Yebá Yehova, Nzambe oyo azali moto solo
KOSALÁKÁ bokeseni kati na lolenge oyo batalelaka Nzambe na Lingomba ya Hindou mpe na mangomba mosusu, Dr. S. Radhakrishnan ya ekólo Inde alobi ete: “Nzambe ya Baebele akeseni mpenza na banzambe mosusu. Ye azali moto solo mpe asalaki makambo kati na lisoló ya bato mpe azali kotya likebi na mbongwana oyo ezali kobima na mokili. Azali Moto oyo azali kosolola na biso.”
Nkombo ya Nzambe ya Biblia na Liebele ezali bongo יהוה, oyo mbala mingi ebongolamaka na “Yehova.” Aleki banzambe mosusu nyonso. Makambo nini toyebi na ntina na ye? Azalaki na boyokani nini elongo na bato na ntango ya lisoló ya Biblia?
Yehova mpe Mose “miso na miso”
Yehova mpe mosaleli na ye Mose bazalaki na boyokani ya “miso na miso,” atako Mose akokaki komona Nzambe na miso te. (Deteronome 34:10; Exode 33:20) Na bolenge na ye, motema ya Mose ezalaki elongo na Bayisalaele, oyo na eleko yango, bazalaki baombo na Ezipito. Aboyaki kozala mosangani ya ndako ya Falo, “aponaki kotumolama na bolɔ́zi esika moko na bato na Nzambe.” (Baebele 11:25) Mpo na yango, Yehova apesaki Mose mikumba mingi ya ntina.
Lokola azalaki mosangani ya ndako ya Falo, ‘Mose alakisamaki na mayele nyonso na Baezipito.’ (Misala 7:22) Kasi mpo na kokamba libota ya Yisalaele, asengelaki lisusu kokólisa bizaleli lokola komikitisa, motema molai, mpe kosɔkɛma. Asalaki yango na boumeli ya mbula 40 oyo alekisaki lokola mobateli ya bampate na mokili ya Midyani. (Exode 2:15-22; Mituya 12:3) Atako azalaki komonana te, Yehova amimonisaki mpe amonisaki mokano na ye epai ya Mose, mpe Nzambe apesaki ye Mibeko Zomi na nzela ya baanzelu. (Exode 3:1-10; 19:3–20:20; Misala 7:53; Baebele 11:27) Biblia eyebisi biso ete “[Yehova] asololaki na Mose boye na miso na ye, lokola moto akosolola na moninga na ye.” (Exode 33:11) Ɛɛ, Yehova ye moko alobaki ete: “Nakosololaka na ye na miso na ye polele.” Oyo nde boyokani kitoko mpe ya penepene Mose azalaki na yango elongo na Nzambe na ye oyo atako amonanaka te, kasi azali moto solo!—Mituya 12:8.
Longolá lisoló ya ebandeli ya libota ya Yisalaele, Mose akomaki Mibeko mpe makambo na yango nyonso. Bapesaki ye mpe mokumba mosusu ya ntina mingi—kokoma mokanda ya Genese. Eteni ya nsuka ya mokanda yango ezalaki lisoló oyo eyebanaki malamumalamu kati na libota na ye mpenza mpe na yango ezalaki mpasi mingi te kokoma yango. Kasi epai wapi Mose azwaki makambo ya lisoló ya ebandeli ya moto? Ekoki kozala ete Mose azalaki na makomi ya kalakala, oyo bankɔkɔ na ye bazalaki kobatela, mpe asalelaki yango lokola eutelo ya makambo oyo akomaki. Epai mosusu, ekoki kozala ete makambo mosusu ayokaki yango na minɔkɔ ya bato mpo ete mazalaki kolekisama lolenge yango na libota moko kino na libota mosusu to mpe ekoki kozala ete Yehova ye moko ayebisaki ye makambo yango. Na likambo yango, bato oyo bazalaki na bobangi Nzambe na bileko ya kalakala bandimaki boyokani ya penepene oyo Mose azalaki na yango elongo na Nzambe.
Eliya ayebaki Yehova Nzambe lokola moto solo
Mosakoli Eliya mpe ayebaki Yehova lokola Nzambe oyo azali moto. Eliya azalaki na molende mpo na losambo ya pɛto mpe asalelaki Yehova atako bayinaki ye makasi mpe batɛmɛlaki ye na basambeli ya Baala, mokonzi ya banzambe ya Bakanana.—1 Mikonzi 18:17-40.
Ahaba, Mokonzi ya Yisalaele, mpe mwasi na ye Yezabele, balukaki koboma Eliya. Lokola abangaki kobungisa bomoi na ye, Eliya akimaki na Bele-seba, na wɛ́sti ya Mbu Ekufa (Mer Morte). Kuna, azalaki koyengayenga na mokili mokauki mpe abondelaki mpo ete akufa na ye. (1 Mikonzi 19:1-4) Yehova asundolaki Eliya? Amibanzabanzaki lisusu te mpo na mosaleli na ye ya sembo? Ekoki kozala ete Eliya akanisaki bongo, kasi azalaki mpenza na libunga! Na nsima, Yehova alobaki na ye na kimya nyonso, kotunáká ye ete: “Yo ozali kosala nini awa, Eliya?” Nsima ya komonisa ye nguya ya kokamwa, “mongongo eyelaki ye [lisusu] ete, Eliya, yo okosala nini awa?” Yehova amonisaki komibanzabanza wana epai na Eliya mpo ete alendisa mosaleli na ye oyo abongi kotyelama motema. Nzambe azalaki na mosala mosusu ya kopesa ye, mpe Eliya andimaki na mposa makasi libyangi wana! Eliya akokisaki mikumba na ye na bosembo nyonso, kokumisáká nkombo ya Yehova, Nzambe na ye oyo azali moto solo.—1 Mikonzi 19:9-18.
Nsima ya kosundola libota ya Yisalaele, Yehova atikaki koloba na basaleli na ye awa na mabelé. Yango elimboli te ete komibanzabanza na ye mpo na bango ekitaki. Na nzela ya elimo santu na ye, akóbaki kotambwisa mpe kolendisa bango na mosala na ye. Tókamata ndakisa ya ntoma Paulo, oyo liboso ayebanaki na nkombo ya Saulo.
Paulo atambwisami na elimo santu
Saulo azalaki moto ya Talasia, engumba moko monene na etúká ya Kilikia. Baboti na ye bazalaki Baebele, kasi abotamaki mwanamboka Loma. Nzokande, Saulo abokwamaki engebene bindimeli makasi ya Bafalisai. Na nsima, na Yelusaleme, azwaki libaku ya koyekola “na makolo na Gamaliele,” molakisi monene ya Mibeko.—Misala 22:3, 26-28.
Na ntina na molende mabe na ye mpo na bonkɔkɔ ya Bayuda, Saulo asanganaki na mwango mabe ya konyokola bayekoli ya Yesu Klisto. Kútu andimaki kobomama ya Setefano, moklisto ya liboso oyo akufaki lokola martíru. (Misala 7:58-60; 8:1, 3) Na nsima andimaki ete atako azalaki liboso motuki mpe monyokoli mpe motyoli, ‘bayokelaki ye mawa, zambi asalaki yango wana eyebaki ye ntina te mpe ezangaki ye kondima.’—1 Timoté 1:13.
Saulo azalaki na mposa ya solosolo ya kosalela Nzambe. Nsima ya kobongola motema na nzela ya Damaseke, Yehova asalelaki ye na lolenge ya kokamwa. Klisto oyo asekwaki atambwisaki Anania, oyo azalaki moyekoli na ye uta ebandeli mpo ete asunga Saulo. Na nsima, Paulo (nkombo ya Baloma oyo Saulo ayebanaki na yango nsima wana akómaki moklisto) atambwisamaki na elimo santu ya Yehova mpo na kokokisa mosala monene mpe oyo ebotaki mbuma mingi na mikili ya Mpótó mpe na Asie Mineure.—Misala 13:2-5; 16:9, 10.
Litambwisi wana ya elimo santu ekoki mpe komonana lelo? Ɛɛ, ekoki komonana.
Yehova azali komibanzabanza mpo na bato atako basusu bandimaka te ete Nzambe azali
Joseph F. Rutherford azalaki prezidá ya mibale ya la Société Watch Tower. Azwaki batisimo na 1906 lokola Moyekoli ya Biblia—nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana—mpe na mbula oyo elandaki, aponamaki lokola mopesi-toli ya la Société na makambo matali mibeko ya Letá, mpe akómaki prezidá ya la Société na Yanuáli 1917. Kasi, na eleko moko elenge wana oyo ayekolaki mibeko azalaki kondima Nzambe te. Ndenge nini ayaki kokóma moklisto oyo asalelaki Yehova na molende?
Na Yulí 1913, Rutherford azalaki prezidá ya liyangani monene ya Bayekoli ya Biblia oyo esalemaki na engumba Springfield, na etúká ya Massachusetts, na États-Unis. Mokomi moko na The Homestead, zulunalo ya engumba yango, atunaki Rutherford mituna, mpe lisoló na bango ebimisamaki na lapólo ya liyangani wana.
Rutherford alimbolaki ete ntango alingaki kobala, azalaki mondimi ya Lingomba ya Baptiste, kasi mobandami na ye azalaki na Lingomba ya Presbytérien. Ntango pastere ya Lingomba ya Baptiste alobaki ete ‘mobandami na ye akokende na lifelo ya mɔ́tɔ mpo ete azwaki batisimo ya mai te mpe ete Rutherford akokende na likoló mpo ete azwaki batisimo, makanisi na ye mabulunganaki mpe atikaki kondima Nzambe.’
Esengelaki na Rutherford mbula mingi ya bolukiluki mozindo mpo na kotonga lisusu kondima na ye epai ya Nzambe oyo azali moto solo. Alobaki ete akanisaki maloba oyo ete “likambo oyo ezangi kosepelisa makanisi ekoki mpe kosepelisa motema te.” Rutherford alimbolaki ete baklisto “basengeli komindimisa ete Makomami oyo bazali kondima mazali solo,” mpe abakisaki ete: “Baklisto basengeli koyeba moboko oyo batɛlɛmi likoló na yango.”—Talá 2 Timoté 3:16, 17.
Ɛɛ, ata lelo oyo likoki ezali mpo na moto oyo andimaka Nzambe te to oyo andimaka te makambo oyo maleki mayele ya moto ete asala bolukiluki kati na Makomami mpe akólisa boyokani makasi mpe ya penepene elongo na Yehova Nzambe. Nsima ya koyekola Biblia na likebi mpenza na lisalisi ya búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo ebimisami na la Société Watch Tower, elenge mobali moko alobaki ete: “Ntango nabandaki boyekoli oyo nazalaki kondima Nzambe te, kasi sikawa namoni ete boyebi ya Biblia ebongoli mpenza lolenge na ngai nyonso ya kokanisa. Nabandi koyeba Yehova mpe kotyela ye motema.”
“Elema” mpe Nzambe
Kati na búku na ye A Dictionary of the Bible, Dr. James Hastings alobi boye: “Ekomelaki ata mokomi moko te ya AT [Makomami ya Liebele] ete apesa bilembeteli to makanisi mpo na kondimisa ete Nzambe azali. Na ntango ya kala bato bazalaki na makanisi ya kowangana Nzambe te, to koluka kondimisa ete Nzambe azali. Kondima ete Nzambe azali ezalaki kati na makanisi ya moto mpe bato nyonso bandimaki yango.” Ya solo, yango elingi koloba te ete bato nyonso bazalaki na bobangi Nzambe. Ezalaki bongo te. Nzembo 14:1 mpe 53:1 ezali kolobela “moto oyo azangi bososoli,” to engebene Biblia ya Lingala haut-fleuve “elema,” oyo alobi kati na motema na ye ete, “[Yehova] azali te.”
Elema yango azali moto ya ndenge nini, moto oyo andimaka te ete Nzambe azali? Ezali te ete moto yango ayebi makambo te na bɔɔngɔ́ na ye. Kasi, liloba ya Liebele na·valʹ ezali kolobela kozanga bizaleli ya malamu. Na komantere na ye na búku The Parallel Psalter, profesere Samuel Driver alobi ete mbeba ezali “te ete moto yango azali na mayele moke, kasi azangi bizaleli ya malamu mpe azangi kotya likebi na likambo ya losambo, azangi mpenza makanisi, to bososoli.”
Mokomi na nzembo akóbi komonisa kobeba ya bizaleli ya elimo oyo euti na ezalela motindo yango: “Bamibebisi, bazali kosala makambo mabe, moko azali te oyo akosalaka malamu.” (Nzembo 14:1) Dr. Hastings alobi na mokuse ete: “Na kokanisáká ete Nzambe azali kotya likebi na makambo ya mokili te mpe etumbu mpo na mabe ezali te, bato bamibebisi mpe bazali kosala makambo ya mabe koleka.” Na polele mpenza, bazali kondima mitindá mimonisi kozanga bobangi Nzambe mpe bazali kotya likebi te ete Nzambe azali moto oyo bazali kokanisa te ete bakozongisa monɔkɔ epai na ye. Kasi lelo oyo lolenge wana ya kokanisa ezali bolema mpe ezangi bososoli lolenge moko ezalaki na ntango oyo mokomi na nzembo akomaki maloba oyo eleki sikawa mbula 3 000.
Makebisi mauti na Nzambe na biso oyo azali moto solo
Sikawa tótalela mituna oyo mitunamaki na lisoló na biso ya ebandeli. Mpo na nini bato mingi bazali kokoka te koyokanisa likanisi oyo ete Nzambe azali moto mpe bampasi oyo ezali kotungisa mokili lelo?
Biblia ezali na makambo makomamaki na bato oyo ‘balobaki mpo na Nzambe wana ezalaki bango kopusama na elimo santu.’ (2 Petelo 1:21) Ezali bobele búku yango nde ezali komonisa biso Yehova, Nzambe oyo azali moto. Ezali mpe kokebisa biso na ntina na moto moko mabe, oyo amonanaka te, oyo azali na nguya ya kotambwisa mpe koyangela makanisi ya bato—Satana Zábolo. Na lolenge lobongi mpenza, soki tondimaka te ete Nzambe azali, ndenge nini tokoki kondima ete Zábolo, to Satana azali mpe moto solo?
Na kopemama na Nzambe ntoma Yoane akomaki ete: “Oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.” (Emoniseli 12:9) Na nsima Yoane alobaki ete: “Toyebi ete tozali bana na Nzambe mpe mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Maloba yango makokani na maloba ya Yesu, oyo Yoane ye moko akomaki na Evanzile na ye ete: “Mokóló na mokili azali koya mpe azali na eloko kati na ngai te.”—Yoane 14:30.
Oyo nde bokeseni monene kati na mateya ya Makomami mpe bindimeli ya bato lelo! Zulunalo Catholic Herald elobi ete, “Lelo oyo kolobela Zábolo ezali mpenza likambo oyo esilá ngala. Mokili na biso oyo etondi na ntembe mpe na makambo ya siansi, esili kopesa Satana epaso.” Kasi, Yesu alobaki na molende nyonso epai na bato oyo bakanaki koboma ye ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bósala mposa ya tata na bino.”—Yoane 8:44.
Ndimbola oyo Biblia ezali kopesa na ntina na nguya ya Satana elongobani mpenza. Ezali komonisa polele ntina oyo, atako bato mingi bazali na mposa ya bomoi ya kimya mpe boyokani, mokili etondi na koyinana, na bitumba, mpe na mobulu oyo ezangi ntina, lokola oyo esalemaki na engumba Dunblane (oyo tolobelaki na nkasa 3 mpe 4). Lisusu, Satana azali monguna bobele moko te oyo tosengeli kobundisa. Biblia epesi makebisi mosusu na ntina na bademó—bilimu mabe oyo uta kala basanganaki na Satana mpo na kozimbisa mpe kobebisa bato. (Yuda 6) Mbala mingi Yesu Klisto abundisaki bilimu yango ya nguya mpe alóngaki yango.—Matai 12:22-24; Luka 9:37-43.
Yehova, Nzambe ya solo azali na mokano ya kopɛtola mabelé oyo mabe mpe nsukansuka kosilisa misala ya Satana mpe bademó na ye. Na ntina na boyebi na biso ya Yehova, tokoki kozala na kondima makasi mpe kotya motema na bilaka na ye. Ye alobi ete: “Liboso na ngai Nzambe mosusu asalamaki te, mpe mosusu akozala nsima na ngai te. Ngai, ngai, nazali [Yehova]; mobikisi mosusu akozala nsima na ngai te.” Yehova azali solo Nzambe oyo azali moto mpo na baoyo nyonso bayebi ye, bazali kosambela ye, mpe bazali kosalela ye. Tokoki kotalela bobele ye mpo na kozwa lobiko.—Yisaya 43:10, 11.
[Elilingi na lokasa 7]
Liyemi ya ekeke ya 18 oyo emonisi Mose azali kokoma Genese 1:1 wana apemamaki na Nzambe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na The Holy Bible ya J. Baskett, Oxford
[Elilingi na lokasa 8]
Mbala mingi Yesu Klisto alóngaki bademó