Tómipesa mingi na mosala ya kobuka mbuma
1 Basakoli ya Yehova na ntango ya kala mpe Yesu Klisto ye moko balobelaki mosala moko ya koyanganisa bato. (Yis. 56:8; Ezek. 34:11; Yoa. 10:16) Lelo oyo, mosala yango ezali kosalema, wana nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Bokeseni kati na bato oyo bazali kosalela Nzambe na baoyo bazali kosalela ye te ezali komonana polele mpenza. (Mki. 3:18) Yango elimboli nini mpo na biso?
2 Mokumba ya moto na moto: Tokoki koyekola makambo mingi na ndakisa ya Paulo, ye amipesaki mingi na kotambwisa mosala ya kosakola. Azalaki komiyoka ete azali na mokumba ya kosakola mpo ete bato nyonso bázwa libaku ya koyoka nsango malamu mpe babika. Yango etindaki ye alɛmba te kosalela bango. (Lom. 1:14-17) Lelo oyo, soki totali likama oyo ezali kozela bato, tomoni ete tozali na mokumba monene ya kosala nokinoki mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bafandaka na teritware na biso, boye te?—1 Kol. 9:16.
3 Ntango ya kosala nokinoki: Tokoki kokokanisa mosala ya kosakola na mosala ya koluka mpe kobikisa bato oyo bazali na likama. Tosengeli koluka bato mpe komonisa bango ndenge oyo bakoki kobika, liboso ete likama eya. Ntango ezali lisusu mingi te. Bomoi ya bato ezali na likama! Yango wana Yesu alendisaki bayekoli na ye ete ‘bábondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga ya mbuma na ye.’—Mat. 9:38.
4 Lokola bazali komona ntina ya kosala nokinoki lelo oyo, basakoli mingi ya Bokonzi bamipesi mingi na mosala yango, mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. Elenge mobali moko nkombo na ye Hirohisa na baleki na ye minei bazalaki kobokwama kaka na mama na bango. Elenge mobali yango azalaki kosunga libota na bango, mikolo nyonso azalaki kolamuka na ngonga ya misato na ntɔngɔ mpo na kokende kotɛkisa bazulunalo. Atako bongo, Hirohisa alingaki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola; yango wana abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Yo mpe ozali na makoki ya komipesa mingi lisusu na mosala oyo ekozongelama te?
5 Ntango oyo etikali ezali mokuse.” (1 Kol. 7:29, NW ) Yango wana, tiká tósala nyonso oyo tokoki na mosala ya ntina mingi oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili—mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli. Yesu akokanisaki mosala yango na mosala ya kobuka mbuma. (Mat. 9:35-38) Soki tozali komipesa mingi na mosala ya kobuka mbuma, kosalisa moto moko akóma moko ya basambeli ya Yehova oyo batángami lokola ebele monene na Emoniseli 7:9, 10, ekoki kozala moko ya mbuma oyo mosala na biso ekoki kobotela biso.