Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/08 lok. 8
  • Tóbɔndisa baoyo bakufeli moto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbɔndisa baoyo bakufeli moto
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Libɔndisi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tósalela malamu mwa búku ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 4/08 lok. 8

Tóbɔndisa baoyo bakufeli moto

1. Mpo na nini bato oyo bakufeli moto bazalaka na mposa ya libɔndisi?

1 Kokufela moto ezalaka likambo ya mpasi mpenza, mingimingi mpo na baoyo bazali na elikya ya Bokonzi te. (1 Tes. 4:13) Bato mingi bamitunaka boye: ‘Mpo na nini bato bakufaka? Bakendaka wapi? Mokolo mosusu, nakomona bandeko to baninga na ngai oyo bakufá?’ Mwa makanisi oyo elandi ekosalisa biso tóbɔndisa bato oyo bakufeli ndeko to moninga, oyo tokutani na bango na mosala ya kosakola.​—⁠Yis. 61:⁠2.

2. Soki tokutani na moto moko oyo azali na mawa makasi, tosengeli kaka koluka koyebisa ye makambo ebeleebele?

2 Na mosala ya ndako na ndako: Tokoki kokutana na moto moko oyo auti kokufela ndeko na ye. Ezali komonana ete azali na mawa makasi? Ezali mpe na ebele ya bandeko na ye na ndako oyo bazali na mawa makasi? Na ntango wana, ekozala malamu te koyebisa ye makambo ebeleebele. (Mos. 3:​1, 7) Ntango mosusu, tokoki kaka koyebisa ye ete likambo yango epesi mpe biso mawa, kotikela ye trakte, zulunalo, to mwa buku oyo ebongi, mpe kokabwana na ye na boboto. Na nsima, tokoki kozongela ye na ntango oyo ebongi mpo na koyebisa ye makambo mosusu ya Biblia oyo ekobɔndisa ye.

3. Soki likoki ezali, bavɛrsɛ nini tokoki kotángela moto oyo azali na mawa makasi?

3 Ntango mosusu, tokoki komona malamu koyebisa moto makambo mwa mingi na mbala ya liboso oyo tokutani na ye. Atako ekozala malamu te na ntango wana tókweisa makanisi na ye oyo eyokani na Biblia te, tokoki kotángela ye elaka ya lisekwa oyo Biblia epesi. (Yoa. 5:​28, 29) To, tokoki kolakisa ye oyo Biblia elobi mpo na bakufi. (Mos. 9:​5, 10) Lisolo moko ya Biblia oyo elobeli moto moko oyo asekwaki ekoki mpe kobɔndisa ye. (Yoa. 11:​39-44) Lisusu, tokoki mpe koyebisa ye maloba ya Yobo, moto ya sembo, oyo emonisaki ete azalaki na elikya epai ya Yehova. (Yobo 14:​14, 15) Liboso tókabwana na ye, tokoki kopesa ye mwa buku Nini ekómelaka biso soki tokufi? to mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi, to mpe mwa buku mosusu to trakte oyo ebongi. To tokoki kotikela ye buku Biblia eteyaka, kolakisa ye mokapo 6, mpe koyokana na ye mpo na kotalela yango mbala ya nsima.

4. Wapi mabaku mosusu oyo tozali na yango ya kobɔndisa bato?

4 Na mabaku mosusu: Soki lisukulu ya kokunda ebembe ekosalema na Ndako ya Bokonzi, mpe bato oyo bazali Batatoli te bakozala wana, tokoki kopesa bango mikanda oyo ekobɔndisa bango. Na bisika mosusu ya kolela bibembe, bato basepelaka kozwa mikanda na biso. Ntango mosusu, bansango oyo epesamaka na bazulunalo, oyo emonisaka ete moto boye to boye akufi, epesaka nzela ete Batatoli bákomela bato ya libota na ye mokanda oyo ekobɔndisa bango. Mosakoli moko akomelaki mobali moko oyo akufelaki mwasi mokanda mpe atyaki batrakte na kati. Na nsima, mobali yango elongo na mwana na ye ya mwasi bakendaki epai ya mosakoli yango mpe mobali yango atunaki ye boye: “Yo nde moto okomelaki ngai mokanda oyo? Nalingi koyeba Biblia malamu!” Mobali yango ná mwana na ye bandimaki koyekola Biblia mpe bakómaki koyangana na makita ya lisangá.

5. Mpo na nini tosengeli koluka mabaku ya kobɔndisa baoyo bazali na mawa?

5 Mosakoli 7:2 elobi boye: “Kokenda na ndako ya kolela eleki malamu kokenda na ndako ya elambo.” Mbala mingi, moto oyo azali na mawa makasi andimaka koyoka Liloba ya Nzambe koleka moto oyo azali na esengo. Biso nyonso tosengeli koluka mabaku ya kobɔndisa bato oyo bazali na mawa mpo bakufeli ndeko to moninga.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto