Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/99 lok. 5
  • Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 8/99 lok. 5

Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi

Bozongeli wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 3 Mai kino pɔsɔ ya 23 Augusto 1999. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na makambo malandi:

1. Baboti basengeli te kobuka mibeko ya Biblia wana bazali kosala milende ete bázala na makambo makasi te epai ya bana na bango. [fy lok. 108 par. 14]

2. Motó ya likambo ya Biblia mobimba yango oyo: kolongisama ya Yehova na nzela ya Bokonzi na ye oyo ekoyangelama na “mombóto” molakami. (Gen. 3:15) [si-LI lok. 17 par. 30]

3. Ezali bobele na mwa bilembeteli moke ya arkeoloji mpe makambo mosusu oyo ezali komonisa bosolo ya makambo mazwami na Exode. [si-LI lok. 20 par. 4]

4. Baoyo bazali babola bazali na likoki te ya kopesa mosolo mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. [w97 15/9 lok. 5 par. 7]

5. Kosalisa baboti ezali lolenge moko ya losambo na biso epai na Yehova. (1 Tim. 5:4) [w97 1/9 lok. 4 par. 1-2]

6. Kotosa mokolo ya Sabata ezalaki libosoliboso elembo kati na Yehova mpe mabota nyonso. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá rs lok. 343 par. 2.]

7. Wana mwana akoli mpe akómi na likoki ya kokamata bikateli ye moko, azali komema ndambo ya mikumba mpo na misala na ye, mingimingi na likambo ya mibeko ya Nzambe. (Lom. 14:12) [fy lok. 134 par. 17]

8. Mose akomaki mokanda ya Levitike na mobu 1513 L.T.B. [si-LI lok. 25 par. 3-4]

9. Maloba ya Yesu oyo mazwami na Luka 21:20, 21 ekokisamaki na mobu 66 T.B. Ntango limpinga ya Loma oyo etambwisamaki na Général Titus etikaki kozingela Yelusaleme mpe ezongaki. [w97 1/4 lok. 5 par. 3-4]

10. Mateya ya Epikuli ezalaki likama mpo na baklisto mpamba te, eutaki na lolenge na ye ya kotalela makambo mpe azalaki na kondima te lokola emonisami na 1 Bakolinti 15:32. [w97 1/11 lok. 24 par. 4

Yanolá na mituna milandi:

11. Liteya nini tozali kozwa na mobeko oyo ezwami na Levitike 3:17, oyo epekisaki kolya mafuta? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w84-F 15/5 lok. 27 par. 3.]

12. Mpo na nini Yehova atikaki Satana na bomoi? (Exode 9:15) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 15/3 lok. 10 par. 14.]

13. Wana moto moko na libota azali na bokɔnɔ makasi, likambo nini ya liboso libota esengeli kosala mpo na kotya makambo ya ntina na esika ya liboso? (Mas. 15:22) [fy lok. 122 par. 14]

14. Ndenge nini tokoki koloba ete libota ya Yisalaele ezalaki “bokonzi ya banganga”? (Exode 19:6) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/7 lok. 16 par. 8.]

15. Bokeseni nini ezali kati na liso oyo ezali “malamu” mpe liso oyo ezali “mabe”? (Mat. 6:22, 23) [w97 1/10 lok. 26 par. 6]

16. Ndenge nini tokoki koloba ete Davidi atambolaki ‘na bosembo na motema mpe na kolongobana,’ nzokande asalaki mabunga? (1 Mik. 9:4) [w97 1/5 lok. 5 par. 2]

17. Mabaku malamu nini ya mikolo na biso Bayisalaele bamonisaki yango na kosaláká “bobele bongo” mpo na mongombo? (Ex. 39:32) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/12 lok. 12 par. 9.]

18. Yehova alingaki koloba nini wana alobaki ete ‘nakomimonisa oyo ekomimonisa ngai ete nazali’? (Ex. 3:14) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/3 lok. 10 par. 6.]

19. Liteya nini tozali kozwa na lisolo ya Nadaba na Abihu oyo ekomami na Levitike 10:1, 2? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w84-F 15/5 lok. 27 par. 4.]

