Omityela mokano ya kobanda koyekola na moto Biblia
1 “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoa. 4:35) Na ntembe te, maloba wana ya Yesu Klisto etali mpe baministre baklisto lelo oyo.
2 Ezali naino na bato ya mitema sembo oyo bazali na mposa ya koyeba banzela ya Yehova. Yango emonani polele na motángo ya bato oyo bazali kozwa batisimo mbula na mbula. Soki olingi mpenza kobanda koyekola na moto Biblia, okoki kosala nini?
3 Omityela mokano: Ya liboso, omityela mokano ya kobanda mpe kokoba koyekola na moto Biblia. Kobosanaka mokano yango te ntango ozali kosakola. Lokola mokumba na biso ezali ya koteya mpe kosakola, biso nyonso tosengeli kosalaka makasi tóyekolaka na bato Biblia.—Mat. 24:14; 28:19, 20.
4 Makambo mosusu oyo osengeli kobosana te: Mosakoli mokomoko asengeli kobondelaka Yehova na motema mobimba. Ntango mosusu, tokutanaka na bato oyo babondelaki Nzambe mpo asalisa bango báyeba ye. Ezali mpenza lipamboli monene ndenge Yehova asalelaka biso mpo na kokutana na bato ya ndenge wana mpe koteya bango.—Hag. 2:7; Mis. 10:1, 2.
5 Ndeko mwasi moko abondelaki mpo na kozwa moto ya koyekola na ye Biblia, mpe na nsima, atandaki mwa batrakte oyo elobi Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? na esika na ye ya mosala. Mwasi moko azwaki trakte moko, atángaki yango mobimba, mpe abandaki kotondisa esika ya kosɛnga moto akende koyekola na ye Biblia. Na ntango wana, ndeko mwasi asololaki na ye mpe abandaki koyekola na ye Biblia.
6 Basakoli oyo bameseni koyekola na bato Biblia bakoki kosalisa yo okokisa mokano na yo ya kobanda koyekola na moto Biblia. Bondelá Yehova asalisa yo ozwa moto ya koyekola na ye Biblia, mpe salelá bibongiseli nyonso oyo ekoki kosalisa yo okokisa mokano yango. Ntango mosusu ekoumela te, okoyoka esengo ya koyekola na moto Biblia.