Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yanuali
“Okanisi ete Nzambe amibanzabanzaka ndenge bato bazali kobebisa zamba, mai mpe mopɛpɛ? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Emoniseli 11:18.] Lisolo oyo emonisi bantina oyo euti na Biblia, oyo ezali kosalisa biso tózala na elikya ete mabelé ekobonga.” Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 18.
Lamuká! Yanuali
“Soki bakutani na mikakatano, bato mingi bakanisaka ete Nzambe nde azali kopesa bango etumbu. Esilá kokómela yo okanisa ndenge wana? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yakobo 1:13.] Lisolo oyo emonisi esika bampasi na biso eutaka mpe ntina oyo tokoki kozala na elikya ete mosika te bampasi na biso ekosila.” Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 28.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali
“Okanisaka ete Nzambe andimaka mangomba nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká likambo oyo Yesu alobaki awa. [Tángá Matai 15:8, 9.] Lisolo oyo emonisi soki Nzambe andimaka mangomba nyonso.” Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 9.
Lamuká! Febwali
“Biloko nyonso oyo ezali awa na mabelé emonisaka ete mabelé esalemaki mpo bikelamu ya bomoi efanda wana. Okanisi ete esalemá bongo kaka yango moko, to ondimaka ete Mozalisi moko akelaki yango? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bandimaka likambo vɛrsɛ oyo elobi. [Tángá Nzembo 104:24.] Zulunalo oyo elimboli makambo oyo siansi mpe Biblia elobi, oyo ezali kondimisa ete Mozalisi azali.”