Biyano Na Mituna Na Bino
◼ Ntango nini ebongi kosala etuluku ya sika ya boyekoli ya mokanda?
Mpo na kosala etuluku ya sika ya boyekoli ya mokanda esengeli ete bato oyo bakoyangana na esika mokomoko ya boyekoli mpe na ndako ya Bokonzi bazala soki 15 to mwa moke na nse na yango. Mpo na nini esɛngami bongo?
Soki bituluku ya boyekoli ya mokanda ezali na bato mingi te, motambwisi akozala na likoki ya kolandela moto mokomoko oyo azali koyangana. Lisusu, bato nyonso bakozwa libaku ya kopesa biyano; likambo yango ekopesa bango nzela ya kosakola polelepolele kondima na bango. (Ebe. 10:23; 13:15) Kozala na bituluku ya mikemike bongo na bisika mingi ya teritware ya lisangá ekopesa nzela na likambo oyo: bato bakomona mpasi te mpo na koya koyangana na boyekoli ya mokanda mpe na makita ya kobima na mosala ya kosakola. Masangá oyo ezali na bituluku mingi ya boyekoli ya mokanda, ntango bazali kosangisa motángo ya bato oyo bazali koyangana na bituluku nyonso wana, bazali komona ete bato bakómi mingi koleka liboso.
Ekoki kozala na likambo moko oyo ekoki kosala ete etuluku mosusu ya boyekoli ya mokanda esalema ata soki bato bazali moke mingi. Na ndakisa, na bamboka oyo ezali mosika to soki bisika oyo boyekoli ya mokanda esalemaka ekomi nkaka to mpe bakiti ezali mpenza te. Etuluku mosusu ya boyekoli ekoki mpe kosalema, oyo ekobanda kosala makita na moi mpo na kosalisa bato oyo bakomi mibange, bato oyo basalaka na butu, to mpe bandeko basi oyo mibali na bango bazali batatoli te.
Etuluku mokomoko ya boyekoli esengeli kozala na bandeko mingi oyo bazali makasi na elimo mpe basakolaka mingi mpe ndeko moko oyo azali na makoki ya kotambwisa boyekoli mpe mosusu oyo ayebi kotánga malamu. Bandeko mibali basengeli koluka kozala na makoki wana mpo na kosalisa lisangá.
Bankulutu bakoki kosala ete lisangá ekola malamu soki bazali kotika te bituluku ya boyekoli ya mokanda ezala na bato ebele-ebele mpe soki bazali kosala nyonso mpo yango ezala malamu na elimo mpe makita na yango esalamaka na bisika oyo ebongi. Na ntango bomoni ete ntina moko ya malamu ezali, bosengeli kosala bituluku ya sika ya boyekoli mpo moto nyonso azwa litomba mpenza na ebongiseli kitoko wana ya elimo. Okoki kopesa nzela ete boyekoli ya mokanda esalemaka na ndako na yo? Bandeko mingi oyo basalá yango bazali kozwa mapamboli mingi ya elimo.