Eteni 4—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Lakisá moyekoli ndenge ya komibongisaka
1 Moyekoli oyo atángaka lisolo liboso ya koyekola, oyo atyaka bilembo na biyano, mpe akanisaka ndenge akoloba yango na maloba na ye moko, akolaka noki na elimo. Yango wana, soki obandi koyekola na moto moko, bongisá lisolo moko elongo na ye mpo na komonisa ye ndenge ya komibongisa. Mpo na bayekoli mingi, ezalaka malamu kobongisa mokapo to liteya mobimba elongo.
2 Kotya bilembo mpe kokoma makanisi na mopanzi ya lokasa: Lakisá ye ndenge ya komona biyano ya mituna oyo ezali na mokanda. Lakisá moyekoli mokanda na yo ndenge otyá bilembo kaka na maloba ya ntina. Ntango bozali koyekola, akoki kolanda ndakisa na yo, mpe kotya bilembo na mokanda na ye, kaka na maloba oyo ekosalisa ye ayeba eyano mbala moko. (Luka 6:40) Na nsima, sɛngá ye apesa eyano na maloba na ye moko. Yango ekosalisa yo oyeba soki azali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo azali koyekola.
3 Likambo mosusu ya ntina oyo moyekoli asengeli kosala ntango azali kobongisa boyekoli, ezali ya kotalela malamumalamu bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te. (Mis. 17:11) Salisá ye amona ndenge vɛrsɛ mokomoko oyo batii maloba na yango na lisolo te esimbi likambo moko oyo balobeli na paragrafe. Lakisá ye ndenge ya kokoma, na mokuse, mwa makanisi na mopanzi ya lokasa. Salisá ye amoni ete makambo oyo azali koyekola euti mpenza na Biblia. Na ntango ya boyekoli, lendisáká ye asalelaka mingi bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te ntango azali kopesa biyano.
4 Koyeba lisolo na mokuse mpe bozongeli: Liboso moyekoli abanda kotalela likambo mokomoko ya lisolo oyo alingi kobongisa, ekozala malamu aluka naino koyeba lisolo yango na mokuse. Monisá ye ete akoki koyeba lisolo na mokuse soki atángi motó ya likambo, mitó ya makambo mike, mpe atali bililingi. Monisá ye ete liboso asilisa komibongisa, ekozala malamu azongela makanisi ya ntina ya lisolo yango, mbala mosusu akoki kosalela etanda ya bozongeli, soki ezali. Yango ekosalisa ye akanga makambo oyo ayekoli.
5 Soki olakisi moyekoli kobongisa boyekoli malamu, yango ekosalisa ye apesaka biyano ya malamu na makita ya lisangá. Yango ekosalisa ye mpe akóma na momeseno malamu ya koyekolaka ye moko, oyo ekopesa ye matomba ata ntango bokosilisa koyekola.