Liyangani ya etúká elendisaka biso tótambola elongo na Nzambe
Liyangani ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe” ezongelaki mbala na mbala toli ya polele ya Yehova ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yis. 30:21) Soki tozali kosalela mateya oyo tozwaki, ‘tokokeba mpenza na ndenge oyo tozali kotambola.’ (Ef. 5:15) Soki tozali komanyola likoló na makambo oyo toyekolaki, yango ekosalisa biso wana ‘tozali kokoba kotambola na kati ya solo.’—3 Yoa. 3.
Salelá mituna oyo elandi mpe banoti oyo ozwaki na liyangani mpo na komibongisa mpe kopesa biyano na bozongeli ya programɛ ya liyangani ya etúká ya mbula oyo. Bozongeli yango ekosalema na Likita ya mosala na pɔsɔ ya 18 Ɔkɔtɔbɛ.
1. Ndenge nini Enoka atambolaki elongo na Nzambe atako azalaki na bomoi na ntango ya yikiyiki? (Ebe. 11:1, 5, 6; Yuda 14, 15; “Tambolá elongo na Nzambe na ntango oyo ya yikiyiki”)
2. Na makambo nini ya bomoi tokoki kosalela etinda oyo ezali na Luka 16:10? (“Ozalaka ‘sembo na oyo eleki moke’?”)
3. (a) Tángá mateya minei oyo ezali na Hosea mokapo 6 tii na 9, oyo ekosalisa biso tótambola elongo na Nzambe. (Hos. 6:6, 7; 7:14; 8:7) (b) Makambo nini mosusu oyo ezali na Hosea mokapo 10 tii na 14, ekosalisa biso tótambola elongo na Nzambe? (“Esakweli ya Hosea ezali kosalisa biso tótambola elongo na Nzambe”—Masukulu-Matongani)
4. Makambo nini babalani baklisto bakoki kosala mpo libala na bango ezala ntango nyonso malamu? (Mas. 12:4; Ef. 5:29; “Kokabola te ‘oyo Nzambe akangisi esika moko’ ”)
5. Ndenge nini tomonisaka limemya mpo na mayangani na biso ya bosantu? (Mos. 5:1; Yis. 66:23; “Tómonisaka limemya mpo na mayangani na biso ya bosantu”)
6. (a) Wapi lolenge misato ya ntina mingi ya mosala na biso ya kosakola oyo tosengeli kotalelaka mpo na koyeba soki tozali kokokisa mosala yango malamumalamu? (Yis. 52:7; Zek. 8:23; Mko. 6:34) (b) Makambo nini oyo ezali na mwa buku Nsango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso, oyo omoni ete ebongi mpenza kosalela yango? (“Nsango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso”; “Tósalisa baoyo balobaka monɔkɔ oyo toyebi te”)
7. Ndenge nini tokoki kosalisa basakoli ya sika bábangaka te ntango bazali koyebisa bato nsango malamu ya bokonzi? (Bas. 7:17; “Tósalisa bato ebele básangana na biso na mosala ya kosakola”)
8. Ndenge nini tomonisaka ete tozali kondima mpenza ete ‘mokɔlɔ monene ya Yehova ebɛlɛmi’? (Sef. 1:14; “Tótambola na kondima, kasi na komona te”)
9. (a) Kobɛta libaku to kobɛtisa basusu libaku ezali mpenza likambo ya monene? (Mko. 9:42-48) (b) Ndenge nini tokoki koboya kobɛta libaku? (Nz. 119:165) (c) Ndenge nini tokoki koboya kobɛtisa basusu libaku? (1 Kol. 10:24; “Boyá ‘makambo nyonso oyo ebɛtisaka libaku’ ”)
10. Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati ntango tozali koluka moto oyo tokobalana na ye, komisalisa epai ya monganga, mpe na makambo ya mombongo? (Nz. 26:4; Mat. 6:25; 1 Tim. 6:9; “Batelá makanisi na yo mobimba”)
11. (a) Likambo nini ezalaki komonana mbala mingi ntango bato bazalaki koyamba Yesu epai na bango? (Luka 10:42; 24:32) (b) Ndenge nini tokoki kokokisa mposa na biso ya kominanola na ndenge oyo ekopemisa biso mpenza mpe bato mosusu? (1 Kol. 10:31-33; “Makambo ya malamu oyo epemisaka”)
12. Na kotalela Nzembo 23, mapamboli nini tozali kozwa lokola tozali bampate ya Yehova, mpe mikumba nini tozali na yango? (1 Kol. 10:21; “Yehova azali Mobateli na mpate mpo na biso”)
13. Ndenge nini baklisto batosaka toli ya ‘komisombela ntango oyo ebongi’? (Ef. 5:16; “Tómisombela ntango oyo ebongi”)
14. (a) ‘Ngonga ya kosambisa’ oyo elobelami na Emoniseli 14:7, esangisi makambo nini? (b) Ndenge nini tomonisaka polele ete tokabwani mpenza na Babilone Monene? (“ ‘Bókɛngɛlaka’—Ngonga ya kosambisa eyei”) (c) Makambo nini osepelaki na yango mingi na kati ya mwa buku Bókɛngɛlaka!?
15. Tángá bizaleli misato oyo tosengeli na yango mpo ‘tótika nzela ya semba’ te. (2 Pet. 2:15; “Kebá ete ‘otika nzela ya semba’ te”)
16. Ndenge nini bilenge bakoki kokima “nzela ya bato mabe”? (Mas. 4:14; “Bilenge—Bótambola na nzela ya boyengebene”)
17. (a) Na makambo nini Paulo azalaki mpenza ndakisa eleki malamu ya koyika mpiko? (Mis. 14:19, 20; 16:25-33) (b) Mpo na nini tosengeli te kobanga bato oyo batɛmɛlaka losambo ya solo? (Drame mpe lisukulu: “Pesá litatoli malamumalamu lelo atako botɛmɛli ezali”)
18. Mapamboli nini bato oyo batambolaka elongo na Nzambe bazwaka? (“Kotambola elongo na Nzambe epesaka mapamboli sikoyo mpe mpo na libela”)
Tiká tómityela mokano ya kotosa ‘liloba nsima na biso’ mpo na kotambola elongo na Tata na biso ya likoló libela na libela.—Yis. 30:21; Yoa. 3:36.