Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/03 lok. 8
  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mosala ya mobongisi-nzela​—Lolenge ya kosalela ntango na biso na mayele!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 8/03 lok. 8

Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela

1, 2. Mapamboli nini mosala ya mobongisi-nzela epesaka, mpe mpo na nini?

1 Mobongisi-nzela moko alobaki boye: “Nayebi ete mosala mosusu te ekokaki komemela ngai esengo lokola esengo oyo nazwaka na mosala ya kosakola solo epai na basusu.” Mobongisi-nzela mosusu alobaki boye: “Na nsuka ya mokolo na mokolo, nalalaka malamu mpe motema na ngai etondaka na esengo.” Babongisi-nzela yango babimisi nde makanisi oyo ezalaka na mitema ya bandeko basi mpe bandeko mibali ya mokili mobimba oyo bazwi mapamboli ya mosala ya mobongisi​-nzela.​—Mas. 10:22.

2 Kosalisa bamosusu báyeba Liloba ya Nzambe, liloba oyo ebikisaka bato, epesaka esengo ya solosolo. (Mis. 20:35; 1 Tes. 2:19, 20) Mobongisi-nzela moko oyo alekisá mbula mingi na mosala yango akomaki boye: “Ezali mpenza likambo ya kosepelisa mpe ya kolendisa na komona lolenge Liloba ya Nzambe ezali kotinda bato na kobongola bomoi na bango mpo na kosepelisa Yehova.” Ya solo, lokola babongisi-nzela bamipesaka na kosalisa bato mpe koyekola na bango Biblia, yango wana bazwaka mapamboli ya ndenge wana.

3, 4. Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela esalisaka moto ayeba kotyela Yehova motema mpe ndenge nini yango esalisaka moto akola na elimo?

3 Batyelaka Yehova motema: Lokola mokolo na mokolo babongisi-nzela batyelaka elimo ya Nzambe motema na ntango bazali kosakola, yango esalisaka bango bálona “mbuma ya elimo” mpe ebatelaka bango. (Gal. 5:16, 22, 23) Longola yango, lokola babongisi-nzela basalelaka Liloba ya Nzambe mingi, yango esalisaka bango báyeba malamumalamu kosalela Makomami mpo na kolobela solo mpe kosalisa bamosusu ete bákóma makasi na elimo. (2 Tim. 2:15) Ndeko mobali moko oyo azali mobongisi-nzela banda bambula mingi, alobaki boye: “Mosala ya mobongisi-nzela esalisi ngai ete nayeba Biblia malamumalamu, mpe nasaleli boyebi yango mpo na kosalisa bato mingi báyeba Yehova mpe mikano na ye.” Oyo nde likambo ya esengo!

4 Babongisi-nzela ya sanza na sanza basengeli mpe kotyela Yehova motema na ebele ya makambo mosusu. Bakómaka na kondima makasi ntango bamonaka ndenge oyo Yehova apambolaka milende oyo basalaka mpo na kozwa biloko ya kobikela. Mobongisi-nzela moko oyo azali na mbula 72, oyo asali mbula 55 na mosala yango alobaki boye: “Yehova ayokisá ngai naino mawa ata moke te.” Lisusu, lokola babongisi-nzela bazalaka na bomoi ya mindɔndɔmindɔndɔ, yango ebatelaka bango na mitungisi ya bomoi. Yo mpe osepelaka na bomoi ya ndenge wana?​—Mat. 6:22; Ebe. 13:5, 6.

5. Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela esalisaka moto apusana penepene na Yehova?

5 Bapusanaka penepene na Nzambe: Boyokani na biso na Yehova ezali likambo oyo eleki motuya. (Nz. 63:3) Ntango tozali kosakola mingi mpo tolingaka Yehova, boyokani yango ekómaka lisusu makasi koleka. (Yak. 4:8) Ndeko mobali moko oyo azali mobongisi-nzela banda mbula 18, alobaki boye: “Mosala ya mobongisi-nzela ezali kopesa biso likoki ya ‘komeka mpe kososola ete Yehova azali malamu,’ mpe na ndenge yango kosala boyokani ya makasi mokolo na mokolo elongo na Mozalisi na biso.”​—Nz. 34:8.

6. Makambo nini babongisi-nzela basengeli kozala na yango, mpe longola babongisi-nzela bango moko, banani mosusu bazwaka matomba na mosala na bango?

6 Babongisi-nzela basengeli kotya makambo na bango na molɔngɔ, kasi mpe kozala na kondima makasi, na bolingo ya solosolo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na bango, mpe kozala na elimo ya komipimela. (Mat. 16:24; 17:20; 22:37-39) Kasi, ndenge bilongi ya babongisi-nzela ya mokili mobimba ezali kongɛnga na esengo, ezali komonisa ete mapamboli oyo bazali kozwa eleki makambo mosusu nyonso oyo bamipimelaka. (Mki. 3:10) Kaka babongisi-nzela te nde bazwaka mapamboli yango, mabota ná masangá na bango ezwaka mpe matomba mingi na elimo ya malamu oyo bamonisaka.​—Filp. 4:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto