Tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo
1. Mpo na nini ezali malamu tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo na esika ya kokanga na motó maloba oyo batyelaka biso na Mosala na biso ya Bokonzi?
1 Mbala mosusu, okoki komituna boye: ‘Lokola Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza nyonso emonisaka ndenge ya kolakisa bazulunalo, mpo na nini tosengeli lisusu kobongisaka ndenge ya kolakisa yango?’ Atako mingi bamonaka ete maloba ya kobanda lisolo oyo ezalaka na Mosala na biso ya Bokonzi esalisaka bango, kasi biso moko mpe tosengeli kobongisaka ndenge ya kolakisa bazulunalo. Lolenge ya kobanda lisolo oyo ebimisaka matomba na teritware moko ekoki mbala mosusu kobimisa matomba te na teritware mosusu. Yango wana, tosengeli kokanisa te ete tosengeli kolakisa bazulunalo kaka na maloba oyo bapesaka biso lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi. Ata soki tokani kosalela maloba wana, ekozala malamu tóloba yango na maloba na biso moko.
2. Ndenge nini koyeba lisolo oyo okolakisa moto?
2 Poná lisolo moko: Ya liboso, tángá zulunalo yango mobimba; na nsima, poná lisolo moko oyo ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe oyo esepelisi yo mingi. Ntango ozali kolakisa moto lisolo yango, soki ozali koloba na esengo mpe na ndenge oyo emonisi ete ondimi mpenza makambo oyo ozali koloba, ye mpe akosepela kotánga yango. Atako okosepela kolakisa lisolo oyo ekobenda likebi ya bato mingi ya teritware na bino, kasi osengeli mpe koyeba malamu masolo mosusu ya zulunalo yango. Yango ekosalisa yo oyeba kobongola ndenge ya kolakisa zulunalo yango soki okutani na moto moko oyo asepeli mingi nde na lisolo mosusu.
3. Wapi maloba ya ebandeli oyo osalelaka mpe omonaka ete ebimisaka matomba mingi?
3 Tuná motuna: Ya mibale, bongisá maloba na yo ya ebandeli malamumalamu, mpamba te yango ezali na ntina mingi. Ekoki kozala malamu kotuna moto motuna moko oyo ekotinda ye akanisa mpe asepela na lisolo oyo oponaki kolakisa ye. Mbala mingi, kotuna moto mituna oyo ekosɛnga apesa likanisi na ye ebimisaka matomba. Boyá kotuna moto mituna oyo ekosala ete amiyoka malamu te to aluka komilongisa.
4. Wapi matomba ya kotángela moto vɛrsɛ, soki likoki ezali?
4 Tángá vɛrsɛ moko: Na nsuka, poná vɛrsɛ oyo okotánga soki likoki ezali, ekoki kozala vɛrsɛ moko oyo ezali na lisolo oyo olingi kolakisa. Soki totángeli moto vɛrsɛ, akomona ete nsango na biso euti na Liloba ya Nzambe. (1 Tes. 2:13) Longola yango, vɛrsɛ ekopesa ye litatoli ata soki aboyi kozwa bazulunalo. Basakoli mosusu batángelaka moto vɛrsɛ liboso ya kotuna ye motuna moko boye, mpo na kobenda likebi na ye. Liboso ya kotángela moto vɛrsɛ, okoki koyebisa ye boye: “Nalingi nayeba likanisi na yo na makambo vɛrsɛ oyo elobi.” Na nsima, okoki koyebisa ye likanisi moko ya zulunalo oyo eyokani na makambo yango mpe kobakisa mwa maloba oyo ekotinda ye asepela lisusu mingi na zulunalo yango. Na nsuka nde okolakisa ye yango.
5. Makambo nini ya ntina mingi osengeli kobosanaka te ntango ozali kobongisa ndenge ya kolakisa bazulunalo?
5 Mobeko moko te emonisi ete esengeli kaka koloba makambo boye to boye ntango tozali kolakisa bazulunalo. Kasi, mbala mingi ezalaka malamu maloba ya kobanda lisolo ezala mindɔndɔ te mpe ebele ebele te. Salelá lolenge ya kobanda lisolo oyo ezali pɛtɛɛ mpo na yo mpe oyo ebimisaka matomba. Monisá ete bazulunalo na biso ezali na ntina mingi, mpe zalá na esengo ntango ozali kolakisa yango. Soki omibongisi malamu, okozwa matomba mpenza ntango okolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai ya bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”—Mis. 13:48.