Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 7
  • Kopesa litatoli kozanga koloba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopesa litatoli kozanga koloba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tópesa litatoli na kozaláká na etamboli malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Ozali kotika elimo ya Nzambe ekamba yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 7

Kopesa litatoli kozanga koloba

1 Biloko oyo Yehova akelá, atako elobaka te, elakisaka polele bizaleli na ye oyo ezangi komonana. (Nz. 19:​1-3; Lom. 1:20) Ndenge moko mpe, etamboli na biso ya malamu, bizaleli na biso ya boklisto, mpe molato na biso ezangi mindɔndɔ, epesaka litatoli kozanga ete tóloba. (1 Pet. 2:12; 3:​1-4) Mposa ya mokomoko na biso esengeli kozala ya ‘kokómisa kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso’ na etamboli na biso ya malamu.​—⁠Tito 2:⁠10.

2 Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki kosala ete mateya ya Biblia emonana kitoko? Bakoki kosala yango kaka soki batiki Liloba ya Nzambe mpe nguya ya elimo santu etambwisa bango. (Nz. 119:105; 143:10) Liloba ya Nzambe “ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale.” (Ebe. 4:12) Liloba yango ekɔtaka na kati ya motema na biso mpe etindaka biso tólata bomoto ya sika. (Kols. 3:​9, 10) Elimo santu ebotaka epai na biso bizaleli malamu, lokola motema malamu, bolamu, boboto, mpe komipekisa. (Gal. 5:​22, 23) Otikaka Liloba ya Nzambe mpe elimo na ye esala na bomoi na yo?​—⁠Ef. 4:30; 1 Tes. 2:⁠13.

3 Bato bazali komona: Ntango tozali kotosa mitinda ya Yehova na bomoi na biso mpe kosala makasi mpo na komonisa bizaleli na ye, basusu bamonaka. Tózwa ndakisa ya mobali moko oyo baninga na ye ya mosala bazalaki kosɛka ye mpo azali mokuse. Ndeko mwasi moko oyo azalaki mpe kosala na biro yango azalaki ntango nyonso kopesa mobali yango limemya mpe kotosa ye. Yango etindaki ye atuna ndeko mwasi yango mpo na nini azalaki lokola baninga mosusu ya mosala te. Ndeko mwasi alimbolaki ete soki apesaka ye limemya ezali mpo alandaka mitinda ya Biblia na bomoi na ye. Ayebisaki mpe ye elikya kitoko ya Bokonzi ya Nzambe. Mobali yango abandaki koyekola Biblia mpe nsukansuka azwaki batisimo. Ntango mobali yango azongaki na mboka na ye, bandeko na ye bakamwaki mpo na etamboli na ye malamu, mpe mingi na bango bandimaki solo.

4 Na mosala, na eteyelo, to ntango tozali elongo na bandeko mpe na bato ya kartye, na nzela ya etamboli na biso ya malamu mpe ya litatoli oyo topesaka, tokoki kotinda bato bápesa Nzambe nkembo.​—⁠Mat. 5:⁠16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto