Tózala ntango nyonso na ezaleli malamu mpenza oyo ekumisaka Nzambe
1 Ata esika nini oyo tozali, ezaleli na biso, molato na biso mpe ndenge na biso ya kosala monzɛlɛ epesaka litatoli likoló na biso mpe likoló na Nzambe oyo tosambelaka. Yango emonanaka mingimingi mpenza na mayangani minene ya biso basaleli ya Nzambe, epai bato mingi batalaka biso. Soki tozali kopesa ndakisa malamu, nkombo ya Yehova ekumisamaka. (1 Pet. 2:12) Nzokande, bizaleli to makambo ya mabe oyo mwa bato mosusu bakoki kosala kozanga kokanisa malamu, ekoki kobwaka nsɔni na nkombo ya Nzambe mpe na basaleli na ye. (Mos. 9:18b) Lokola toyebi ete, mpo na ezaleli na biso, bato oyo bazali baklisto te bakoki koloba mabe to malamu mpo na ebongiseli na biso mpe mpo na Nzambe oyo tosambelaka, yango esengeli kotinda biso tókeba mpe “tósala nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Kol. 10:31.
2 Tózala na ezaleli malamu na bisika bapesi biso mpo na kolala: Mbala mingi, bato bakamwaka ntango bamonaka Batatoli ya Yehova bazali kosala misala na bango na kimya, bazali na bizaleli malamu mpe balingi bopɛto. Nkolo otɛlɛ moko alobaki boye mpo na mabota ya Batatoli oyo bafandaki na otɛlɛ na ye: “Bana ya Batatoli ya Yehova bazali bana moko malamu mpenza koleka bana nyonso oyo namoná! Bango nyonso, balataka malamu; bazali na limemya, bazali na bonkonde mpe bazali na bizaleli malamu; mpe basalaki ata likambo moko te ya mabe. Napesi bino longonya mpenza mpo na bilenge na bino. Tosepelaki kozala na bana na bino na otɛlɛ na biso.” Bato oyo tozalaka na bango esika moko balobaka maloba ya ndenge yango, mpamba te bamonaka bolingo mpe limemya oyo ezali kati na basaleli ya Yehova.
3 Ezali esengo na komona milende oyo bandeko mpe bato oyo bazali kosepela na solo, bazali kosala mpo na kozala pɛto na bisika ya mayangani. Yango ezali mpe kosala ete bato báloba malamu mpo na biso mpe ezali kobakisa lokumu ya Batatoli ya Yehova. Nzokande, tosili koyoka ete mabota mosusu ezalaka na mokakatano, mpamba te tata ya libota azalaki na makoki te ya kosomba bilamba ya sika mpo na mwasi na ye to mpo na bana. Mpo na yango, basusu baboyaki koya na mayangani. Yango etindaki batata mosusu ete bádefa mbongo mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Nzokande, bato mingi bayaka na mayangani atako bazali babola. Na bisika mosusu, bandeko mibali badefisanaka bakazaka, basimisi mpe kravati soki balingi bámata na ebaelo. Ezali na bandeko mibali mosusu oyo basalaka masukulu na bango makolo ngulu mpo bazangi sapato! Bandeko yango bapesaka nzela na likambo moko te ete ezangisa bango libaku ya kozwa bilendiseli oyo eutaka na mayangani na biso. Oyo ezali solo elimo malamu mpo na mayangani na biso ya boklisto, boye te? Atako tozalaka na mposa ya kobatela lokumu ya mayangani na biso na kozaláká ntango nyonso pɛto, kasi tosengeli ntango nyonso koyeba ete mokano na biso ezali te ya kozala na “enzombo ya kolakisa biloko oyo [tozali] na yango.”—1 Yoa. 2:16, NW.
4 Na momeseno, bapaya bayambamaka na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔndi epai na bandeko oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te mpo na baoyo bayambami ete bálekisa ndelo na kosɛngisáká ete bápesa bango esika ya kolala mikolo mingi liboso ya liyangani to báumela lisusu wana nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka bobele na boumeli ya mikolo ya liyangani. Baoyo bazali koyambama na bisika ya bandeko basengeli komonisa limemya mpo na biloko ya bandeko oyo bayambi bango. Basengeli kobebisa eloko moko te, kokenda te na bisika oyo bapesi bango ndingisa te, mpe basengeli kokeba ete bana na bango mpe básala bobele bongo. Soki bandeko oyo bayambi bapaya bazwi mokakatano moko na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa yango na departema ya boyambi bapaya, oyo ekozala na esengo ya kopesa bango lisungi. Mpo ete departema ya boyambi bapaya etambola na molɔngɔ mpe esala malamu, esengeli ete bandeko nyonso básala na bomoko. (Ebe. 13:17) Toyoki ete bandeko mosusu bazali kotika bango moko esika ya kolala oyo bapesaki bango mpo na kokende na esika mosusu epai oyo moninga moko to moto moko oyo bayebani na ye azali. Yango epesaka mokakatano na bandeko oyo bazali kosala na departema ya koyamba bapaya. Tozali kosɛnga na bino nyonso ete bólanda ndenge bandeko oyo bazali kosala na departema yango bazali kosɛnga bino.
5 Tosengeli kosala makasi ete tólanda ndenge moto oyo ayambi biso epai na ye asɛngi biso tósala. Na ntembe te, tokolinga te ete bato bátikala na makanisi ya mabe mpo na basaleli ya Yehova. Lokola tozali baklisto tosengeli komitambwisa ntango nyonso na bosembo. Tosengeli te kokamata bilamba ya ndako to biloko mosusu lokola “suvenire” na bisika oyo bayambi biso, mpamba te yango ezali moyibi..
6 Etamboli oyo ebongi na liyangani: Ata soki tosaleli esika ya ndenge nini mpo na kosala liyangani, na boumeli ya mikolo ya liyangani tosengeli kotalela esika yango lokola Ndako monene ya Bokonzi. Na yango tosengeli kolata bilamba ya malamu mpe komibongisa malamu kaka ndenge tosalaka ntango tokendaka na makita na lisangá na biso. Ezala ntango liyangani ezali kosalema to ntango liyangani esili, tosengeli te kolata bilamba na ndenge ya kozanga bopɔlɔ to na ndenge ya mobulumobulu, yango emonisaka elimo ya mokili mpe ekozala mpasi mpo ete bato bámona ete tozali na bizaleli malamu mpe tokeseni mpenza na bato mosusu. Bandeko basi basengeli kokeba ete bajipe to barobe oyo bakolata ezala mikuse te mpe ezala ya modɛlɛ ya malamu oyo ekomonisa ete balati na bopɔlɔ mpenza. (1 Tim. 2:9, 10) Ezala ntango tozali na liyangani, ntango tozali na otɛlɛ to ntango tozali na bandeko na biso ya elimo to na baninga na biso to na bandeko na biso ya mosuni, to ntango tozali kosomba biloko na magazini, tosengeli ntango nyonso komonisa na bizaleli na biso ete tozali baministre ya Nzambe, tosengeli te kobɛtisa bato mosusu libaku.—2 Kol. 6:3.
7 Na liyangani, batisimo ekozala na mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1995 na lokasa 30, emonisaki ezaleli oyo tosengeli komonisa na libaku yango. Elobi ete “tosengeli kotalela batisimo na lolenge ebongi na yango mpenza. Ezali ntango ya kolekisa ndelo na mayoki te, ya kosala elambo te to ya kosala masɛki te. Kasi ezali mpe ntango ya kozala mawamawa te to ya kozanga esengo te.” Ekozala malamu te mpo na baoyo bazali kozwa batisimo, ezala mibali to basi ete bálata bilamba ya kosukola oyo ezali kokanga nzoto makasi to oyo ezali komonisa polele biteni ya nzoto. Na yango, biso nyonso tosengeli komonisa ete batisimo ezali likambo ya esengo kasi ya bisalasala te.
8 Petelo ayebisi biso ‘lolenge nini ya bato tosengeli kozala na bizaleli na bulɛɛ mpe na misala ya bokangami na Nzambe.’ (2 Pet. 3:11, NW) Tiká ete maloba na biso mpe misala na biso na liyangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe” esalisa bato ya mitema sembo oyo bazali kotala biso báyeba mpe básambela Nzambe na biso, ye oyo abongi na lokumu mpe na nkembo.—1 Kol. 14:24, 25.