Biyano na Mituna na Bino
◼ Esengeli kotya karte ya teritware ya lisangá na Ndako ya Bokonzi?
Ɛɛ, esengeli kokangisa karte ya teritware ya lisangá na mabaya mpe kotya yango na efelo ya Ndako ya Bokonzi. Esengeli kotya karte yango te na esika botyaka mayebisi ya lisangá. Karte yango esengeli komonisa bandelo esika teritware ya lisangá ebandi mpe esuki mpe esika teritware mokomoko ebandi mpe esuki ná nimero na yango. Karte yango esengeli mpe komonisa bandelo ya bateritware ya masangá nyonso oyo esalaka makita na Ndako ya Bokonzi moko. Yango ekosalisa basakoli ná bato ya sika báyeba soki bafandaka na teritware ya lisangá nini. Soki na karte yango bomonisi bisika oyo boyekoli ya mokanda esalemaka, bandeko bakoyeba mpe esika oyo etuluku na bango esalaka boyekoli ya mokanda. Esengeli kokɔtisaka bambongwana nyonso oyo esalemi.
Kotya karte ya teritware na Ndako ya Bokonzi ndenge wana esalisaka basakoli báyeba ete ezali malamu moto na moto azala na teritware na ye, soki esengeli. Karte yango ekosalisa basakoli oyo balingi, bápona teritware oyo ezali pene na esika bafandaka. Lisusu, karte yango ekoki mpe kosalisa bandeko mpo bálekisa ntango mingi te na likita mpo na mosala ya kosakola, mpo ekosalisa ndeko oyo azali kotambwisa likita yango alakisa basakoli mbala moko teritware oyo bapesi bango.
Longolá yango, karte ya teritware emonisaka polele ete lisangá ebongisami malamu mpo na kosakola nsango ya Bokonzi malamumalamu na teritware oyo bapesi bango.—Luka 9:6.