Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/06 lok. 8
  • Ozalaka na teritware ya yo moko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na teritware ya yo moko?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Matomba ya kozala na teritware na yo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Biyano na Mituna na Bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Soki okuti bato na ndako te
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 12/06 lok. 8

Ozalaka na teritware ya yo moko?

1. Teritware ya yo moko ezali teritware nini?

1 Teritware ya yo moko ezali teritware oyo bapesi yo. Ekoki kozala pene na esika ofandaka, mpo okómaka kuna noki mpe osakola, ata yo moko to elongo na mosakoli mosusu. Atako ezali malamu kotosa bibongiseli ya lisangá ya kosakola elongo na basakoli mosusu soki ebongi, kozala na teritware ya yo moko mpo na kosakola na bantango mosusu ekoki kosalisa yo na kopesa litatoli malamumalamu, mingi mpenza soki lisangá ezali na teritware ya monene.​—Mis. 10:42.

2. Wapi mwa matomba ya kozala na teritware na biso moko?

2 Matomba: Basakoli mosusu bazwaki matomba mingi ntango basakolaki na teritware ya bango moko oyo ezali pene na esika na bango ya mosala, na ntango ya bopemi to mbala moko nsima ya mosala. Basusu basepelaki kosakola libota mobimba epai ya bato ya kartye na bango, ngonga moko to koleka liboso ya kobanda Boyekoli ya Mokanda ya lisangá. Lokola teritware yango ezalaki mosika te, esɛngaki bango milende mingi te, ntango mingi te, mpe mbongo mingi te mpo na kozongela bato oyo basepelaki mpo na koyekola na bango Biblia. Lokola teritware ya moto ye moko ekoki kosalisa ye asala makambo mingi na ntango moke, yango ekoki kopesa basakoli mosusu likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala to kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Longolá yango, kosakola na teritware ya yo moko mpe komesana na bato ya teritware yango, ekoki kosala ete bato yango bátyela biso motema; yango ekoki mpe kosalisa biso tóyokanisa maloba na biso ya kobanda lisolo na bamposa na bango, mpe mosala na biso ya kosakola ekobota mbuma.

3. Matomba nini mobongisi-nzela moko oyo asɛngaki teritware na ye moko azwaki?

3 Mokɛngɛli moko ya zongazonga alendisaki mobongisi-nzela moko asɛnga teritware ya ye moko. Mobongisi-nzela yango alobi boye: “Nalandaki toli yango mpe eumelaki te, nayebanaki na bato ya teritware na ngai malamu mpe namesanaki na bango. Nabongolaki ngonga ya kokende kotala bango na kotalela programɛ na bango. Yango esalaki ete na nsuka ya sanza nazongelaki bato mbala 80 na esika ya mbala 35 oyo nazalaki kosala liboso, mpe nakómaki koyekola Biblia na bato 7.”

4. Ndenge nini okoki kozwa teritware ya yo moko mpe kosakola na teritware yango?

4 Ndenge ya kozwa yango: Soki olingi kozala na teritware ya yo moko, sololá na ndeko oyo atalelaka teritware. Kokakatana te mpo na kobenga mosakoli mosusu asakola elongo na yo, mpe komáká nimero ya bandako oyo okutaki bato te. Osengeli kosala makasi osilisa teritware na yo mobimba na sanza minei. Soki olongi kosilisa yango te, okoki kosɛnga lisalisi ya mokɛngɛli ya Boyekoli ya Mokanda na bino to ya bandeko mosusu. Na nsuka ya sanza minei, okoki kozongisa teritware yango soki osilisi yango to kosɛnga ete osala yango lisusu. Nzokande, osengeli te kotikala na teritware moko wana libela, kasi osengeli kozongisa yango mpo basusu mpe básɛnga yango. Soki lisangá na bino ezali na teritware ya monene te mpe ekokoka te ete ozwa teritware ya yo moko, mbala mosusu okoki kosɛnga eteni ya teritware epai ya mokɛngɛli na Boyekoli ya Mokanda na bino.

5. Ezali kosɛnga nini mpo tókokisa mokumba na biso ya kosakola?

5 Mokumba bapesi biso ya kosakola “na mabelé mobimba oyo efandami” ezali mokumba moko monene. (Mat. 24:14) Ezali kosɛnga tósala na molende mpe na bomoko. Longola kosakola elongo na basakoli mosusu, kosakola na teritware na biso moko ekoki kosalisa biso tóyebisa bato mingi koleka nsango malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto