Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/99 nk. 3-4
  • Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela sikoyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela sikoyo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Tokosala mosala yango lisusu?—Libyangi mosusu mpo na babongisi-nzela basungi​—Eteni 1
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 8/99 nk. 3-4

Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela sikoyo?

Tozali koluka babongisi-nzela ya sanza na sanza 10 000!

1 Mokapo na biso ya mobu 1999 ezali ntango nyonso kobenda likebi na biso ete tozali naino na “mokolo na kobika” na Yehova (2 Kol. 6:2) Kasi, mosika te, mokolo na ye ya kobika ekokóma na nsuka na yango. Na nsima ‘mokolo ya kosambisa’ na ye ekobanda. (2 Pet. 2:9) Wana Yehova azali kopesa bato likoki ya kobika, ezali mpenza esɛngo na komona ebele ya bato oyo bazali kondima kobika!

2 Lokola ezali pɛtɛɛ te kozwa bato oyo basepelaka na solo, basaleli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na koluka bato yango liboso nsuka ekóma. Mpo na basakoli mingi ya Bokonzi, yango elimboli kosala mosala ya mobongisi-nzela. Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela sikoyo? Mpo na nini tozali kotuna motuna yango?

3 Bamonisaki botɔndi na bango: Lokola eyebisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 1999, bakitisi bangonga ya babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe ya babongisi-nzela basungi. Mpo na kosala mosala yango, babongisi-nzela ya sanza na sanza basengeli kosakola sanza na sanza ngonga 70, na nsuka ya mobu ya mosala bakokokisa ngonga 840. Babongisi-nzela basungi bakolekisa ngonga 50 na sanza. Talá mwa maloba ya komonisa botɔndi oyo bandeko bakomaki mpo na ebongiseli yango:

“Oyo nde likabo kitoko! Yango euti epai ya Tata na biso ya likoló.

“Nazangi maloba mpo na komonisa esengo, bolingo, mpe matɔndi na ngai mpo na ebongiseli oyo!”

“Mosala na biso ekómi pɛpɛlɛ mpenza!”

“Sikoyo tozali na mposa bato mingi básala mosala ya ntango nyonso mpe bakosepela na mapamboli oyo tozwaka ntango tozali kosalela Yehova mingi.”

4 Awa tozali kokóma na nsuka ya mokolo ya kobika ya Yehova, ntembe ezali te ete Yehova alingi basaleli na ye báyokisa lokito ya nsuka, lokito makasi ya masanzoli. Nsango yango epanzani mingi mpe ezali kopesama makasi (1) mpo basakoli ya Bokonzi bakómi mingi mpe (2) mosakoli mokomoko azali na mposa ya kosakola Bokonzi na molende lisusu koleka. Yehova, ye oyo azali “mokolisi,” apamboli makambo oyo mibale mpo bato nyonso oyo basili kondima lobiko bazali kosala mosala yango na bolingi na bango moko.​—1 Kol. 3:6, 7; Nz. 110:3.

5 Tóyamba ngɔlu yango mpamba te: Ezalaki mpo na mokolo ya kobika ya Yehova nde Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bongo, awa ezali biso kosalana na ye [Yehova] mosala, tokobondela bino ete bóyamba ngɔlu na Nzambe mpamba te.” ‘Tokoyamba yango mpamba te’ soki totaleli yango lokola “ntango ebongi” ya kosalela mabaku nyonso mpo na kobikisa bato mosusu. (2 Kol. 6:1, 2) Lelo oyo, makambo Paulo alobaki ezali ya kosalela na lombangu mpenza. Baklisto oyo bazali kolinga Yehova na motema mobimba, bazali kosala mingi na mosala ya kosakola oyo apesi bango. Okoki sikoyo kosakola lisusu mingi lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza?

6 Ezali mokano oyo okoki kokokisa yango: Na République démocratique du Congo, tolingi kozala na babongisi-nzela ya sanza na sanza 10 000 oyo bakobanda mosala na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ. Na Congo-Brazzaville, atako bitumba ezali, tokosepela soki basakoli 400 babandi mosala yango na dati wana. Tondimi ete mokano yango ezali makasi mpenza te mpe tokoki kokokisa yango. Mpo na nini tozali na elikya yango? Na Congo-Kinshasa, na boumeli ya mobu ya mosala oyo eleki, babongisi-nzela ya sanza na sanza bazalaki soko 8 722 mpe babongisi-nzela basungi bazalaki 4 089. Na Congo-Brazzaville, babongisi-nzela ya sanza na sanza bazalaki soko 322 mpe babongisi-nzela basungi bazalaki 164. Mobongisi-nzela mosungi mokomoko asalaki soko ngonga 63,8​—bobele ngonga 6,2 nde ezangaki mpo na kokokisa ngonga oyo esɛngami sikoyo mpo na babongisi-nzela ya sanza na sanza! Kati na basakoli oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na mbula oyo eleki, soki bobele basakoli 1 300 na Congo-Kinshasa mpe basakoli 80 na Congo-Brazzaville bakómi babongisi-nzela ya sanza na sanza liboso ete mobu ya mosala oyo ekóma na nsuka na yango, tokanisi ete na sanza ya Sɛtɛmbɛ tokokokisa motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza koleka 10 000 na Congo-Kinshasa mpe 400 na Congo-Brazzaville!

7 Esengeli kosala manaka: Ozali kaka kokakatana mpo na koyeba soki okokokisa ngonga 70 sanza na sanza? Ezali malamu kokanisa ete okolekisa bobele ngonga 17 pɔsɔ na pɔsɔ mpe soki okanisi bongo ekosalisa yo. Na kosaleláká manaka ndenge na ndenge oyo epesami na lokasa oyo elandi, meká kosala manaka na yo moko, oyo ekokani na misala na yo, mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na kolandáká manaka yango, sololá na babongisi-nzela oyo bameseni mingi na mosala yango mpo na kozwa toli na bango oyo ekosalisa yo oyeba ndenge okosala mosala ya mobongisi-nzela mpe misala na yo mosusu mpe kotalela libota na yo. Tuná mokɛngɛli ya zongazonga na bino ndenge babongisi-nzela ya zongazonga na bino babongisaka manaka ya mosala na bango pɔsɔ na pɔsɔ. Na nsima talelá Yehova mpo apambola mokano na yo mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela.​—Mas. 16:3.

8 Ezala mokano ya libota: Osili kokanisa kosala mosala ya mobongisi-nzela mokano mpo na libota? Bosengeli kofanda libota mobimba mpe kosolola ndenge moto moko ya libota to bato mibale ya libota bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela, soki manaka mpe boyokani ya malamu ezali. Na ntembe te, basakoli mosusu, nsima ya komitalela malamumalamu bakomona ete bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza sikoyo te. Soki ezali bongo, okoki komityela mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na mikolo mizali koya. Kasi banda komibongisa sikoyo mpe salá mosala ya kosakola mingi kino na dati oyo omityeli mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela. Ntango mosusu okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala mingi na boumeli ya mbula mpo na komeka mokemoke kokokisa ngonga ya mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

9 Babongisi-nzela ya sanza na sanza koleka 8 700 na Congo-Kinshasa mpe 320 na Congo-Brazzaville bazali na makambo ya bomoi ndenge moko te. Bango nyonso te nde bazali na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe mingi kati na bango bazali konyokwama na mikakatano ya nkita mpe bitumba. Atako bongo, bazali kokoba koyika mpiko mpe kotya elikya na bango epai na Yehova. Babalani mibale oyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela na Brazzaville, engumba oyo ebebi na bitumba, bakomaki boye: “Tozali nde komilela mpo na milende mpe ntango nyonso oyo topesi mpo na kosalela Yehova? Ata moke te! Na esika ya komilela mpo na biloko ya mosuni oyo tobungisi, toyebi ete nyonso oyo tosali ezali eloko te soki tokokanisi yango na mapamboli oyo tozali kozwa lelo oyo mpe oyo tozali kozela na mikolo mizali koya. Ngai na mwasi na ngai, tokolanda kosala mosala ya ntango nyonso.”​—Luka 9:62; Filp. 3:8.

10 Osengeli koyeisa bomoi na yo pɛpɛlɛ? Kozala na bomoi ezangi mindondo ekoki kopesa yo nzela ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Bomoi na yo ezali lokola ndako moko ya monene oyo ezali na biteni mingi mpe etondi na biloko ebele oyo osengeli na yango te, oyo ezali kosɛnga ntango mingi, mbongo mingi mpe mosala mingi mpo na kobongisa yango? Soki ezali bongo, kozala na bomoi ezangi mindondo ekoki kopesa yo likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Okoki kotalela lisusu ntango oyo olekisaka na mosala ya mosuni? Okoki kotalela lisusu ntango oyo olekisaka na makambo ya mpambampamba to ntango oyo olekisaka na kominanola?

11 Na 1 Timote 6:8, Biblia elendisi biso ete: “Awa ezali biso na biloko na kolya mpe na bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.” Kosepela na moke oyo tozali na yango ezali likambo ya ntina mpenza soki tolingi kosala nyonso na mosala ya Yehova mpe ekozala pɛtɛɛ mpo tótya matomba ya elimo na esika ya liboso. (Mat. 6:22, 33) Annuaire ya 1998, na lokasa 104, epesi lapolo ya Japon mpe emonisi makanisi oyo epesamaki mpo na kolimbola ntina oyo bato mingi bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela na mboka yango. Tótalela likanisi oyo: “Mingimingi, bandako ya Japon ezalaka mpenza mineneminene te, na yango ezwaka ntango moke mpo na kobongisa yango mpe bato mingi koleka balandaka bonkɔkɔ na bango, bazalaka na bomoi ya mindondo te.” Ezali yango nde mokapo ya 1 Timote 6:18 ezali kolobela, boye te?

12 Na mokili mobimba, basaleli ya Nzambe bazali kosakola nsango malamu na molende mingi koleka liboso ete mokolo ya kobika ya Yehova ekóma na nsuka na yango. Likambo ya esengo, na mbula oyo eleki pene na basakoli 700 000 basalaki lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza to babongisi-nzela basungi. Okoki komibongisa mpo na kosala lokola bango? Tosɛngi yo otalela likambo yango malamumalamu mpe obondela mpo na yango, wana ozali koluka koyanola na motuna oyo: Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela sikoyo?

[Etanda na lokasa 4]

Bandakisa ya manaka mpo na mobongisi-nzela ya sanza na sanza

Esɛngi: Ngonga 17 na pɔsɔ moko

Mokolo moko na pɔsɔ mpe na wikende

Mokolo Ngonga

Mwamitano 8

Mwapɔsɔ 6

Mwalomingo 3

Ngonga nyonso: 17

Mikolo mibale na pɔsɔ mpe mwapɔsɔ

Mokolo Ngonga

Mwamibale 7

Mwaminei 7

Mwapɔsɔ 3

Ngonga nyonso: 17

Mikolo misato na pɔsɔ mpe mwalomingo

Mokolo Ngonga

Mwayambo 5

Mwamisato 5

Mwamitano 5

Mwalomingo 2

Ngonga nyonso: 17

Mpokwa mibale mpe wikende

Mokolo Ngonga

Mwayambo 3

Mwamisato 3

Mwapɔsɔ 8

Mwalomingo 3

Ngonga nyonso: 17

Salá manaka na yo moko mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza

Mokolo Ngonga

Mwayambo

Mwamibale

Mwamisato

Mwaminei

Mwamitano

Mwapɔsɔ

Mwalomingo

Ngonga nyonso: 17

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto