Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/03 lok. 1
  • Okolinga makita esalemaka na ndako na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okolinga makita esalemaka na ndako na yo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Biyano Na Mituna Na Bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mpo na nini tozali na mposa ya boyekoli ya mokanda ya lisangá?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge oyo Boyekoli ya Mokanda ya lisangá esalisaka biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Oyo okoki kosala mpo ozwa matomba na etuluku na bino ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 2/03 lok. 1

Okolinga makita esalemaka na ndako na yo?

1 Na ekeke ya liboso, baklisto mingi bandimaki ete makita ya lisangá esalemaka na bandako na bango. (1 Kol. 16:19; Kols. 4:15; Flmo. 1, 2) Lelo oyo, masangá mosusu ezali na bisika mingi te mpo na kosala Boyekoli ya Mokanda ya lisangá mpe makita mpo na kobima na mosala ya kosakola. Yango wana na bisika mosusu, boyekoli ya mokanda ekómi na bato 30 to koleka, motuya wana eleki mpenza motuya ya bato soki 15 oyo esɛngisami mpo na boyekoli ya mokanda.

2 Libaku malamu mpenza: Osilá kokanisa ete boyekoli ya mokanda esalemaka na ndako na yo? Ekozala malamu mingi ete esalema na eteni ya ndako oyo ezali mwa monene mpe pɛto, oyo ezali na miinda ya malamu, mpe ezali nkaka te, esika bato bakoki kopema malamu. Lokola boyekoli ya mokanda ezali likita ya lisangá mpe moko ya bibongiseli oyo Yehova atye mpo na koteya basaleli na ye, ekozala libaku moko malamu mpenza soki boyekoli yango ezali kosalema na ndako na yo. Bandeko mingi balobaki ete bazwá matomba mingi na elimo na ndenge bandimaki básalela ndako na bango na ndenge wana.

3 Soki okanisi ete ndako na yo ebongi, yebisá bankulutu. Ntango mosusu bazali nde koluka bisika mosusu mpo na kosala makita. Soki ekokoka te ete boyekoli ya mokanda esalemaka na ndako na bino, makita mpo na kobima na mosala ya kosakola ekoki kosalema wana? Ata soki mposa ya esika mosusu ya koyangana emonani naino te, bankulutu bakosepela ata na koyeba mpamba ete bakoki kosalela ndako na yo mokolo mosusu. Ntango mosusu okozwa libaku malamu yango na mikolo oyo ezali koya.

4 Kozala na bizaleli malamu: Ntango bayangani na bandako ya bandeko, bato nyonso basengeli komemya biloko ya nkolo ndako. Baboti basengeli kokɛngɛla bana na bango ete bátikala kaka na esika oyo etyami mpo na boyekoli, kasi bákɔta te na biteni mosusu ya ndako. Basengeli mpe komemya bato oyo bafandaka na lopango; bakotya likebi ete bábimisela bango mitungisi te.​—2 Kol. 6:3, 4; 1 Pet. 2:12.

5 Baebele 13:16 ezali kolendisa biso tóbosana te “kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” Kondima ete makita ya lisangá esalemaka na ndako na yo ezali ndenge moko ya malamu mingi ya kokabela bamosusu biloko ya malamu mpe ya ‘kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya.’​—Mas. 3:9, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto