Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/01 lok. 8
  • “Tosi tosali teritware na biso mbala mingi!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tosi tosali teritware na biso mbala mingi!”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Totika te kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ozalaka na teritware ya yo moko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tozala ntango nyonso na likebi malamu na mateya na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Matomba ya kozala na teritware na yo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 5/01 lok. 8

“Tosi tosali teritware na biso mbala mingi!”

1 Esi ekómela yo okanisa ete bosi bosali mingi na teritware na bino mpe ete bato oyo bakokani na bampate bazali na kati na yango lisusu te? Ntango mosusu okanisaka boye: ‘Nayebi ndenge bato yango bakoloba ntango nakokende koyebisa bango nsango malamu. Mpo na nini kozongela ntango nyonso bato oyo basepelaka na nsango yango te?’ Ezali solo ete na bateritware mingi, litatoli esi epesami kuna mbala na mbala. Nzokande, na esika ete likambo yango elɛmbisa biso, tosengeli nde kotalela yango ete ezali malamu. Mpo na nini? Talá bantina minei oyo elandi.

2 Mabondeli na biso ezwi eyano: Yesu alobaki ete: “Mbuma mingi eteli solo, nde basali bazali mingi te. Na bongo bondelá Nkolo na bilanga ete atinda basali kobukela ye mbuma.” (Luka 10:2) Eleki bambula mingi tozali kobondela Yehova mpo asalisa biso mpenza. Na bisika mingi, basali mosusu oyo tozalaki na mposa babakisama basili kobakisama, mpe litatoli ekómi kopesama mbala na mbala na teritware. Ndenge oyo Yehova ayanoli na mabondeli na biso esengeli mpenza kotinda biso ete tósepela, boye te?

3 Kolendendela ebotaka mbuma malamu: Ata na bateritware oyo litatoli ezali kopesama mbala na mbala, bato bandimaka kaka nsango ya Bokonzi mpe bazali kozwa boyebi ya solo. Na yango, tosengeli kozongaka mbala na mbala na elikya ya kokutana na bato mingi ya mitema sembo. (Yis. 6:8-11) Ndenge bayekoli ya liboso ya Yesu basalaki, yo mpe, “kendé mbala na mbala” epai ya bato ya teritware na bino, salá makasi mpo na kolamwisa mposa na bango mpo na Bokonzi ya Nzambe.​—Mat. 10:6, 7, NW.

4 Na Portugal, masangá mingi esakolaka na teritware na yango mobimba pɔsɔ na pɔsɔ, kasi bazali kaka kokutana na bato oyo bakokani na bampate. Ndeko mwasi moko oyo azalaka mpenza na makanisi malamu, alobi boye: “Ntɔngɔ nyonso, liboso nabima na mosala ya kosakola, nabondelaka Yehova asalisa ngai nakutana na moto moko oyo akosepela koyekola Biblia.” Mokolo moko, amibongisaki mpo na kokende koyekola na bato oyo basalaka na esika babongisaka bato nsuki. Kasi, na nsima, kaka mwasi moko nde ayaki mpo na koyekola. Mwasi yango alobaki boye: “Bamosusu basepeli na bango te, kasi ngai nasepeli.” Na nsima ya sanza moko, ye moko akómaki koyekola Biblia na bato mibale. Mosika te nsima na yango, azwaki batisimo, mpe na nsima akómaki mobongisi-nzela!

5 Mosala ezali kosalema: Ndenge Yesu asakolaki yango, nsango malamu ezali kosakolama. (Mat. 24:14) Ata na bisika oyo bato ‘balingi koyoka [biso] te,’ bazali kozwa likebisi na nzela ya mosala na biso ya kosakola. Toyebi ete bato mosusu bakondima te to bakotɛmɛla solo. Kasi, bato yango basengeli kozwa likebisi na ndenge ebongi mpenza mpo na oyo etali mokolo ya kosambisa ya Yehova oyo ezali koya.​—Ezek. 2:4, 5; 3:7, 8, 19.

6 Mosala na biso esili naino te: Biso moko tozali na lotomo ya koloba te ete mosala na biso ya kosakola esili. Yehova ayebi malamumalamu ntango oyo yango esengeli kosila. Ayebi soki bato bazali naino na teritware na biso, baoyo bakondima nsango malamu. Lelo oyo, bato mosusu bakoki koloba ete basepeli te koyoka nsango na biso, kasi mbongwana oyo ekoki kosalema na bomoi na bango​—kolongwa na mosala, maladi makasi, kokufela moto moko oyo balingaki mingi​—ekoki kotinda bango ete bándima koyoka biso mokolo mosusu. Bato mingi bayoká naino mpenzampenza te nsango oyo tosakolaka mpo bazalaka na makanisi mabe mpo na biso to bazalaka na ntango te ya koyoka biso. Soki tozali ntango nyonso kokende kotala bango lokola baninga, yango ekoki kosala ete bátya likebi mpe báyoka biso.

7 Bato oyo bazalaki bilenge na bambula eleki mpe sikoyo bazali na mabota na bango moko bazali kotalela bomoi na lisɛki te mpe bazali komituna mituna oyo kaka Liloba ya Nzambe nde ekoki kopesa eyano na yango. Elenge mwasi moko abengaki Batatoli mibale na ndako na ye mpe alobaki boye: “Ntango nazalaki mwana moke nayebaki ata moke te mpo na nini mama na ngai aboyaki koyamba Batatoli mpe ayebisaki bango ete asepeli te na nsango na bango, nzokande bango basɛngaki ye eloko mosusu te, se kosolola na ye makambo ya Biblia. Yango wana, nalobaki ete soki nakoli, nabali mpe nakómi na ndako na ngai moko, nakosɛnga na Batatoli ya Yehova báya kolimbwela ngai Biblia.” Ezali yango nde asalaki, yango esepelisaki mingi Batatoli oyo bayaki kotala ye.

8 Yo mpe okoki kozala mosakoli oyo azali kobota mbuma mingi? Mbala mingi ezalaka te ntango mosusu bato oyo tokendaka kotala nde basalaka ete ezala mpasi mpo na biso tosala na teritware mbala na mbala. Ntango mosusu ezali biso moko. Tobandaka mosala ya kosakola na makanisi ya malamu te? Soki ezali bongo, yango ekoki kosala ete mongongo na biso mpe elongi na biso efunda biso. Zalá na makanisi ya malamu mpe monisá elongi ya esengo. Meká kosalela maloba mosusu ya sika. Salelá maloba ndenge na ndenge ya kobanda lisolo, mpe salá makasi mpo na kobongisa yango lisusu. Mbala mosusu okoki kobongola motuna na yo ya ebandeli to kosalela vɛrsɛ mosusu ya Biblia na lisolo na yo. Tuná bandeko mosusu lolenge ya kolakisa nsango malamu oyo bamonaki ete ebimisaki mbuma malamu na teritware. Bimaká elongo na basakoli mpe babongisi-nzela ya ndenge na ndenge, mpe talá ndenge oyo basalaka mpo mosala na bango ebotaka mbuma.

9 Yehova azali kondima mpe kopambola mosala ya kosakola Bokonzi, mpe soki tozali kosala mosala yango, tokomonisa bolingo na biso mpo na ye mpe mpo na bazalani na biso. (Mat. 22:37-39) Na yango, tiká ete tosala mosala na biso kino nsuka, tólɛmba te kosala teritware na biso mbala na mbala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto