Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/06 lok. 3
  • Bapesi biso ndakisa ya bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bapesi biso ndakisa ya bosembo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Bokundoli epai na mokomeli mpe mokɛngɛli na mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 7/06 lok. 3

Bapesi biso ndakisa ya bosembo

1 Mosala ya mobongisi-nzela monene ebandaki na mobu 1937. Mibali mpe basi ya makoki, oyo bamesanaki na mosala ya kosakola, bandimaki kokende kosakola na bisika nyonso oyo ebongiseli ya Yehova etindaki bango. Lelo oyo, bambula mingi na nsima, babongisi-nzela monene bazali kokoba kopesa ndakisa ya bosembo oyo ebongi mpenza tólanda.​—Ebe. 6:12.

2 Bafungolaki nzela: Na ebandeli mpenza, milende ya babongisi-nzela monene esalaki ete mosala ya kosakola ekende liboso. Bazalaki kosalela bafono mpo na koyokisa bato masolo ya Biblia ntango bazalaki kokende kotala bango mpe kozongela baoyo basepelaki na nsango malamu. Bazalaki kosala yango na bingumba ya minene, epai masangá ezalaki. Na nsima, biro ekómaki kotinda babongisi-nzela monene na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi. Bazalaki kozongela bato nyonso oyo basepelaki na nsango malamu mpe koyekola na bango Biblia. Lokola basalaki milende mpenza, bankama ya masangá ya sika efungwamaki. Milende na bango na mosala ya kosakola esali ete ebongiseli ya Yehova ekóma monene ndenge tozali komona yango lelo oyo. (Yis. 60:22) Tii lelo oyo, babongisi-nzela monene bazali kosala mosala monene mpo na kopalanganisa nsango malamu “na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”​—Kols. 1:23.

3 Ndakisa oyo ebongi tólanda: Babongisi-nzela monene mosusu bazali kosala mosala ya ntango nyonso banda bambula mingi. Mbula na mbula, mibali mpe basi wana ya sembo bakutanaka na makambo ndenge na ndenge, oyo esali ete kondima na bango ekóma makasi. (1 Pet. 1:6, 7) Bandimaki komipimela biloko mingi ya malamu mpo na kokende kosala na bisika oyo mposa ya basakoli ezalaki makasi. Sikoyo, mingi bakómi mibange mpe bazali kobundana na mitungisi ya nzoto, to mikakatano mosusu. (2 Kol. 4:16, 17) Atako bongo, bazali ‘naino kobota mbuma na ntango na konuna.’ (Nz. 92:14) Bazali kotya elikya epai ya Yehova mpe bazali kozwa mapamboli mingi.​—Nz. 34:8; Mas. 10:22.

4 Kozanga ntembe, babongisi-nzela monene babongi mpenza kozwa longonya. Soki na lisangá na bino bozali na babongisi-nzela monene, luká mpenza kolekisaka ntango elongo na bango mpe kozwa matomba na mayele na bango. Monisá ete osepelaka na bango na ndenge bazali kokokisa mosala ya kosakola Bokonzi na bosembo mpenza. Tiká ete molende na bango elendisa yo. Baoyo nyonso bazali kolanda ndakisa ya kondima na bango, Yehova akondima bango mpe akopambola bango, mpamba te “baoyo basali na sembo bakosepelisa ye.”​—Mas. 12:22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto