Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/03 lok. 1
  • Yehova abongi mpenza kokumisama mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova abongi mpenza kokumisama mingi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Bizaleli oyo etindaka biso tóyanganaka na makita
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Salisá basusu bázwa litomba na lisiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 3/03 lok. 1

Yehova abongi mpenza kokumisama mingi

Tokokanisa Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo ya 16 Aprili

1 Mitema ekómi likolólikoló lokola tozali kopusana na mokolo ya 16 Aprili 2003. Na butu ya mokolo yango, tokokanisa liwa ya Yesu; elongo na bamilio ya baninga na biso basambeli ya Yehova oyo bazali na mokili mobimba, tokokumisa nkombo ya Yehova. Ebongi tókumisa mpenza Yehova mpo na lisiko, oyo ezali likabo eleki monene oyo apesaki. Na nzela na yango, akopesa bato nyonso ya botosi ebele ya mapamboli. Yango wana, elongo na mokomi ya nzembo, tozali koganga na motema mobimba ete: “Yehova azali monene mpe abongi mpenza kokumisama mingi.”​—Nz. 145:3, NW.

2 Oyo nde ntango ya kokanisa malamumalamu boboto ya Yehova mpe nyongo oyo tozali na yango epai na ye ya komonisela ye botɔndi na ndenge atindaki “Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya mokili mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoa. 4:9, 10) Soki na botosi nyonso, tozali kokumisa molulu ya Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, tokosimba mpenza na mitema na biso ete “[Yehova] azali na ngɔlu mpe na mawa . . . mpe na [motema-boboto, NW] monene.” (Nz. 145:8) Ya solo, lisiko ezali lolenge eleki monene oyo Yehova amonisaki bolingo na ye epai ya bato nyonso. (Yoa. 3:16) Ntango tozali kokanisa bolingo wana ya Nzambe mpe bosembo oyo Yesu amonisaki na bomoi na ye, motema na biso ezali kotinda biso na kokumisa Yehova. Seko na seko, tokokumisa ye mpo na bolingo na ye oyo ezangi nsuka, bolingo oyo amonisi na ndenge apesi biso likoki ya kozala na bomoi ya seko.​—Nz. 145:1, 2.

3 Tósalisa basusu bákumisa Yehova: Botɔndi mpo na lisiko, likabo eleki monene oyo Nzambe apesi biso, esengeli kotinda biso tóbengisa basusu mpo bákumisa Yehova elongo na biso. Elimo ya Nzambe etindaki mokomi ya nzembo akoma ete: “Bakopanza mpenza nsango ya boboto na yo oyo etondi mɛkɛ, mpe bakoganga na esengo mpo na boyengebene na yo.” (Nz. 145:7, NW) Na mbula moko mpamba oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba basakolaki ngonga koleka miliare moko. Mbuma nini milende na bango ebotaki? Pɔsɔ na pɔsɔ, bato koleka 5 100 bazalaki kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. Na kati ya bato 15 597 746 oyo bayanganaki na Ekaniseli, bato koleka milio 9 babandi naino te kokumisa Yehova lokola basakoli ya nsango malamu. Yango ezali komonisa ete bokoli monene ezali liboso! Biso basakoli ya Bokonzi topesaka motuya mingi na libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu mpe ya kobalusa mitema ya bato mosusu epai ya Yehova, ya Mwana na ye mpe epai ya Bokonzi.

4 Lolenge moko malamu ya kolendisa bato mosusu mpo bákumisa Yehova ezali ya kobengisa bango báya elongo na biso na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo. Osili kosala liste ya baoyo nyonso olingi kobengisa ná basusu oyo bakoki kozala na mposa okundolela bango mokolo mpe ngonga ya Ekaniseli yango? Osili kopesa bango lokasa ya libyangi? Soki osali yango naino te, salá makasi opesa bango yango na boumeli ya ntango oyo etikali. Salisá bango báyeba ntina ya molulu yango. Na likita yango, omibongisa mpenza mpo na kopesa bato ya sika mbote. Salá ete bámiyoka malamu, lakisá bango bandeko mosusu, mpe pesá bango longonya na ndenge bayei.

5 Koyangana na Ekaniseli ekoki kopesa bato ya sika mposa ya kokola na elimo. Moyekoli moko ya Biblia oyo azalaki na maladi moko oyo ezalaki kopesa ye nsɔmɔ ya kokende na bisika bato bazali ebele, akendaki na Ekaniseli. Ntango batunaki ye ndenge nini amonaki likita yango, alobaki boye: “Ezalaki butu moko oyo eleki bosantu, mpe nazalaki wana.” Banda wana, akómaki koyangana na makita.

6 Nsima ya Ekaniseli: Bokoki kosala nini mpo na kosalisa bato yango oyo bazali kosepela na mateya na biso mpo bákóma kokumisa Yehova? Bankulutu basengeli kotya likebi na bato oyo bayangani na Ekaniseli mpo na mbala ya liboso mpe basengeli kozwa bibongiseli mpo ete basakoli ya makoki bákende kotala bango nokinoki nsima ya Ekaniseli mpo na kotalela lisusu elongo na bango makambo ya kobɔndisa oyo bayokaki mpe bamonaki. Bamosusu kati na bango bakoki kosɛnga báyekola na bango Biblia. Esengeli mpe kobengisa bango na makita nyonso ya lisangá, mpamba te koyanganaka na makita nyonso ekoki kosala ete báyeba Biblia mingi.

7 Bibongiseli ezali kozwama mpo na kolendisa baoyo nyonso basakolaka sanza na sanza te ná baoyo nyonso batiká kosakola ete báyanganaka na makita nyonso. Soki bankulutu basɛngi yo osalisa mosakoli moko oyo atiká kosakola mpo abanda lisusu kobima na mosala ya kosakola, kokakatana te mpo na kondima. Ntango tozali komonisela bandeko na biso bolingo mpe tozali kotyela bango likebi motindo wana, tozali nde kolanda toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete: “Wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”​—Gal. 6:10.

8 Tiká ete biso nyonso tósala milende mpenza mpo na kozala na Ekaniseli na mokolo ya 16 Aprili. Tokolinga ata moke te kozangisa libaku wana oyo eleki bosantu ya kokumisa Yehova. Ɛɛ, tiká ete tókumisa Yehova mpo na misala na ye minene banda sikoyo mpe mpo na libela!​—Nz. 145:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto