Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!
1 Lokola Ekaniseli mpo na mobu 2003 ekómi pene, tozali na ebele ya makambo oyo esengeli kotinda biso tózala “bato ya molende na oyo ezali malamu.” (1 Pet. 3:13) Likambo ya libosoliboso ezali nde mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa biso. (Mat. 20:28; Yoa. 3:16) Ntoma Petelo akomaki mpo na mbeka yango boye: “Ezalaki te na biloko oyo epɔlaka, na palata to na wolo, nde bosikolami na motindo na etamboli na bino ya kozanga kobota mbuma. . . . Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya, lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ, ɛɛ oyo ya Klisto.” (1 Pet. 1:18, 19) Botɔndi na biso mpo na bolingo ya monene wana oyo bamoniseli biso esɛngisaka biso tómipesa na kosala malamu, mpamba te tondimaka ete Yesu “amipesaki mpo na biso mpo akoka kosikola biso na botyoli-mibeko ya ndenge nyonso mpe kopɛtola mpo na ye moko ekólo moko ya bato, oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.”—Tito 2:14; 2 Kol. 5:14, 15.
2 Ntango tosalaka makambo oyo ezali kosepelisa Nzambe, tokómaka na boyokani malamu ná ye mpe alingaka biso mpe atyelaka biso likebi mpenza. Petelo alobaki lisusu boye: “Moto oyo alingi kosepela na bomoi mpe komona mikolo ya malamu, . . . akima oyo ezali mabe mpe asala oyo ezali malamu; aluka kimya mpe alanda yango. Mpo miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali epai ya lilɔmbɔ na bango.” (1 Pet. 3:10-12) Na mikolo mabe oyo, topambolami mpenza na koyeba ete Yehova azali kokɛngɛla biso mpe azali pene mpo na kosalisa biso, mpo na “kobatela [biso] lokola mbuma ya liso na ye.”—Det. 32:10; 2 Nta. 16:9.
3 Atako bazalaki komekama, baklisto ya ekeke ya liboso, baoyo Petelo atindelaki mokanda, bazalaki na molende oyo moto moko te akokaki kolɛmbisa yango mpe basakolaki nsango malamu na bisika mingi mpenza. (1 Pet. 1:6; 4:12) Ezali mpe ndenge moko mpo na biso basaleli ya Nzambe lelo oyo. Atako tozali kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” botɔndi na biso mpo na bolamu ya Yehova etindaka biso na kosala mokano na ye na molende. (2 Tim. 3:1; Nz. 145:7) Tótalela sikoyo mwa misala ya malamu oyo tokomipesa na yango na eleko oyo ya Ekaniseli.
4 Tóbengisa basusu na Ekaniseli: Ekaniseli ya liwa ya Yesu esalemaka mbula na mbula—na mbula oyo ekosalema na mokolo ya misato, mwa 16 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Kozala na likita yango ekomonisa ete tozali na botɔndi mpo na lisiko, likabo monene oyo Yehova apesaki mpo na biso. (Luka 22:19, 20) Na mbula eleki, bato nyonso oyo bayanganaki na Ekaniseli oyo esalemaki na masangá 94 600 ya mokili mobimba bazalaki 15 597 746! Soki tokokanisi motángo yango ná oyo ya mbula oyo ezalaki liboso ya mbula yango, tomoni ete bato koleka 220 000 babakisamaki.
5 Bato boni bakoyangana mbula oyo? Yango ekotalela mingimingi milende oyo tokosala mpo na kolendisa basusu báyangana elongo na biso. Ya liboso, salá liste ya bato nyonso oyo olingi kobengisa. Bato ya libosoliboso oyo okokoma bankombo na bango na liste yango esengeli kozala bato ya libota na yo mpenzampenza. Soki mobali na yo to mwasi na yo azali Motatoli te, monisá ye ete olingi mpenza ete ye mpe azala elongo na yo na Ekaniseli. Mobali moko oyo azali Motatoli te alobaki ete ayanganaki na Ekaniseli ya mbula eleki mpamba te amonaki ete kozala na ye na likita yango ezali na ntina mingi mpo na mwasi na ye. Nsima na yango, okoki kokoma bankombo ya bandeko na bino, bato ya kartye, baninga ya mosala to ya kelasi. Kobosana te kobengisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia.
6 Soki osilisi kosala liste na yo, bongisá ntango mpo na kokende kokutana na moto mokomoko mpo na kobengisa bango. Pesá bango lokasa ya libyangi na Ekaniseli. Mpo na kosalisa bango bábosana te ntango mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema, komá makambo yango (na balɛtrɛ ya minene) na nse ya lokasa ya libyangi. Ntango mokolo ya 16 Aprili ekokóma pene, kende kokutana na mokomoko na bango to bengá bango na telefone mpo na koyebisa bango lisusu likambo yango. Tósalisa bato mingi mpenza bázala na likita yango oyo eleki bosantu.
7 Tósalisa baoyo bayangani na Ekaniseli: Na butu oyo Ekaniseli esalemaka, tozalaka na nsai. Mbala mingi, toyambaka bato oyo bayanganaka na makita na biso te. Mpo na yango, omibongisa mpo okóma liboso likita yango ebanda mpe kozonga mbala moko te ntango likita esili soki likoki ezali. Luká koyebana na bato oyo bayaki mpo na mbala ya liboso. Zalá na nsai mpe na ezaleli ya koyamba bapaya.—Lom. 12:13.
8 Bokoki nde koyekola Biblia na bato mosusu oyo bayangani na Ekaniseli mpo ete bósalisa bango bákola mingi na elimo? Luká kozwa bankombo mpe baadresi ya baoyo mosakoli moko te akendaka kotala bango na ndako mpo olanda kosalisa bango. Soki osalisi bango na bolingo, bamosusu kati na bango bakoki kokola mpe, liboso ya Ekaniseli ya mbula oyo ezali koya, bakoki kokokisa masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Ntango okozongela bato oyo bayanganaki na Ekaniseli, bengisá bango na lisukulu ya ntina mingi oyo ekosalema na mokolo ya 27 Aprili.
9 Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi mpe ya Aprili? Mbula na mbula, molende na biso mpo na Yehova etindaka biso tómipesa mpenza na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza oyo ezalaka na makambo ya ntina na Teokrasi. Soki basakoli nyonso ya lisangá bapesani mpenza mabɔkɔ mpo na kosakola nsango malamu na molende na boumeli ya eleko ya Ekaniseli, mbuma malamu ekoki kobima.
10 Na lapolo oyo lisangá moko oyo ezali na basakoli 107 mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza 9 etindaki, balobaki ete sanza ya Aprili ya mbula eleki ezalaki “sanza moko ya malamu mpenza.” Na sanza yango, basakoli 53 basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi; bankulutu nyonso ná basaleli na misala nyonso bazalaki mpe babongisi-nzela. Bankulutu basalaki nini mpo na kopesa basakoli mposa makasi ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza wana? Liboso eleko ya Ekaniseli epusana penepene, babandaki kolendisa basakoli mingi básɛnga mosala yango. Makita mpo na mosala ya kosakola ezalaki kosalema na bantango ndenge na ndenge ya mokolo mpo na kopesa basakoli nyonso ya lisangá likoki ya kozala wana. Balendisaki basakoli mingi, mingimingi baoyo bakokaka kotambola lisusu te, bápesa litatoli na telefone.
11 Ndeko mwasi moko ya mbula 86 oyo akokaka kotambola lisusu te mpo na maladi, asɛngaki mpe mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Azalaki kobanda na ntɔngɔ mpe azalaki kosala boye: afandi na mesa ya kuku mpe apesi litatoli na telefone na boumeli ya ngonga soki mibale; nsima na yango, apemi na boumeli ya mwa bangonga. Soki asilisi kopema, azongeli lisusu kopesa litatoli na telefone na boumeli ya mwa ntango. Mwasi moko oyo asololaki na ye ayebisaki ye ete na boumeli ya mbula mibale oyo eutaki koleka mobali na ye akufaki mpe bana na ye mibale ya mibali oyo bakómaki bilenge mpe bakufaki. Azalaki koyeba te mpo na nini Nzambe atikaka nzela ete makambo mabe ya ndenge wana ekómelaka bato. Ndeko mwasi apesaki ye litatoli ya malamu mpenza, mpe babandaki koyekola Biblia. Kopesa litatoli na telefone na bampokwa mpe na bantango mosusu ezali lolenge moko ya malamu mpenza ya kosolola na bato oyo bafandi na bandako to na bakartye oyo bapesaka mpenza nzela te na bato ya libándá bákɔta. Kopesa litatoli ndenge wana epesaka mpe basakoli nzela ya kosolola na bato oyo bazalaka na ndako te na moi.
12 Na nsuka ya lapolo, bankulutu ya lisangá yango balobaki boye: “Tozwaki esengo mingi mpe tozali kotɔnda Yehova mpo na mabaku malamu ya kosalela ye mpe mpo na mapamboli oyo apesaki mokomoko na biso.” Soki bomibongisi malamu na lisangá na bino, bino mpe bokoki kozwa mapamboli ya ndenge wana.
13 Bósala makasi mpo basakoli nyonso básakola: Bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na biso etindaka biso tósomba ntango sanza na sanza mpo na koyebisa basusu nsango malamu. (Mat. 22:37-39) Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda ná basungi na bango basengeli kosala nyonso mpo na kosalisa baoyo bazali na bituluku na bango básakolaka sanza na sanza. Lolenge moko ya malamu ya kosala likambo yango ezali ya kozwa bibongiseli liboso mpo na kobima na mosala ya kosakola na mosakoli boye to boye ya etuluku. Na esika bózela nsuka ya sanza mpo na kosala yango, bóbanda nde na ebandeli ya sanza. Soki bosali bongo, bokozwa mabaku mingi mpenza ya kosalisa basakoli na bolingo mpenza.
14 Na etuluku na yo ya boyekoli ya mokanda, ezali na basakoli oyo bakokaka kotambola lisusu te oyo bazali na mikakatano mpenza mpo na kosakola? Soki kati na bango bamosusu bafandi na bandako epai basalisaka bato ya ndenge na bango to mpe bafandi na bandako na bango kasi babimaka lisusu te, na ntembe te bakozala na mabaku mpenza mingi te ya kopesa litatoli. Atako bongo, soki basaleli mwa mabaku oyo bazali na yango mpo na kongɛngisa pole na bango, bakoki kopesa baoyo bazali komona misala na bango ya malamu mposa mpenza ya koyeba solo. (Mat. 5:16) Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli komindimisa ete basakoli yango bayebi ete bakoki kopesa lapolo na bango ya mosala soki basakolaki miniti 15, miniti 30 mpe bongo na bongo. Ndenge basakoli yango ya sembo bakoki kopesa lapolo ya ntango oyo bazali kolekisa na kopesa litatoli, yango ekolendisa bango mpe ekopesa bango esengo mpenza. Yango mpe ekosala ete lapolo ya mokili mobimba ya misala oyo basaleli ya Nzambe bazali kosala ezala na bosikisiki.
15 Bilenge oyo bazali komipesa na kosala oyo ezali malamu! Komona bilenge baklisto bazali kosalela makasi na bango mpo na mosala ya Yehova ezali likambo moko oyo elendisaka mpenza. (Mas. 20:29) Soki ozali elenge, ndenge nini okoki komonisa molende na yo mpo na Yehova na boumeli ya basanza oyo ya ntina mingi?
16 Soki okómi naino mosakoli te, okoki nde komityela mokano ya kokóma mosakoli? Omituna mituna oyo: ‘Nayebi mateya ya ntina ya Biblia? Nalingi kosala mosala ya Bokonzi? Nazali na etamboli malamu? Nakoki koyebisa bato mosusu nsango malamu mpo na komonisa bango kondima na ngai? Motema na ngai ezali kotinda ngai naluka kosala likambo yango?’ Soki okoki koyanola ɛɛ na mituna yango, boye yebisá baboti na yo ete ozali na mposa ya kokóma mosakoli. Baboti na yo bakoki kokende kokutana na nkulutu moko oyo azali na komite ya mosala mpo na koyebisa ye likambo yango.
17 Soki ozali mosakoli ya nsango malamu, okoki nde kosalela ntango oyo bozali na konje mpo obimaka mingi na mosala ya kosakola? Bilenge mingi oyo basili kozwa batisimo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpamba te basalaki programɛ ya malamu mpe baboti na bango ná basakoli mosusu basalisaki bango. Soki ozali na likoki ya kosala bongo te, boye zalá na ekateli makasi ya kosakola mingi koleka ndenge osakolaka. Omityela mokano ya bangonga oyo okosakola. Longola mokano yango, omityela mpe mokano ya kobongisa lolenge na yo ya kosakola. Ntango mosusu okoki kosala makasi mpo ete otángaka ata vɛrsɛ moko na ndako nyonso oyo okokende kosakola, omibongisaka malamu lisusu liboso ya kozongela bato oyo basepelaki, obanda koyekola Biblia na moto, to mpe osakola na telefone to na lolenge mosusu oyo tosakolaka. Omoni boni soki omityeli mpe mokano ya kosɛnga moto moko ya kartye, to moninga moko ya kelasi to ndeko na yo moko aya elongo na yo na Ekaniseli ya mbula oyo? Soki omipesi mpenza na misala yango ya Teokrasi, okozwa mbano mpe na ntembe te okolendisa basusu na lisangá.—1 Tes. 5:11.
18 Tósalisa bato ya sika bákola: Na mbula ya mosala oyo eleki, sanza na sanza, basakoli ya Congo-Kinshasa bazalaki kotala bato soki 224 318 na bandako na bango mpo na koyekola na bango Biblia mpe oyo ya Congo-Brazzaville bazalaki kotala bato soki 14 192. Mokemoke, mingi kati na bayekoli yango bakokola, bakomipesa na Yehova mpe bakozwa batisimo. Kasi, liboso bákokisa mokano yango, tosengeli kosalisa bango bákokisa masɛngami mpo bákóma basakoli ya nsango malamu. Yango ezali likambo moko ya ntina mingi oyo tosengeli kosala ntango tozali koteya moto ya sika mpo akóma moyekoli ya Yesu Klisto. (Mat. 9:9; Luka 6:40) Ozali koyekola Biblia na moto moko oyo azali na mposa ya kokóma mosakoli?
19 Soki ozali koyeba mpenza te soki moto oyo oyekolaka na ye azali kokola to te, sɛngá lisalisi epai ya mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda to epai ya mokɛngɛli ya mosala ya kosakola. Ntango mosusu okoki kobengisa moko na bango azala mpe wana ntango ozali koyekola na moto yango. Bandeko yango bayebi makambo mingi mpe boyebi na bango ekoki kosalisa yo na koyeba ndenge oyo moto oyo oyekolaka na ye azali kokola na elimo. Bakoki kozala na makanisi ya kopesa oyo ekosalisa moyekoli akoba kokola na elimo.
20 Ntango moyekoli ayebisi yo ete azali na mposa ya kokóma mosakoli mpe omoni ete akokisi masɛngami, yebisá mokɛngɛli-mokambi likambo yango. Ye akozwa bibongiseli mpo ete bankulutu mibale bákutana na yo elongo na moyekoli yango mpo na kotalela soki akokisi masɛngami, bakosalela makanisi oyo ezali na nkasa 99-100 ya buku Lisanga. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1988, lokasa 17 [ebimeli ya Lifalanse].) Soki bankulutu yango bandimi ete moyekoli yango akóma mosakoli, osengeli mbala moko kobanda kopesa ye formasyo. Ntango akopesa lapolo na ye ya mosala mpo na mbala ya liboso, liyebisi ekopesama na lisangá mpo na komonisa ete moyekoli yango akómi mosakoli. Tozali na elikya ete, na boumeli ya basanza oyo ya ntina mingi, bankóto ya basakoli ya sika, bázala bilenge to mikóló, bakoki kosala likambo wana ya ntina mpenza, elingi koloba kotángama lokola basakoli.
21 Komibongisa liboso esalisaka na kosala misala oyo eleki malamu: Misala na biso ya Teokrasi na eleko oyo ya Ekaniseli ekolonga mpenza soki tomibongisi liboso. (Mas. 21:5) Bankulutu basengeli kotyela makambo mwa mingi likebi.
22 Mpo na kosalisa basakoli ya lisangá básala mosala ya kosakola mingi, bankulutu basengeli kozwa bibongiseli oyo esengeli mpenza mpo ete makita ya mosala ya kosakola esalema mikolo nyonso ya pɔsɔ, bakisa mpe mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola nde asengeli kozala moto ya liboso mpo na kozwa bibongiseli yango. Bokoki nde kozwa bibongiseli mpo bóbakisa makita mosusu na ntɔngɔntɔngɔ to na mpokwa mpenza? Bosengeli koyebisa lisangá bibongiseli yango. Ekozala malamu soki botii manaka yango na etanda ya mayebisi.
23 Bankulutu basengeli kosala nyonso mpo bibongiseli etali Ekaniseli ezwama mikolo mingi liboso ya mokolo ya 16 Aprili. Kati na bibongiseli yango, tokoki kotánga oyo: koyokana na masangá mosusu oyo mpe ekoki kosala Ekaniseli na Ndako ya Bokonzi oyo bokosalela, kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi, kopona bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakotambwisa limpa ná vinyo, mpe kozwa mampa ná vinyo ya Ekaniseli. Esengeli koyebisa lisangá ntango mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema mpe mbongwana oyo ekoki kozala na programɛ ya makita ya pɔsɔ yango. Soki bokokisi makambo yango nyonso ndenge esengeli, yango ekosala ete molulu yango “esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 Kol. 14:40.
24 Bakonzi ya mabota bakoki kozwa mwa ntango ya boyekoli ya Biblia na libota mpo na kotalela ndenge oyo mabota na bango ekoki kosangana na mosala monene oyo ezali kosalema na eleko oyo ya Ekaniseli. Libota na yo mobimba bokoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? To na libota na yo bokoki kopesa moto moko to bato mwa mingi mabɔkɔ mpo básala mosala yango? Soki likoki ezali mpenza te, bómityela mikano ya sikisiki na libota na bino mpo na kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Na libota na yo, bozali na elenge moko oyo, soki bolendisi ye mwa moke mpe bosalisi ye, akoki kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosakoli? Bato boni libota na yo ekobengisa na Ekaniseli ya mbula oyo? Soki na libota bomibongisi malamu liboso, bokozwa ebele ya mapamboli mpe bokozala na esengo mingi.
25 Tósalela mpenza malamu ntango oyo etikali: Ntango ntoma Petelo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso, akundwelaki bango ete mikolo etikalaki ya kotánga mpamba te nsuka ya ebongiseli ya makambo ya Bayuda ekómaki pene. (1 Pet. 4:7) Lelo oyo, makambo nyonso ezali komonisa ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya mokili mobimba ezali lisusu mosika te. Mokolo na mokolo, bomoi na biso esengeli komonisa ete tondimi mpenza likanisi yango. Biso bato tozali kosalela Yehova na molende tosengeli komipesa mobimba na mosala ya kosakola nsango malamu oyo esengeli kosalema nokinoki.—Tito 2:13, 14.
26 Sikoyo nde ntango ya komonisa molende mpe ya kosala mpenza mosala! Kanisá malamumalamu oyo Yehova asali mpo na yo, mpo na libota na yo mpe mpo na lisangá. Atako tokokoka ata moke te kozongisela Yehova bolamu nyonso oyo asaleli biso, kasi tokoki kosambela ye na molimo na biso mobimba. (Nz. 116:12-14) Yehova akopambola biso mpo na milende ya solosolo oyo tozali kosala. (Mas. 10:22) Tiká ete biso nyonso tózala “bato ya molende na oyo ezali malamu” na boumeli ya ntango oyo ya ntina mingi oyo mosala monene ezali kosalema, “mpo ete na makambo nyonso Nzambe azwa nkembo na nzela ya Yesu Klisto.”—1 Pet. 3:13; 4:11.
[Etanda na lokasa 3]
Bato oyo bayanganaki na Ekaniseli na mokili mobimba
1999 14 088 751
2000 14 872 086
2001 15 374 986
2002 15 597 746
[Etanda na lokasa 4]
Okobengisa nani na Ekaniseli?
□ Bato ya libota na yo mpenzampenza mpe bandeko
□ Bato ya kartye mpe bato mosusu oyo oyebani na bango
□ Baninga ya mosala mpe baninga ya kelasi
□ Bato oyo ozongelaka kotala mpe bayekoli ya Biblia
[Etanda na lokasa 5]
Tósalisa baoyo bayangani na Ekaniseli
□ Tóyamba bango na nsai
□ Tókende kotalaka bango mpo na kokolisa mposa na bango
□ Tósɛnga bango tóyekola na bango
□ Tóbengisa bango na lisukulu ya ntina mingi
[Etanda na lokasa 6]
Mikano nini omityeli mpo na eleko ya Ekaniseli?
□ Komema moto moko oyo obengisaki na Ekaniseli
□ Kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosakoli ya nsango malamu
□ Kolekisa ngonga boye to boye na mosala ya kosakola
□ Kobongisa lisusu ndenge oyo osalaka na motindo moko boye ya kosakola
□ Kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi