Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/05 lok. 4
  • Programɛ ya libota​—Makita ya lisangá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ ya libota​—Makita ya lisangá
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tómonisa bosepeli mpo na makita ya Boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 5/05 lok. 4

Programɛ ya libota​—Makita ya lisangá

1 Soki ozali moboti oyo azali moklisto, okolinga bana na yo bákola malamu, bálinga Yehova mpe básalela ye, mpe na nsuka bázwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Ndenge nini okoki kosalisa bango bátya losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango? Eloko oyo ekosalisa bango mpenza ezali nde ndakisa na yo. (Mas. 20:⁠7) Ndeko mwasi moko akanisi ndakisa ya mama na ye oyo azalaki Motatoli, alobi boye: “Tozalaki komituna te soki tokokende na makita to te.” Likambo yango etikalá libela na makanisi na ye.

2 Libota na yo bamonaka ete makita ezali na ntina? Mateya oyo tozwaka na makita wana epesaka biso makasi ya kokoba kosala mokano ya Nzambe, mpe ndenge tokutanaka na bandeko kuna elendisaka biso mpenza. (Yis. 54:13; Lom. 1:​11, 12) Nzokande, mokano ya libosoliboso ya makita yango ezali ya kopesa Yehova lokumu “kati na koyangana monene.” (Nz. 26:12) Makita ya lisangá epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingaka Yehova mpe tondimi kosambela ye.

3 “Bókeba mpenza”: Soki tokangi ntina ete makita na biso ezali ya bosantu, ‘tokokeba mpenza’ ete tókolisa te mokemoke ezaleli ya kozangisaka makita mpo na makambo oyo ezali mpenza na ntina mingi te. (Ef. 5:​15, 16; Ebe. 10:​24, 25) Ntango ozali kosala programɛ ya libota na yo, okoki kokoma naino ngonga oyo lisangá na bino esalaka makita. Na nsima salá makasi mpo makambo mosusu ebebisa programɛ yango te. Salá nyonso mpo libota mobimba bátyaka likambo ya koyangana na makita na esika ya liboso.

4 Tolendisamaka te ntango totángaka ete bandeko na biso bazali kolonga mikakatano minene mpo na koyangana na makita mpe na mayangani? Ata soki koyangana na makita ezalaka likambo ya mpasi te mpo na yo, ekoki kozala ete okutanaka mpe na mikakatano. Satana azali kaka kobakisela basaleli ya Yehova Nzambe mikakatano mpo bátika kosambela Ye. Atako bongo, zalá na kondima ete bana na yo bakozanga te kotya likebi na milende oyo libota na yo mobimba bazali kosala mpo na koyangana na makita. Lisusu, soki osali bongo, okoki kopesa bango likabo ya elimo oyo bakobosana yango soki moke te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto