Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/03 lok. 1
  • ‘Tóngɛnga lokola miinda’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tóngɛnga lokola miinda’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Bilenge oyo bazali kongɛnga lokola miinda
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Tiká pole na bino engɛnga” mpo na kopesa Yehova nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 4/03 lok. 1

‘Tóngɛnga lokola miinda’

1 Na mokili oyo ezali na molili ya elimo mpe ya bizaleli, bamilio soki motoba ya basaleli ya Yehova Nzambe ya solo bazali “kongɛnga lokola miinda” na bikoló 234. (Filp. 2:15) Yango nde ekesanisaka biso mpenza na bato mosusu. Ndenge nini tongɛngisaka pole ya solo oyo ezali na motuya mingi, oyo eutaka na Yehova?​—2 Kol. 3:18.

2 Misala na biso: Bato bamonaka mbala moko etamboli na biso. (1 Pet. 2:12) Mwasi moko amonaki ete moninga na ye moko ya mosala, oyo azali Motatoli, azalaki na boboto, azalaki kosalisa bato, mpe azalaki koloba maloba ya nsɔni te to kosɛka te soki bato basali masɛki ya nsɔni. Ntango bato mosusu bazalaki koloba maloba ya nsɔni mpo na kotumola ye, azalaki kofanda nyɛɛ nzokande azalaki kaka kokangama na oyo ezali sembo. Yango esalaki nini epai ya mwasi wana? Alobi boye: “Etamboli na ye esimbaki mpenza motema na ngai. Yango wana nabandaki kotuna ye mituna etali makambo ya Biblia. Nabandaki koyekola Liloba ya Nzambe mpe na nsima nazwaki batisimo.” Abakisi ete: “Etamboli na ye nde etindaki ngai natalela bindimeli ya Batatoli ya Yehova.”

3 Ndenge totalelaka bato oyo bazali na bokonzi mpe makambo oyo bato ya mokili basalaka, ezala mpe elobeli na biso ya pɛtɔ, nyonso wana esalaka ete biso Batatoli ya Yehova tókesana mpenza lokola bato oyo batambwisami na mibeko ya Biblia, oyo eleki mibeko nyonso. Misala ya malamu ya ndenge wana ekoki kopesa Yehova nkembo mpe kobenda bato mosusu na losambo na ye.

4 Maloba na biso: Na ntembe te, soki tolimboleli bango bindimeli na biso te, ntango mosusu bato oyo bamonaka etamboli na biso ya malamu bakoyeba te mpo na nini tokeseni na bato mosusu. Baninga na yo ya mosala to baninga na yo ya eteyelo bayebi ete ozali Motatoli ya Yehova? Ntango osololaka na bato, omekaka kopesa bango litatoli? Ozalaka na mokano ya kosalela mabaku nyonso oyo emonanaka mpo na ‘kotika ete pole na yo engɛnga liboso ya bato.’?​—Mat. 5:14-16.

5 Mpo na kokokisa mokumba na biso ya bamemi ya pole, tosengeli kozala na elimo ya komipimela. Mposa na biso ya kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba ekotinda biso tómipimelaka makambo mosusu oyo ezali na ntina mpenza te mpo tókoka kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli, mosala oyo ebikisaka bato.​—2 Kol. 12:15.

6 Na misala mpe na maloba na biso, tiká ete tókoba kongɛnga lokola miinda. Soki tosali bongo, bamosusu bakoki koyoka mpe mposa básangana na biso mpo na kopesa Yehova nkembo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto