Tósalaka makambo ya malamu mpo ete bato bákumisa biso!
1 “Bazalaka na kimya oyo namoná naino te epai ya bato mosusu.” “Koyamba bato oyo epesaka esengo.” Yango ezali lolenge ya maloba ndenge na ndenge ya kokumisa oyo bato balobaki ntango tosalaki liyangani ya etúká na mbula eleki, yango emonisaki lolenge malamu oyo bato batalelaka ebongiseli na biso. (Mas. 27:2; 1 Kol. 4:9) Makumisi motindo oyo ekendaka libosoliboso epai ya Yehova. (Mat. 5:16) Liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe,” oyo ekosalema mbula oyo, ekopesa biso libaku mosusu malamu ya kokumisa Nzambe.
2 Mbula na mbula bakundwelaka biso na boboto nyonso etamboli oyo tobongi kozala na yango na liyangani. Mpo na nini? Mpo, lokola bizaleli, molato mpe etamboli ya mokili ezali se kobeba, toboyi ete biso mpe tobendama na yango. Tolingi te ete etamboli na biso ya malamu ebeba. (Ef. 2:2; 4:17) Tiká tobosana ata mokolo moko te makebisi oyo:
3 Tósalaka makambo ya malamu—Ntango nyonso: Etamboli na biso ya malamu eyebani na mokili mobimba. (1 Petelo 2:12) Ezala esika nini oyo tozali, ata na ndako na biso, na magazini to na zando, etamboli na biso ya malamu ekoki kopesa litatoli malamu ete tozali bato ya sembo, bateyi ya Liloba ya Nzambe. Lokola tozali komema nkombo ya Yehova, tozali na mokumba monene ya kosala ete etamboli na biso to mpe maloba na biso ebwaka nsɔni te na nkombo yango. Etamboli na biso ya malamu ekoki kotinda bato mosusu bakóma basambeli ya Yehova.—Talá 1 Petelo 3:1, 2.
4 Bato oyo batalaka biso bakamwaka ntango bazali komona bana na biso ya mike bazali komitambwisa malamu mpe bazali na bizaleli malamu. (Ef. 6:1, 2) Mpo na ntina yango baboti basengeli kokeba mpo na etamboli ya bana na bango. Ezali mokumba na bango ya kokɛngela bana na bango ntango nyonso. Yango ezali mokumba oyo Nzambe apesi bango. (Mas. 1:8) Basengeli kokeba ete bana na bango bakendaka mpambampamba te na twalɛti ntango liyangani ezali kosalema. Ntango liyangani ezali kosalema ezali ntango ya kosakana te. Basengeli kofanda pembeni ya baboti na bango, koyoka mpe koyekola kobanga Nzambe ya solo.—Det. 31:12, 13.
5 Tósalaka makambo ya malamu—Na molato na biso mpe na lolenge na biso ya kobongisa nzoto: Nsima ya moko ya mayangani ya etúká oyo esalemaki na mbula eleki, mokomi ya zulunalo moko oyo ebimaka na engumba moko monene akomaki boye: “Kati na makambo nyonso oyo ekamwisaki bato, ezalaki mpenza etamboli ya Batatoli bango moko. Ezalaki mpenza likambo ya kolendisa na komona bato mingi boye bazali komitambwisa na lokumu mpe na limemya. Bankama ya mabota ya mposo mpe bitúluka ndenge na ndenge bazalaki kokɔta na libándá ya masano na kimya mpe, balataki kitoko mpenza. Bizaleli na bango ekeseni makasi na oyo ya ebele ya bato oyo basalelaka libándá ya masano oyo. Ya solo, Batatoli bakeseni mpenza na bato mingi. Lelo oyo, tomonaka bato bazali komitambwisa na ndenge ya mobulu soki bazali ebele na esika moko. . . . Nzokande, ezalaki esengo mpenza na komona ebele oyo ya Batatoli ya Yehova.” Tiká ete molato mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto ebebisa te elimo oyo ezalaka na liyangani. —Filp. 1:10; 1 Tim 2:9, 10.
6 Tósalaka makambo ya malamu—Na kopesaka lisungi epai na baoyo bazali na mposa na yango: Balapolo emonisi ete bandeko mosusu bakokaki koyangana na liyangani te na bambula eleki mpo bazalaki na bilamba ya malamu te. Nzokande, ata soki bilamba na biso ezali ya motuya mingi te, tosengeli kosala makasi mpo na koyangana na liyangani. Likambo ya ntina ezali kolya na elimo mpe kolendisama. Soki bandeko mosusu na lisangá bazali na bosɛnga, bankulutu basengeli kotala likambo oyo bakoki kosala mpo na kosalisa bango. Na ntembe te, tolingi ete moto mokomoko ya lisangá na biso azwa matomba na liyangani. Yakobo 2:15-17 epesi toli mpo na ndenge tosengeli kosalisa bandeko na biso baklisto oyo bazali na bosɛnga makasi. Soki tokoki te kopesa bango bilamba ya sika, tokoki ata kolukela bango bilamba na biso mosusu ya kala to ata kodefisa bango bilamba na biso.
7 Tósalaka makambo ya malamu—Na ntango ya batisimo: Bakandida mpo na batisimo basengeli kotalela libaku oyo na limemya. Soki balati bilamba ya kosukola oyo ebongi, bakomonisa limemya mpo na libaku oyo ya bosantu. Ekozala malamu liboso ete bakende na liyangani bandeko oyo bayekolaka na bango Biblia batalela elongo na bango toli oyo epesamaki na lisolo “Mituna ya batángi” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili, 1995.
8 Tósalaka makambo ya malamu—Na bizaleli na biso ya malamu: Bizaleli malamu etaleli makambo nyonso ya bomoi na biso. Na nsuka ya liyangani, ntango tozali kozwa motuka mpo na kozonga na bandako, tokomonisa bizaleli malamu na koboya koluka liboso matomba na biso moko; tosengeli kotika liboso mibange, bamama mpe bana bakɔta. Tosengeli mpe komonisa bizaleli malamu na kopesa mabɔkɔ mpo na kotika esika ya liyangani pɛto. Soki tokweisaki eloko moko ntango tolyaki na ntango ya bopemi, to tomoni mwa papye na mabele, ezaleli na biso ya boklisto ya kozala ntango nyonso pɛto esengeli kotinda biso tolokota yango mpe tobwaka yango na esika ya kotya bosoto. Baboti basengeli kolakisa bana na bango báyeba kobatela esika na biso ya losambo ete ezala pɛto.
9 Lolenge na biso ya komibongisa mpe etamboli na biso ya bato bazali kosambela Nzambe epesaka litatoli na bindimeli na biso mpe esalaka ete bato ya mitema sembo báyeba solo. Na yango, tiká ete ‘tósalaka bobele makambo ya malamu’ mpo ete bato bakumisa biso wana tokoyangana na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe.”—Lom. 13:3.