Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/08 lok. 1
  • Programɛ ya sika ya makita ya lisangá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ ya sika ya makita ya lisangá
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tobengi yo oya koyangana na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Malako mpo na likita Mosala mpe bomoi ya bakristo
    Malako mpo na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 10/08 lok. 1

Programɛ ya sika ya makita ya lisangá

1, 2. Mbongwana nini ekosalema na makita na biso kobanda na Yanuali 2009?

1 Na pɔsɔ ya 21-27 Aprili 2008, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bayokaki liyebisi moko ya esengo. Liyebisi yango elobaki boye: “Kobanda mwa 1 Yanuali 2009, Boyekoli ya Mokanda ya lisangá ekobanda kosalema mokolo moko na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala. Nkombo ya Boyekoli ya Mokanda ya lisangá ekokóma Boyekoli ya Biblia na lisangá.”

2 Programɛ ya makita ya kati ya pɔsɔ: Makita yango nyonso misato, bakisá mpe nzembo mpe mabondeli, ekoumela ngonga moko na miniti 45. Makita ekobanda na loyembo mpe libondeli (min. 5), na nsima tokosala Boyekoli ya Biblia na lisangá (min. 25), mpe tokoleka mbala moko na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (min. 30). Nsima na yango, tokoyemba loyembo (min. 5) mpo na kobanda Likita ya Mosala (min. 35). Makita ekosuka na loyembo mpe libondeli (min. 5). Programɛ ya Boyekoli ya Biblia na lisangá, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe Likita ya Mosala ekobanda kobima sanza nyonso na Mosala na biso ya Bokonzi, mpo na kosalisa bino bómibongisaka mpo na makita yango.

3. Ndenge nini Boyekoli ya Biblia na lisangá ekobanda kotambwisama?

3 Boyekoli ya Biblia na lisangá: Likita yango ekobanda kosalema ndenge boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalemaka. Ekozala na ntina te kozongela makambo oyo elobamaki na pɔsɔ eleki. Maloba ya ebandeli ya likita yango esengeli kozala molai te. Yango ekotikela bayangani ntango ya kopesa biyano ya mikuse. Mokɛngɛli-mokambi akopona bankulutu oyo bakobanda kotambwisa likita yango, nkulutu moko na pɔsɔ moko.

4. Mbongwana nini ekosalema na Likita ya Mosala?

4 Likita ya Mosala: Likita ya Mosala ekobanda kosalema kaka ndenge esalemaka sikoyo, kasi masolo na yango ekokóma mikuse. Mayebisi ekobanda koumela miniti mitano. Miniti wana ekoki mpo na kopesa mayebisi ya ntina mpe mikanda mosusu ya biro. Esengeli te kotánga na estrade mayebisi lokola oyo etali bibongiseli ya mosala ya kosakola, programɛ ya kotya bopɛto, lapolo ya kɔnti, mikanda ya biro oyo ezongelamaka mbala na mbala; esengeli nde kotya yango na etanda ya mayebisi mpo bandeko bátánga bango moko. Bandeko oyo bakosala masolo basengeli komibongisa malamu, kotosa ngonga oyo epesami, mpe kolanda malamumalamu malako oyo epesami.

5. Programɛ ya makita ekozala ndenge nini na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá?

5 Ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá: Programɛ ya makita na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá ebongwani te. Na Mwamibale, nsima ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala, tokoyemba loyembo. Na nsima, mokɛngɛli ya zongazonga akosala lisukulu ya miniti  30. Na mpokwa ya mokolo mosusu ya pɔsɔ yango, tokosala Boyekoli ya Biblia na lisangá, na nsima tokoyemba loyembo, mpe nsima na yango mokɛngɛli ya zongazonga akosala lisukulu ya mosala ndenge esalemaka sikoyo. Makita ekosuka na loyembo mpe libondeli.

6. Mokumba ya mokɛngɛli na etuluku ezali nini?

6 Makita mpo na mosala ya kosakola: Lisangani ya bankulutu bakopesa bakɛngɛli na bituluku mokumba ya kolandela bituluku ya mosala ya kosakola mpe kosalisa mosakoli mokomoko ya etuluku yango. Soki mosaleli na misala nde akokokisa mokumba yango, akobengama “mosaleli na etuluku.”

7. Programɛ ya sika ya makita ya lisangá ekopesa biso matomba nini?

7 Ndenge tomoni yango, programɛ wana ya sika ya makita ekopesa biso libaku ya kozwa ebele ya mateya oyo ekosalisa biso tókóma na boyokani makasi na Yehova. Yango ekosalisa biso tózala basakoli mpe bateyi ya malamu, oyo babongisami mpo na kosakola na ndenge oyo ekobota mbuma.​—⁠Ef. 4:​13, 14; 2 Tim. 3:⁠17.

8. Na ndenge nini kobongisa makita liboso ekosalisa biso moko mpe basusu?

8 Kobongisa makita yango liboso ekosalisa biso tótya likebi na makanisi ya ntina ntango likita mokomoko ezali kosalema. Tokozwa likoki ya kopesa biyano na makita, mpe na ndenge yango tokolendisana. (Lom. 1:​11, 12; Ebe. 10:24) Mokano na biso esengeli kozala ya “kosembola liloba ya solo malamumalamu” mpo ‘bokoli na biso emonana polele.’​—⁠2 Tim. 2:15; 1 Tim. 4:⁠15.

9. Tosengeli kozala na mokano nini, mpe mpo na nini?

9 Tosepeli mpenza na mbongwana monene oyo esalemi na programɛ ya makita na biso. Tiká ete biso nyonso tókoba kolanda litambwisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe tókoba kotikala pene na Mobateli na biso Monene, wana azali kobongisa biso mpo na “bolɔzi” monene oyo ekómi pene.​—⁠Mat. 24:​21, 45; Ebe. 13:​20, 21; Emon. 7:⁠14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto