Biyano na mituna na bino
◼ Mokanda nini tosengeli koyekola na bato liboso bázwa batisimo?
Liboso ete moto akoka komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo, asengeli kozwa boyebi ya sikisiki. (Yoa. 17:3) Akoyeba makambo oyo asengeli na yango na koyekoláká bisaleli mibale oyo: mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpe buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Mbala mingi boyekoli ebandaka nde na mwa buku Azali kosɛnga. Nzokande, soki bobandaki boyekoli na buku Boyebi, bosengeli mpe koyekola mwa buku Azali kosɛnga soki bosilisi boyekoli ya buku. Yango ezali na ntina nini?
Mwa buku Azali kosɛnga emonisaka mateya ya moboko ya Biblia. Soki moyekoli ayekoli yango liboso, ekosalisa ye azala na boyebi ya makambo ya ntina oyo esɛngami mpo na kosepelisa Yehova. Soki ayekoli yango na nsuka, yango ekozala lokola bozongeli malamu ya makambo oyo ayekolaki na buku Boyebi. Ata soki mwa buku yango etalelami liboso to nsima ya buku Boyebi, lendisá moyekoli alukaka mikapo oyo esimbi mateya mpe amanyola yango. Bóbosana kosalela bililingi te, mpamba te yango ezali bisaleli makasi mpo na koteya.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1997, lokasa 16 mpe 17.
Ntango moyekoli asilisi koyekola mikanda yango nyonso mibale, akozala na likoki ya koyanola na mituna nyonso oyo bankulutu bakotalela elongo na ye ntango akobanda komibongisa mpo na kozwa batisimo. Nsima ya mikanda yango, ekozala na ntina te koyekola na ye mokanda mosusu, atako motambwisi asengeli kolandela bokoli na ye.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1996, lokasa 14 mpe 17.