Ozali kosala malamumalamu mosala na yo ya kosakola?
1 Na oyo etali mosala oyo bayekoli ya Yesu basalaki, mokanda ya Misala elobi ete “bapesaki litatoli malamumalamu” epai ya bato. (Mis. 2:40; 8:25; 28:23) Na ntembe te, ntoma Paulo mpe azalaki na mokano ya kosala bongo. (Mis. 20:24) Lokola ozali ministre ya nsango malamu, yo mpe ozali na mokano ya kosala bongo, boye te? Ndenge nini okoki kosala yango?
2 Bongisá ndenge nini okobanda lisolo: Mpo na kopesa litatoli ya malamu na mosala ya kosakola, osengeli komibongisa malamu. Mingimingi mpenza ntango olingi kokabola bazulunalo, mpo mitó ya makambo na yango ebongwanaka mbala na mbala. Mpo na kosalisa biso tomibongisa malamumalamu, Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali na likambo moko ya sika—molɔngɔ moko oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi, ezali na liste ya maloba ya ebandeli oyo ezali lokola bandakisa mpo na kolakisa banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Sanza na sanza likebi ekotyama na lisolo moko oyo ekosepelisa mpenza bato mingi. Ndenge nini okoki kobongisa maloba yango ya kolakisa bazulunalo?
3 Poná ndakisa oyo omoni ete ekobimisa litomba na teritware na bino. Tángá malamumalamu lisolo oyo basɛngi tólakisa bato na zulunalo yango, mpe poná makambo ya sikisiki oyo omoni ete ekobenda likebi ya bato na teritware na bino. Luká vɛrsɛ moko ya Biblia na zulunalo yango, oyo eyokani malamu na lisolo oyo ozali kosalela, vɛrsɛ oyo okoki kotángela moto oyo ozali kosolola na ye. Na nsuka, lendisá moto oyo azali koyoka yo atánga zulunalo yango mpe soki ebongi, okoki kolobela mwa likabo oyo moto yango akoki kopesa mpo na kosunga mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Sikoyo meká ndenge okolakisa zulunalo yango.
4 Salelá Biblia: Soki omibongisi malamu, okoki mpe kokɔtisa mokapo moko ya Biblia na maloba na yo ya kolakisa bato zulunalo. Na ndakisa, na bisika mingi basakoli oyo bameseni na mosala ya kosakola bazali kozwa matomba mingi mpo na yango; bakendaka na Biblia na bango na mabɔkɔ. Nsima ya kopesa mbote na moto oyo bakutani na ye, babandaka lisolo boye:
◼ “Tozali kotuna bato soki bandimaka likambo oyo: . . . ” Tángá Genese 1:1, mpe na nsima tuná boye: “Yo mpe ondimi likambo yango?” Soki moto yango andimi, na nsima lobá boye: “Ngai mpe nandimaka yango. Kasi, okanisi ete soki Nzambe azalisaki biloko nyonso, ye mpe moto asali ete mabe ezala?” Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá Mosakoli 7:29. Fungolá buku Boyebi na lokasa 71, mpe tángá paragrafe 2. Lendisá moto yango ete atánga buku yango. Soki moto oyo ozali kosolola na ye andimi te likambo oyo ezali na Genese 1:1, lendisá ye atalela buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?
5 Kendé kotala bato nyonso oyo basepelaki: Soki ozali te kozongela bato oyo basepelaki, okokoka te kosala malamumalamu mosala na yo ya kosakola. Soki osololi malamu na moto moko, ezala soki otikeli ye zulunalo to mokanda mosusu, komá nkombo ya moto yango mpe adresi na ye. Salá makasi okolisa mposa ya moto yango, na kozongeláká ye nokinoki. Salá makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.
6 Bayekoli ya ekeke ya liboso bayebaki ete Yesu apesaki bango etinda ya “kopesa litatoli malamumalamu.” (Mis. 10:42, NW) Etinda yango etaleli mpe biso, mpo ezali lolenge bobele moko oyo tokoki kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19,20) Tiká tosala nyonso mpo na kokokisa malamumalamu mosala na biso.—2 Tim. 4:5.