20. Na nse ya Mibeko ya Mose, mpo na nini kobotama ya mwana ezalaki kokómisa mwasi “mbindo”? (Lev. 12:2, 5) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w84-F 15/5 lok. 27 par. 6.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Atako nkisi ya likamwisi ezali te mpo na kosilisa mayoki ya kozala yo moko, moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko akoki koyika mpiko na ezalela yango na nguya oyo ezali kouta epai na ․․․․․․․․, nguya oyo ezwamaka na kolendendela kati na ․․․․․․․․. (1 Tim. 5:5) [fy lok. 113 par. 21]

22. Soki likambo moko ya nsɔmɔ ekómeli yo, ekoki kozala ete okweli ․․․․․․․․ to ekoki kozala na ntina ya ․․․․․․․․. [w97 15/5 lok. 22 par. 7]

23. Mokanda ya Exode ezali komonisa Yehova lokola ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․ ya mikano na ye ya kokamwa. [si-LI lok. 24 par. 26]

24. Ezali libosoliboso makambo oyo tozali kosala na ․․․․․․․․, kasi te oyo ․․․․․․․․, nde emonisaka bomoto na biso ya kati. [w97 15/10 lok. 29 par. 4]

25. Soki bilambo ya kobuka mbuma biuti na ․․․․․․․․ to na ․․․․․․․․ baklisto ya solo bakoki kopɛngola koyokisa Yehova mawa na koboyáká ․․․․․․․․ na losambo yango oyo ebebisami. [w97 15/9 lok. 9 par. 6]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. “Mbula nkama minei” ya mpasi ya mombóto ya Abalayama, ebandaki na ntango Yisamaele atyolaki Yisaka na (1943; 1919; 1913) L.T.B. mpe esukaki na kosikolama na Ezipito na (1543; 1519; 1513) L.T.B. (Gen. 15:13) [si-LI lok. 17 par. 31]

27. Mpo libota etɛlɛma ngwi liboso ya maladi makasi, yango etaleli mingimingi (mbongo; ezalela; assurance) ya bato ya libota. (Mas. 17:22) [fy lok. 120 par. 10]

28. Moto oyo azali koloba na motema na ye ete “Yehova azali te” abéngami “elema” mpamba te (azangi bizaleli ya malamu; atángá te; azali na mayele te na bɔɔngɔ na ye). (Nz. 14:1) [w97 1/10 lok. 6 par. 8]

29. Ntango Adama na Eva bakómaki batomboki, eloko ya ntina oyo babebisaki ezalaki (ezaleli ya kokoka; boyokani na bango elongo na Yehova; efandelo na bango na paladiso), oyo ezalaki sɛkɛlɛ ya bolamu na bango. [w97 15/10 lok. 6 par. 2]

30. Masɛngami ya kozala bulɛɛ elobelami mingi na mokanda ya (Genese; Exode; Levitike) koleka mikanda mosusu nyonso ya Biblia. [si-LI lok. 26 par. 9]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Ex. 5:2; Ex. 21:29; Mas. 1:8; Gal. 5:20; Yak. 1:14, 15

31. Moto nyonso oyo azali koloba ete azali moklisto kasi azali mbala na mbala kokwea na nkanda makasi to kobɛta bato ya libota na ye, akoki kobimisama na lisangá ya boklisto. [fy lok. 150 par. 23]

32. Makambo oyo tosalaka ebandaka na lolenge oyo tokanisaka. [fy lok. 148 par. 18]

33. Yehova akitisaka baoyo nyonso baboyaka na lolendo nyonso kondima ete ye azali Nzambe. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 15/12 lok. 13 par. 18.]

34. Atako Biblia epesi libosoliboso mokumba ya koteya bana epai na tata, kasi mama azali mpe na mokumba monene. [fy lok. 133 par. 12]

35. Mibeko mizalaki kopesa nzela te ete ezaleli ya bopɔtu ezala lokola ntina ya komonisa motema mawa wana moto moko abomami mpo na yango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/11 lok. 11 par. 5.]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto