Sanza ya Aprili—Ntango ya kosala misala malamu na molende!
1 Soki ekumbaki ezali koya na esika oyo ezali na bato mingi, esɛngaka kosala na lombangu mpo na kokebisa bato na likama oyo ezali koya. Soki ekumbaki ekómi pene mpenza, esɛngaka kokebisa bato makasi mpenza. Mpo na nini? Mpamba te bomoi ya bato mingi ezali na likama! Ekoki kozala ete bato mosusu bayokaki te ntango bakebisaki liboso. To mbala mosusu bato mosusu bayokaki ntango bakebisaki, kasi batyelaki yango likebi te. Ezali mpe bongo mpo na likebisi ya Nzambe oyo bapesi biso etinda ya koyebisa yango liboso ete “mopɛpɛ” ya nkanda ya Nzambe oyo ezali sembo ebebisa biloko nyonso ya ebongiseli ya mabe oyo. (Mas. 10:25) Bamiliare ya bato bazali na likama ya kozanga bomoi ya seko! Likebisi esengeli kopesama. Tosengeli kosala “misala malamu na molende.”—Tito 2:11-14, NW.
2 Esili koleka bambula mingi, basaleli ya Yehova balendisamaki na kokómisa eleko ya Ekaniseli ntango moko ya kosakola na molende mpenza. Na eleko ya molunge na 1939, Informateur, ndenge bazalaki kobenga Mosala na biso ya Bokonzi na ntango wana, epesaki elendiseli oyo: “Lokola eleko ya molunge ezali kobɛlɛma, mpe ezali eleko ya malamu, tozali kokanisa ete basakoli na kati ya [lisangá] bakobakisa ngonga na bango na mosala ya kosakola mbala mibale mpe ngonga ya babongisi-nzela ekobakisama mpenza. Sanza ya Aprili ezali na mikolo ya lomingo mitano, ezali mpe na mikolo ya pɔsɔ mitano. Salá ete mokolo nyonso ya pɔsɔ mpe ya lomingo na boumeli ya sanza ya Aprili . . . ezala eleko moko ya ntina mingi mpo na kopesa litatoli.” Mokano yango ezalaki mpenza ya pɛtɛɛ te mpo na bandeko, esili koleka mbula 60! Ndenge moko na 1939, sanza ya Aprili ya mbula oyo mpe ezali na wikende mitano. Ozali kokana kosala nini na sanza oyo? Makambo nini osili kokoma na calendrier na yo mpo osala yango na sanza ya Aprili 2000? Omibongisa mpo na kosangana mingi na misala malamu elongo na basaleli mosusu ya Yehova na boumeli ya sanza oyo ya ntina mingi, sanza ya mosala mingi na elimo.
3 Makambo oyo tozali kokana kokokisa: Mokolo ya ntina mingi ya mobu 2000 ezali na sanza oyo. Ezali mokolo ya 19 Aprili, mokolo ya kokanisa liwa ya Yesu. Tiká tósala molende mpenza mpo na kobenga bato mingi mpenza na Ekaniseli. Ndenge emonisamaki na sanza eleki, komá bankombo ya bato nyonso oyo bakoki koya na Ekaniseli mpe talá malamu ete obosana moto moko te. Tosengeli kobenga bato nyonso oyo basakolaka lisusu te, bato oyo bayekolaka Biblia, baoyo tozongelaka bango, bato oyo bayekolaki Biblia kala, baninga ya mosala, baninga ya kelasi, baninga ya kartye, mpe bato mosusu oyo toyebani na bango. Bato oyo balingi koyangana bazali na likoki ya kofuta transport? Soki bazali na likoki te, okoki kosalisa bango? Na mpokwa ya mokolo ya Ekaniseli, biso nyonso tokozala na libaku ya koyamba malamu bato nyonso oyo bakoya koyangana. Nsima ya Ekaniseli, tokoki kolanda kopesa bato oyo basepeli na solo lisungi ya elimo.
4 Kosala “misala malamu na molende” na boumeli ya mikolo oyo ezali liboso ya Ekaniseli mpe mikolo oyo ezali nsima na yango ezali lolenge malamu ya komonisa mpenza botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na makambo nyonso oyo asili kosala mpo na biso. Mingi kati na biso tokozala na likoki ya kobakisa milende na biso na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Soki ozali mobongisi-nzela mosungi, okosala nyonso mpo na kokokisa ngonga 50 to koleka na mosala ya kosakola. (Mat. 5:37) Landá malamumalamu manaka oyo omityelaki na ebandeli ya sanza. (Mos. 3:1; 1 Kol. 14:40) Tiká ete biso nyonso tósala oyo tokoki kosala mpo na kopesa mabɔkɔ na babongisi-nzela nyonso, tólendisa bango mpe tóbimaka elongo na bango na mosala ya kosakola. (Talá 2 Mikonzi 10:15, 16.) Soki toloni na molende, na boumeli ya sanza ya Aprili, tokoki kolikya kozwa esengo mingi mpe mapamboli ya Yehova. (Mki. 3:10) Mbala mosusu yango ekopesa nzela na kolanda kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi to kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Tiká ete nguya ya sika ya elimo oyo tokomonisa na sanza ya Aprili elandana mpe na basanza mosusu wana tozali kosala makasi mpo na kozala basakoli ya Bokonzi sanza na sanza.
5 Na ntembe te, basaleli ya Yehova mingi bakobanda koyekola Biblia na bato na sanza oyo. Okolinga kobanda koyekola Biblia na moto moko? Bondelá mpenza mpo na kozwa moto oyo okobanda koyekola na ye Biblia, mpe salá milende mpo okokisa mposa na yo ndenge omonisi yango na mabondeli na yo. Okoki kotya motema ete Yehova akosepela kokokisa mposa na yo ndenge oyebisi ye na komikitisa nyonso mpo asalisa yo okutana na moto ya motema sembo oyo okoki koteya ye.—1 Yoa. 3:22.
6 Talá mwa maloba ya kobanda lisolo oyo ebimisaki matomba mingi. Bandá na kotuna motuna: “Na kotalela ndenge biteyelo etondi na mobulu mpe na makambo ya bosɔtɔ ya kosangisa nzoto, okanisi ete yango ezali misala ya bademo to nde ezali mpo ete baboti bazali koteya bana na bango malamu te?” Tiká moto yango ayanola. Soki alobi ete “ezali misala ya bademo,” tángá Emoniseli 12:9, 12, mpe monisá ndenge Zabolo azali kobimisa yikiyiki na mokili. Na nsima fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 4, mpe tuná moto yango soki alukaka koyeba epai wapi Zabolo autá. Tángá mpe lobelá paragrafe mibale ya liboso. Soki moto yango alobi ete ezali mpo “baboti bazali koteya bana na bango malamu te” mpo na komonisa ntina ya mobulu mpe makambo ya bosɔtɔ ya kosangisa nzoto oyo ezali kosalema na biteyelo, tángá 2 Timote 3:1-3 mpe monisá bizaleli oyo ezali kopesa nzela na makambo yango. Na nsima fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 8, tángá paragrafe 5, mpe kobá na lisolo. Soki okoki koyokana na ye mpo na kozongela ye, yango ekoki kopesa yo nzela ete ozwa moto oyo okobanda koyekola na ye Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Soki ozongeli moto yango, okoki kotuna ye soki ayebi moto mosusu oyo akoki kosepela koyoka makambo oyo ye azali koyekola.
7 Lolenge mosusu ya kosala “misala malamu na molende” na boumeli ya sanza ya Aprili ezali ya kosalela lolenge nyonso ya mosala ya kosakola. Osilá kokanisa mpo na kopesa litatoli na esika batɛlɛmisaka mituka? Na bisika bazelaka bisi to na esika bazelaka engbunduka? Na wenze to esika oyo bato mingi bakendaka kosolola na telefone to na foni? To okosepela komeka kopesa litatoli na telefone, na balabala to na bisika ya mombongo? Mpo na nini te komeka kosalela makanisi yango na sanza oyo? Yehova akosalisa yo, akopesa yo mpiko oyo osengeli na yango. (Mis. 4:31; 1 Tes. 2:2b) Mbala mosusu okoki kozwa bibongiseli mpo na kosala elongo na mobongisi-nzela moko to mosakoli moko oyo ameseni mingi na lolenge wana ya kosakola.
8 Moto nyonso oyo alingi kobakisa lisusu molende na ye na mosala ya kopesa litatoli asengeli mpe kopesaka litatoli ya libaku malamu. Mbala mingi, esɛngaka bobele koluka kokɔtisa moto na lisolo moko ya boninga. Okoki bobele kolobela likambo moko oyo ebendaka likebi ya bato mingi, mbala mosusu okoki kosalela ndakisa oyo ezali na paragrafe 6. Salá makasi mpo na kosalela malamu ata mwa miniti moke oyo mbala mosusu ekokaki kobebisa mpamba. Soki tozali na mwa mafuta moke, ezala linzanza ya tomato moko to mibale, to katikati ya molangi tobwakaka yango te bobele mpo ete ezali molangi mobimba te. Na yango mpo na nini te kosalela malamu ata miniti mitano to zomi to zomi na mitano mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu?
9 Ntango mpo na kokanisa: Kanisá lisusu makambo ya ntina mingi oyo tomonaki na lisano-liteya ya mbula eleki na liyangani ya etúká “Liloba ya esakweli ya Nzambe.” Lisano-liteya yango ezalaki na motó ya likambo “Tótyola libula na biso ya elimo te,” esalisaki biso na kokanisa malamumalamu makambo oyo ekesenisaki Yakobo na Esau. Esau alobaki ete azalaki kosepela na makambo ya elimo ndenge moko na Yakobo, kasi misala na ye emonisaki bongo te. (Gen. 25:29-34) Yango ezali mpenza likebisi mpo na biso, boye te? Lokola Yakobo, tiká ete tósala makasi, ata mpe kobunda mpo na kozwa mapamboli ya Yehova. (Gen. 32:24-29) Mpo na nini te kosalela sanza ya Aprili mpe basanza mosusu oyo ekolanda mpo na kobakisa lisusu molende na biso? Yango ekomonisa ete tozali kotalela te libula na biso ya elimo lokola eloko mpamba.
10 “Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.” (Sef. 1:14) Nsango malamu ya Bokonzi esengeli liboso kosakolama. Bomoi ya bato mingi ezali na likama! Tiká ete sanza oyo, ezala sanza moko ya lipamboli mpo na basaleli nyonso ya Yehova awa tosangani liboke moko mpo na komonisa ete tozali kosala “misala malamu na molende.”
[Etanda na lokasa 4]
Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli
Na mbula oyo Ekaniseli ekozala na mokolo ya misato mwa 19 Aprili. Bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo oyo elandi:
◼ Ntango bozali kobongisa ngonga oyo molulu yango ekosalema, bómindimisa ete limpa na vinyo ekolekisama te liboso ete moi elala.
◼ Bato nyonso, bakisa mpe ndeko oyo akosala lisukulu, basengeli koyeba ngonga mpenzampenza oyo molulu yango ekobanda mpe esika oyo yango ekosalema.
◼ Lolenge ya limpa mpe ya vinyo oyo ekosalelama esengeli kozala oyo ebongi mpe ebongisama liboso na ntango.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1985 na lokasa 17 (ebimeli ya Lifalanse).
◼ Basaani, bakɔpɔ, mpe mesa ya malamu mpe elamba ya mesa, esengeli kobongisama malamu mpe kotyama libela na kati ya Ndako ya Bokonzi.
◼ Ndako ya Bokonzi to esika mosusu oyo molulu yango ekosalema esengeli kopɛtolama malamu liboso.
◼ Bosengeli kopona libela bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakopesa bango bisika ya kofanda mpe bandeko oyo bakotambwisa limpa na vinyo mpe koyebisa bango mokumba na bango mpe lolenge ya kokokisa yango malamu.
◼ Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa na vinyo epai ya ndeko nyonso oyo azali mopakolami mpe azali ebɔsɔnɔ, kasi azali na makoki ya koyangana te.
◼ Soki masangá mingi ekosalela Ndako ya Bokonzi moko, basengeli koyokana malamu mpo na kosala ete bituluku ya bato ezala te na libanda, na balabala, mpe na bisika ya kotɛlɛmisa mituka.