“Lobá mbala moko likambo oyo oyeli!”
1 Naino ekómela yo te ete moto oyo ozali kosolola na ye akata lisolo moko oyo obongisaki malamu na maloba oyo: “Lobá mbala moko! Olingi nini?” Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
2 Lelo oyo bato mingi bakómi mitema mɔ́tɔmɔ́tɔ. Bazalaka na mposa ya koyeba soki tozali banani mpe mpo na nini toyei epai na bango. Soki bamoni ete toyei kotala bango mpo na kosolola na bango masolo ya Biblia, mbala mosusu baboyaka koyoka. Bato mingi bamonaka mpenza ntina te ya kotánga Biblia mpe kosolola makambo ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kondimisa bato motindo wana ete basengeli kopesa mwa miniti moke mpo tósolola na bango masolo ya Biblia?
3 Eloko nini ebimisaka matomba malamu: Mpo na kolonga esengeli koyebisa molobani na yo na mwa maloba mokuse ete Biblia ezali komonisa lolenge ya kosilisa mikakatano na ye. Mpo lisolo ebimisa matomba malamu esengeli kosalela motuna oyo ekopusa molobani na yo na kokanisa, mpe na nsima pesá mokapo oyo ezali koyanola na motuna yango. Okoki komeka kosalela mwa makanisi oyo elandi. Ebongisami mpo na kosalisa biso ‘tóloba mbala moko likambo oyo toyeli’ nsima ya kobenda likebi ya moto oyo tozali kosolola na ye.
4 Na bateritware oyo mbala mingi bato balobaka ete basepelaka na biso te, okoki kotuna motuna oyo ekotalela mpenza bango:
◼ “Lokola tolingi kokɔta na ekeke ya sika, yango ezali kosepelisa yo to ezali kobangisa yo? [Tiká ye ayanola.] Biblia esakolaki uta kala makambo ya nsɔmɔ oyo tozali komona kokokisama na yango lelo oyo.” Tángá 2 Timote 3:1, 2, 5 mpe Masese 2:21, 22.
◼ “Na mboka oyo, bato bazali komibanzabanza mingi mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Oyebaka ete Nzambe alaki kosilisa mikakatano nyonso ya nzoto mpo na libela?” Tángá Emoniseli 21:3, 4.
◼ “Okanisi ete mboka na biso ekozala malamu soki moto nyonso oyo azali kofanda awa asaleli mitinda ya Biblia?” Tángá Matai 22:37-39.
5 Lokola mokumba na biso ezali ya koteya nsango malamu ya Bokonzi, tosengeli ntango nyonso koluka kobenda likebi likoló ya makambo oyo Bokonzi ekosala. Okoki koloba boye:
◼ “Oyebaka ete Biblia, buku oyo eumeli mingi koleka babuku nyonso na mokili, esakolaki ete Bokonzi moko ekoyangela mokili mobimba?” Tángá Danyele 2:44.
◼ “Mpo na yo bomoi ekozala ndenge nini soki Yesu Klisto ayangeli mabelé?” Tángá Nzembo 72:7, 8.
6 Na bateritware oyo bato bamipesi na makambo ya mangomba, okoki komeka moko kati na maloba oyo mpo na kobanda lisolo:
◼ “Bato mingi bazali konyokwama mpo bazali basi to mibali, to mpo na lingomba na bango, to mpo na mposo na bango. Okanisi ete Nzambe andimaka makambo ya ndenge wana?” Tángá Misala 10:34, 35.
◼ “Toyebi ete Yesu Klisto asalaki makamwisi mingi ntango azalaki awa na mabelé. Soki ozala na likoki ya kosɛnga ye ete asala likamwisi moko lelo, olingaki kosɛnga na ye asala nini?” Tángá Nzembo 72:12-14, 16.
7 Soki moto akakatanaki mpo na koyamba yo, okoki kobanda lisolo na kolobáká ete:
◼ “Bato mingi lelo oyo balɛmbi koyoka bansango ya mpasi. Bazali na mposa ya koyoka lolenge nini kosilisa bampasi. Na ntembe te yango ezali mpe bongo mpo na yo. Kasi epai wapi tokoki kozwa lisungi ya solo?” [Tiká ye ayanola.] Tángá 2 Timote 3:16, 17.
8 Mpo na nini te komeka yango? Mbala mingi, motuna moko ya pɛtɛɛ mpe ya polele ekoki mpo na kobenda likebi ya molobani na yo. Mwasi moko oyo azalaki liboso koboya solo akɔtisaki bandeko basi mibale epai na ye nsima wana moko na bango atunaki ye motuna ete: “Oyebaka Bokonzi oyo osambelaka mpo na yango na libondeli ya Tata na Biso?” Likebi ya mwasi yango ebendamaki na motuna yango, mpe andimaki koyekola Biblia. Lelo oyo, azali mosaleli ya Yehova oyo amipesi!
9 Ntango ozali kosolola na moto, lobá mpenza na maloba na yo moko. Maloba na yo esengeli kouta mpenza na motema. Bato basepelaka soki bamoni ete tozali solo komibanzabanza mpo na bango.—Mis. 2:46, 47.
10 Lelo oyo, kosakola nsango malamu ezali lisɛki te. Bato mosusu bazalaka na makanisi mabe mpo na bato oyo bayebi bango te. Bato mosusu bazali na bomoi ya yikiyiki mpe bazalaka bobele na ntango moke mpo na koyoka. Ɛɛ, tosengeli koyeba ete, ezali naino na bato mingi oyo bakoki koyoka biso, mpe tosengeli koluka bango. (Mat. 10:11) Milende na biso mpo na koluka bango ekobimisa matomba malamu soki masolo na biso ezali mokuse mpe soki ‘tolobi mbala moko likambo oyo tozali na yango!’