Tókumisaka Yehova mokolo na mokolo
1. Basaleli ya Nzambe bazalaka na mposa ya kosala nini, mpe mpo na nini?
1 Mokonzi Davidi alobaki ete azalaki na ekateli ya kokumisa Yehova “mokolo mobimba,” mpe mpo na libela. (Nz. 145:2, 7, 21, NW) Biso mpe tozali na bantina malamu ya kokumisa Yehova mokolo na mokolo.—Nz. 37:10; 145:14, 18; 2 Pet. 3:13.
2. Ndenge nini mabota bakoki kokumisa Yehova mokolo na mokolo?
2 Na ndako na biso: Na mikanda ya moombo ya sembo, tokoki kozwa makanisi ya ntina oyo tokoki kolobela ntango tozali kotalela mokapo ya mokolo, ntango tozali koyekola na libota, mpe ntango tozali kobongisa makita. Mabota mingi bazali na momeseno ya kolya esika moko ata mbala moko na mokolo. Yango esalisaka bango bázwa ntango ya kosolola na kimya mpe na esengo mpe epesaka bango libaku ya kokumisa Yehova. Na mabaku yango, baboti bakɔtisaka masolo oyo ekoki kosalisa bango bábɔkɔla bana na bango na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Ef. 6:4; Det. 6:5-7.
3. Mabaku nini ya kokumisa Yehova tozalaka na yango ntango tozali elongo na bandeko?
3 Ntango tozali ná bandeko: Tozwaka mabaku ya kokumisa Yehova ntango tozali elongo na bandeko na biso baklisto na mosala ya kosakola to na makita. (Mas. 15:30; Filp. 4:8; Ebe. 13:15) Lokola biso ná bango tolingaka Yehova, ezali mpasi te ete ntango tozali kosolola, tólobela makambo oyo ezali komonisa botɔndi na biso mpo na bolamu ya Yehova.—Nz. 106:1.
4. Na mabaku nini okoki kokumisa Yehova?
4 Ntango tozali kosolola ná bato mosusu: Atako misala mpe makambo mosusu epesaka biso nzela te ya kobima na mosala ya kosakola mikolo nyonso, kolobela ata na mokuse Yehova mpe mikano na ye epai ya baninga na biso ya mosala, ya kelasi, to bato mosusu, ekoki kosalisa bato ya mitema sembo bázwa elikya. (Nz. 27:14; 1 Pet. 3:15) Ndeko mwasi moko oyo azalaki kosala mobembo na mpɛpɔ, azwaki libaku ya kopesa litatoli epai ya mwasi moko oyo afandaki pembeni na ye. Makambo oyo mwasi yango ayokaki esepelisaki ye mingi mpe elendisaki ye. Na yango, bapesanaki baadrɛsi mpe banimero ya telefone mpo básolola lisusu. Lokola mikakatano ezali se kobakisama mpe makambo mingi ya bomoi ezali se kobeba, basaleli ya Yehova bazali kokoba komemela bato oyo bakosepela koyoka “nsango malamu ya eloko moko ya malamu koleka.” Yango ezali kopesa bango elikya mpe ezali kotinda bango bákumisa Yehova.—Yis. 52:7; Lom. 15:11.
5. Mpo na nini tozalaka na mposa ya kokumisa Yehova, mpe yango ekoki kozala na litomba nini?
5 Yehova asepelaka mpenza ntango ayokaka basaleli na ye bazali kokumisa ye mokolo na mokolo! Bikelamu ya Yehova oyo tozali komona zingazinga na biso ekumisaka ye; biso mpe tokoki kokumisa Yehova mokolo na mokolo ntango tozali na ndako, ntango tozali elongo na bandeko, mpe ntango tozali kosolola na bato mosusu oyo bazali naino basanzoli ya Yehova te.—Nz. 19:1-4.