Tókoba kosala oyo esɛngami na bato bamipesi na Nzambe
1 Ezala outi kozwa batisimo sika to ozwá yango kala, na ntembe te obosanaka te mokolo monene wana ya bomoi na yo. Batisimo oyo tozwi ezali likambo ya nsuka te, kasi ezali nde likambo ya ebandeli mpo na mosala oyo tokoki kosala bomoi mobimba oyo ekoki koumela libela, mpo na bato oyo bamipesi na Nzambe. (1 Yoa. 2:17) Kokoba kosala oyo esɛngami na bato bamipesi na Nzambe esɛngaka makambo nini?
2 Landá ndakisa ya Klisto: Ntango azwaki batisimo, Yesu “abandaki mosala na ye” ya “kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 3:23; 4:43) Ndenge moko mpe, ntango tozwaki batisimo mpo na komonisa ete tomipesi na Yehova, tokómaki baministre ya nsango malamu oyo bandimami. Atako kozwa mbongo ya kobikela esɛngaka biso ntango mpe milende mingi, mosala na biso mpenza to mosala oyo totyaka libosoliboso ezali nde mosala ya kosakola. (Mat. 6:33) Na esika ete báluka kozala na bozwi to lokumu, baoyo bamipesi na Nzambe balukaka ‘kopesa nkembo na mosala na bango ya ministre,’ lokola ntoma Paulo asalaki. (Lom. 11:13) Olingaka mpenza mingi mosala oyo osalelaka Yehova mpe opesaka mpenza yango motuya mingi?
3 Se ndenge ezalaki mpo na Yesu, tosengeli ‘kotɛmɛla Zabolo.’ (Yak. 4:7) Satana amekaki Yesu nsima kaka ya batisimo na Ye, mpe ndenge moko lelo oyo akanelaka basaleli ya Yehova oyo bamipesi. (Luka 4:1-13) Lokola tofandi na kati ya mokili ya Satana, esengeli tóyeba kobatela makanisi na biso, koboya biloko nyonso oyo ekoki kobebisa makanisi mpe motema na biso. (Mas. 4:23; Mat. 5:29, 30) Bapesi baklisto toli ete “bakoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.” (1 Kol. 10:21) Yango esɛngaka tókeba na kominanola ya mbindo, na baninga mabe, mpe na makama oyo Internet ekoki kobimisa. Esɛngaka mpe ete tóboya na motema moko mateya ya bapɛngwi. Komibatela na makambo yango mpe na mayele mosusu ya Satana ekosalisa biso tókoba kosala oyo esɛngami na bato oyo bamipesi na Nzambe.
4 Salelá bibongiseli oyo Nzambe atyá: Mpo na kosalisa biso tókoka kosala makambo oyo esɛngami na moto oyo amipesi na Nzambe, Yehova apesá biso lisalisi na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá ya boklisto. Zalá na momeseno ya kotánga Biblia mpe kobondela Yehova mokolo na mokolo. (Yos. 1:8; 1 Tes. 5:17) Sepelá mpenza na makita ya lisangá. (Nz. 122:1) Zalaká moninga na baoyo babangaka Yehova mpe tosaká mitinda na ye.—Nz. 119:63.
5 Na lisungi ya Nzambe, okoki kokoba kosala makambo oyo esɛngami na moto oyo amipesi na Yehova mpe okozwa esengo ya kosalela ye mpo na libela.—Nz. 22:26, 27; Filp. 4:13.