Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Eteni 11: Tósalisa bayekoli bázongelaka bato oyo basololaki na bango
1 Ntango moyekoli ya Biblia abandi kobima na mosala ya kosakola, akokutana na bato oyo bakosepela na nsango malamu. Ndenge nini tokoki kosalisa mosakoli ya sika ayeba ndenge ya malamu ya kozongela bato oyo asololaki na bango mpe ayeba ndenge ya kokolisa mposa ya bato oyo basepelaki na nsango malamu?
2 Mpo na kozongela moto, esɛngaka kobongisa yango banda na mbala ya liboso oyo okutani na ye. Lendisá moyekoli amibanzabanzaka mpenza mpo na bato oyo asololaki na bango. (Filp. 2:4) Salisá ye mokemoke ayeba ndenge ya kosalisa bato oyo azali kosolola na bango mpo bábimisaka polele makanisi na bango, salisá ye atyaka matoi na biyano na bango, mpe atyaka likebi na makambo oyo etungisaka bango. Soki moto moko asepeli na nsango malamu, sɛngá mosakoli ya sika akoma makambo nyonso oyo etali moto yango, oyo ekosalisa ye ntango akozongela ye. Salelá makambo oyo akokoma mpo na kosalisa ye abongisa masolo oyo akosolola na moto yango mbala ya nsima.
3 Komibongisa mpo na kozongela bato: Talelá elongo na moyekoli lisolo oyo bosololaki na moto mbala ya liboso, mpe monisá ye ndenge ya kopona likambo moko etali nsango ya Bokonzi oyo ekobonga mpenza na moto oyo bosololaki na ye. (1 Kol. 9:19-23) Bóbongisa elongo lisolo moko oyo bokotánga vɛrsɛ moko, mpe paragrafe moko na mokanda moko oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato. Longolá yango, bóbongisa motuna moko oyo bokoki kotuna na nsuka ya lisolo, oyo ekopesa bino nzela ya kozongela moto yango. Lakisá mosakoli ya sika ndenge ya kosalisa moto na kokolisa boyebi na ye ya Liloba ya Nzambe mbala nyonso oyo akei kotala ye.
4 Ezali mpe malamu kolakisa moyekoli maloba mokuse ya ebandeli mpo na kobanda lisolo soki azongeli moto. Nsima ya kopesa moto oyo azali kosolola na ye mbote, akoki koloba boye: “Nasepelaki mingi na lisolo na biso ya mbala eleki, mpe nayei koyebisa yo makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na likambo yango [lobelá lisolo oyo bosololaki].” Osengeli mpe komonisa mosakoli ya sika ndenge oyo akoki kosala soki moto mosusu nde ayambi ye na esika ya moto oyo basololaki na ye.
5 Kozala na molende mpo na kozongela bato: Lendisá moyekoli azala ndakisa malamu na likambo etali kozongela nokinoki bato oyo basepelaki na nsango malamu. Mpo na kokuta bato na bandako, ekoki kosɛnga kozongela bango mbala na mbala. Teyá moyekoli ndenge ya koyokana na moto mpo na kozongela ye, mpe salisá ye amona ntina ya kozongelaka bato ndenge alakaki bango. (Mat. 5:37) Salisá moyekoli azalaka na boboto mpe na limemya ntango azali koluka bato oyo bakokani na bampate mpe kosalisa bango básepela na nsango malamu.—Tito 3:2.