yehova, ndeko mobali mpe ndeko mwasi wana, na kati ya liyangani batalelaki lisusu makanisi na bango mpe ezalela na bango. Tolendisi bino mpe ete bósala bongo, mingi mpenza lokola bakitisi ngonga ya babongisi-nzela, yango ekopesa basakoli mingi ya nsango malamu likoki ya kosala mosala yango.
3 Toyebi ete Yehova azali Mozalisi mpe Mokonzi ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, mpe ete azali liziba ya bomoi na biso. (Dan. 4:17; Mis. 17:28) Tondimi ete Yehova azali kosalela ebongiseli bobele moko. Tozali na libaku malamu ya kosala elongo na ebongiseli yango na bosembo nyonso, mpe na bongo kosala elongo na “moombo ya sembo mpe ya mayele” na kopesáká litatoli mpo na Bokonzi liboso ete nsuka eya. (Mat. 24:45; 25:40; 1 Pet. 2:9) Lokola tozali kobika mpenza na “mikolo ya nsuka,” tozali komona ete ntango oyo totikali na yango mpo na koteya ezali koleka mbangu mpenza. (2 Tim. 3:1) Bobele na ntango yango, tozali mpe na mposa ya kokokisa bamposa ya mosuni ya mabota na biso. (1 Tim. 5:8) Lifuti ya moto ezali lisusu kokokisa bamposa na ye te ndenge ezalaki kokokisa yango liboso. Mbala mosusu nzoto na biso ezali lisusu kolɔngɔnɔ te ndenge ezalaki liboso. Mpe mpo na koloba solo, tozali na mposa ya komibombela mwa ntango mpe mwa mbongo mpo na biso moko. (Mos. 3:12, 13) Na yango tokoki komituna soki kondima libyangi ya kosala lokola mobongisi-nzela ezali ekateli moko ya malamu.
4 Yango ezali likambo ya mokomoko kati na biso ete atalela ezalela na ye malamumalamu mpe azwa ekateli soki akoki kosala lokola mobongisi-nzela to te. (Lom. 14:12; Gal. 6:5) Ezali likambo ya kolendisa na komona ete bandeko oyo bazali kondima kosala lokola babongisi-nzela bazali se kobakisama. Atako mitungisi mpe mikakatano ya mikolo oyo ya nsuka ezali, lapolo ya mosala oyo ebimi na Annuaire 1999 emonisi ete pene na basakoli 700 000 na libota ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kokoba na molende nyonso kosala lokola babongisi-nzela. Atako bazali kosala na bisika oyo nkita ya mboka ezali lisusu malamu te, kozanga ya transport, mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, mikakatano mosusu mpe minyoko, bandeko yango basi na mibali bazali kolɛmba te kosala oyo ezali malamu, mpe ebongi ete tópesa bango longonya. (Gal. 6:9) Bandimi libyangi ya Yehova ete bámeka ye. (Mki. 3:10) Bandimi ete mosala ya mobongisi-nzela ezali lolenge malamu ya kosalela mwa ntango na bango mpe biloko na bango na mayele mpe ete Yehova asili mpenza kopambola bango mpe milende na bango oyo basali mpo na kosala mbongwana oyo esengeli mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela mpe kokoba na yango.
5 Babongisi-nzela bazali kozwa mapamboli: Ndeko mwasi moko na ekólo Cameroun, ye azali na mwana mwasi ya moke mpenza alobaki ete: “Nabimaka ntango nyonso na mosala ya kosakola na mwana na ngai banda ntango abotamaki. Ata liboso ete abanda kotambola, nabandaki komema ye na mokɔngɔ. Mokolo moko na ntɔngɔ wana nazalaki na mosala ya kosakola, natɛlɛmaki pembeni ya nzela esika batɛkaka mwa biloko mikemike. Mwana na ngai azwaki bazulunalo na sakosi na ngai mpe akendaki na ngámbo mosusu ya balabala. Atako azalaki na likoki ya koloba mingi te, abendaki likebi ya mwasi moko mpe alakisaki ye zulunalo. Mwasi yango akamwaki mpenza komona mwana moke boye kosala mosala yango. Asombaki zulunalo mpe andimaki koyekola Biblia!”
6 Mpo na koyanola na libyangi ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi, nkulutu moko na ekólo Zambie, azali tata ya libota mpe mosala na ye ya mosuni ezali kozwa ye ntango mingi, azwaki ekateli ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi atako azalaki na mosala mingi. Alingaki kopesa ndakisa na lisangá mpe na libota na ye. Mikolo mosusu, azalaki kotɛlɛmisa motuka na ye na ngámbo moko ya balabala mpe kobɛta kasɛti ya buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Mpe azalaki kobénga bato oyo bazalaki koleka ete báya koyoka makambo oyo ezalaki kotángama na mongongo makasi. Yango epesaki ye nzela ya kokabola buku Bolamu na libota 16 mpe buku Boyebi 13, mpe abandaki koyekola Biblia na bato mibale.
7 Elimo malamu ya mosala ya mobongisi-nzela emonanaki mpe na ekólo Zimbabwe. Na boumeli ya sanza ya Aprili 1998, lisangá moko oyo ezali na basakoli 117 kati na bango basakoli 70 basalaki lokola babongisi-nzela basungi mpe basakoli 9 bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza. Lisangá mosusu oyo ezali na basakoli 94, kati na bango basakoli 58 basalaki lokola babongisi-nzela basungi. Lisangá mosusu oyo ezali na basakoli 126 kati na bango basakoli 58 bazwaki ekateli ya kosala lokola babongisi-nzela basungi elongo na basakoli 4 oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza. Mobu ya mosala oyo euti koleka ezalaki mpenza mobu moko ya ntina mingi na ekólo Zimbabwe. Atako bandeko bazalaki na makambo mingi ya kosala na mabota na bango, na lisangá, mpe kotonga bandako ya la Société, batyaki mpenza makanisi na bango mpo na kosalela ntango na bango malamu na mosala ya kosakola.
8 Babongisi-nzela bandimi ete, soki babandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe bazali kokoba na yango ezali na makasi na bango moko te. Bandimaka mpenza ete nyonso oyo bakoki kosala ekosalema “mpo na nguya oyo ekopesaka Nzambe.” (1 Pet. 4:11) Kondima na bango ezali kopusa bango ete bákoba na mosala na bango mokolo na mokolo. Na esika ya koluka matomba mpe biloko bibongi mpo na bango moko, babongisi-nzela oyo bazali kolonga na mosala na bango bamonaki ete mpo na kokende liboso, basengeli “koyika mpiko,” mpe bazwaki mapamboli mingi.—1 Tes. 2:2.
9 Tómekola ndakisa ya Paulo: Biblia ezali kolobela makambo oyo ntoma Paulo asalaki na mosala ya kosakola mpe ndenge asungaki bato mingi. Nzokande Paulo azalaki na makambo mingi ya kosala. Ayikaki mpiko liboso ya komekama mpe minyoko mpo na koteya nsango malamu mpe kolendisa masangá. Asengelaki mpe koyika mpiko na mokakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye. (2 Kol. 11:21-29; 12:7-10) Azwaki ekateli ya kosalela ntango na ye na mayele. Ayebaki ete asalaki mosala na ye nyonso na lisungi ya Yehova. (Filp. 4:13) Moto moko te, kati na bato oyo Paulo asalisaki, akokaki koloba ete ntango oyo Paulo alekisaki na mosala ya Yehova mpe milende na ye ezalaki ya mpamba, mpe ete akokaki kosalela yango malamu koleka na ndenge mosusu. Kutu, kino lelo, tozali kozwa matomba na lolenge oyo Paulo asalelaki ntango na ye na mayele! Tozali kosepela na toli na ye oyo ezali kosalisa biso ete tótalela lisusu malamu makambo oyo ezali na esika ya liboso na bomoi na biso mpe tókangama na solo na mikolo oyo ya mpasi!
10 Koleka ndenge ezalaki liboso, ‘ntango oyo etikali mpo na kosakola nsango malamu ezali mokuse.’ (1 Kol. 7:29, NW; Mat. 24:14) Na yango, esengeli tómituna boye, ‘Soki bayebisi ngai ete lobi nakokufa, lelo oyo nakoki mpenza koloba na Yehova ete nasalelaki bomoi na ngai na ndenge ya malamu?’ (Yak. 4:14) Ekozala malamu koyebisa Yehova uta sikoyo kati na libondeli mposa na yo ya kosalela ntango na yo na mayele lokola Motatoli na ye. (Nz. 90:12) Bondelá Yehova ete asalisa yo osala ete bomoi na yo ezala ya mindɔndɔmindɔndɔ te. Ata soki liboso ozalaki na likanisi ya kosala lokola mobongisi-nzela te, ekoki kozala ete ozali komona sikoyo ete mosala ya mobongisi-nzela ekoki kozala malamu mpo na bomoi na yo, boye te?
11 Tósala nyonso oyo tokoki kosala: Ezali basakoli nyonso te nde bazali na likoki ya kolekisa ngonga 70 na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpamba te bomoi ya moto na moto ekeseni. Nzokande, basakoli mingi bazali komibongisa mpo na kosala ngonga 50 na sanza na mosala ya kosakola lokola babongisi-nzela basungi mbala na mbala to ntango nyonso oyo likoki ezali. Soki ozali na likoki te ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi to mobongisi-nzela ya sanza na sanza, kolɛmba te. Bondelá Yehova ntango nyonso mpo ete ezalela na yo ebongwana. Wana ozali kozela, soki mbongwana esalemi te, okozwa elendiseli na koyebáká ete Yehova azali kosepela na oyo ozali kosala na motema na yo mobimba na mosala na ye. (Mat. 13:23) Azali komona ete ozwi etɛlɛmɛlo mpo na ye mpe ete ozali mosakoli moko ya molende oyo alekisaka sanza mobimba te kozanga kopesa litatoli. Mbala mosusu okoki kosala milende ya kokolisa makoki na yo ya kopesa litatoli, kosala milende mpo na kokóma mosakoli mpe moteyi malamu ya nsango malamu.—1 Tim. 4:16.
12 Lokola ‘mokolo ya Yehova, mokolo monene mpe ya nsɔmɔ’ ebɛlɛmi, tosengeli kosalela na mayele mwa ntango oyo etikali soki tolingi kosilisa mosala oyo apesaki biso. (Yoe. 2:31) Satana ayebi ete ntango na ye etikali mokuse, yango wana azali koluka kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kokómisa bomoi na biso mindɔndɔ mpe kokómisa yango mpasi mpo tókoka te kotya makanisi na biso na makambo oyo ezali mpenza na ntina. (Filp. 1:10; Emon. 12:12) Okanisa soko moke te ete Yehova azali kotyela yo likebi te mpe ete azali kosalisa yo te ete bomoi na yo ezala na mindɔndɔ te mpo na kosala nyonso oyo okoki kosala kati na mosala ya kosakola. (Nz. 145:16) Basakoli mingi bazali kozwa esengo na kotalela lisusu ezalela na bango, soki bakoki kokóma babongisi-nzela basungi to babongi-nzela ya sanza na sanza. Ya solo, babongisi-nzela bazali kosepela ndenge bazali kosalela ntango na bango na mayele. Okozala moko na bango?