Molato mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto ezala ya mindɔndɔ te
1 Zulunalo moko elobaki ete: “Mibali nyonso, ata mpe bana mibali, balati kravate. Basi nyonso mpe bana basi nyonso, ya mike mpe oyo ya mwa mikóló, balati jipɛ to robɛ. Ata moto moko te alati patalo ya jeans to alati simisi kozanga kotya kravate. Moto nyonso azali na esengo.” Zulunalo yango ezali kolobela banani? Bato yango bayanganaki nde mpo na likita moko ya politiki? Mpo na masano? Mpo na miziki? Soki moke te! Zulunalo yango ezalaki kolobela nde ebele ya bandeko na biso mibali mpe basi oyo bazalaki na liyangani moko monene ya etúká oyo esalemaki na mbula oyo euti koleka.
2 Na engumba mosusu oyo liyangani yango esalemaki, mopanzi-nsango moko alobaki boye mpo na ebele yango ya Batatoli: “Mibali nyonso bazali pɛto mpe balati kazaka na kravate. Basi balati na ndenge ya mindɔndɔ te kasi balati kitoko.” Moto mosusu, ye azali polisi, alobaki ete: “Bozali na bizaleli malamu, bopesaka bato limemya, bozali bato ya pɛto. Oyo nazali komona ezali mpenza kitoko. Na mokili oyo etondi na bosɔtɔ, bosali makasi mpo na kolongola salite!” Oyo nde matatoli malamu mpo na biso! Tozali na botɔndi mpenza ntango tozali koyoka bato mosusu bazali kokumisa bandeko na biso motindo wana, boye te? Ya solo, mpo bato bápesa balapolo wana ya malamu, esɛngaki ete Batatoli nyonso oyo bazalaki na liyangani yango bálata mpe bábongisa nzoto na bango malamu mpenza.
3 Na mokili mobimba, eyebani ete tokeseni na bato mosusu na lolenge na biso ya kolata mpe ya kobongisa nzoto. (Mki. 3:18) Mpo na nini? Ezali mpo ete tolandaka toli ya Biblia oyo elobi ete ‘tóbongisa nzoto na biso na molato malamu, na ndenge ya mindɔndɔ te mpe na makanisi malamu, . . . na ndenge oyo ebongi na baoyo balobaka ete babangaka Nzambe.’—1 Tim. 2:9, 10, NW.
4 Molato na yo mpe ndenge na yo ya kobongisa nzoto elakisaka nini? Bilamba oyo tolataka mpe ndenge oyo tolataka yango emonisaka lolenge ya bomoto na biso, elingi koloba bindimeli na biso, elimo na biso, mpe mikano na biso. Midɛlɛ ya bilamba oyo tolingaka kolata emonisaka soki tozali bato ya lolenge nini mpe soki tozali banani. Tosengeli soki moke te kolendisa lolenge ya kokanisa mpe etamboli ya mbindo oyo bato ya mokili bazali kopalanganisa. Mposa na biso ezali te ya koluka koyeba soki modɛlɛ boye to boye nde ezali kolatama mpenza mikolo oyo to te, kasi mposa na biso ezali nde ya koyeba soki modɛlɛ yango ebongi mpo na moto oyo alobaka ete azali ministre ya Nzambe. (Lom. 12:2) Na esika ya kopona molato to lolenge ya kobongisa nzoto oyo ezali komonisa elimo ya lipanda to oyo ezali komonisa bomoi ya mbindo, ekozala malamu nde tómonisa ete tozali mpenza ‘kokumisa Nzambe.’—1 Pet. 2:12.
5 Mbala mosusu, moto ya sika, oyo ayebi naino makambo mingi te, to moto oyo azali mpenza makasi na elimo te, akoki kondima molato nyonso mpe lolenge nyonso ya kobongisa nzoto oyo bato ya mokili bazali kosalela yango piblisite, kozanga ete aluka naino koyeba soki yango ekotinda bato bázala na makanisi nini na ntina na Yehova mpe ebongiseli na ye. Biso nyonso tokoki komitalela malamumalamu mpo na koyeba soki lolenge ya kokanisa ya bato ya mokili esili mpe kokɔtela biso. Tokoki kotuna ndeko moko ya mobali to ya mwasi oyo akɔmeli na elimo mpe oyo bandeko mingi bamemyaka, ete ayebisa biso na bosembo mpenza makanisi na ye na oyo etali lolenge ya molato na biso mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto; na nsima, tótalela malamumalamu toli oyo tokozwa.
6 Bamosusu bandimaka mbala moko ete basengeli kolata malamu na ntango bazali na esika ya liyangani. Kasi na nsima, soki kaka babimi libándá, bakipaka lisusu te kolata malamu na ntango oyo bazali kominanola. Tosengeli ntango nyonso komonisa bizaleli malamu oyo ebongi na baministre baklisto. (2 Kol. 6:3, 4) Ezala esika nini tozali kotambola, makarɔ na biso ya liyangani, molato na biso ya malamu, mpe lolenge na biso malamu ya kobongisa nzoto emonisaka ete tozali Batatoli ya Yehova. Yango wana, molato na biso esengeli ntango nyonso kozala ya malamu mpe ya mindɔndɔ te, mpo na komonisa ete tozali ‘bato ya mokili te.’—Yoa. 15:19.
7 Tiká ete, na liyangani ya etúká “Basakoli ya Bokonzi ya molende” oyo ekosalema na mbula oyo, tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo tómonisa ete tozali “libota [oyo ezali mosantu, NW] epai ya Yehova Nzambe na [biso].” Kosala bongo ekobimisa mbuma malamu oyo ekosala ete Yehova ‘asanzolama lisusu koleka mpe ayebana mpe akumisama.’—Det. 26:19.
[Etanda na lokasa 6]
Ndenge oyo tokoki kokumisa Yehova:
■ Latá na ndenge oyo ebongi mpo na ministre ya Nzambe.
■ Boyá midɛlɛ oyo emonisaka elimo ya mokili.
■ Mpo omonisa ete ozali na makanisi ya malamu, kozala na mindɔndɔ te.