Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛtɛmbɛ
“Bato mingi balobaka ete lisolo ya Adama ná Eva ezali kaka lisapo. Nzokande, bato mosusu bandimaka ete Adama ná Eva bazalaki mpenza. Yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Yesu alobaki mpo na bango. [Tángá Malako 10:6-9.] Lisolo oyo ezali kolobela makambo oyo emonisi ete Adama ná Eva bazalaki mpenza bato ya solo mpe mpo na ntina tosengeli kondima yango.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 12.
Lamuká! Sɛtɛmbɛ
Tángá 1 Yoane 4:8. Na nsima lobá boye: “Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe anyokolaka bato mabe libela na libela na lifelo. Bato mosusu bakanisaka ete konyokola bato na mɔtɔ eyokani te na makanisi oyo touti kotánga. Okanisi boni? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia eteyaka na likambo yango.” Lakisá ye lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔtɔbɛ
“Biso nyonso tokutanaka na mikakatano. [Lobelá mwa mikakatano oyo bato mingi bakutanaka na yango na teritware na bino.] Okanisi ete Nzambe akoki kosalisa biso na makambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Na vɛrsɛ oyo, Yesu amonisi eloko moko oyo Nzambe asalelaka mpo na kosalisa biso. [Tángá Luka 11:13.] Zulunalo oyo elimboli soki elimo santu ezali nini mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso.”
Lamuká! Ɔkɔtɔbɛ
“Mabota nyonso ezalaka na mikakatano. Mpo na yo, epai wapi mabota ekoki kozwa batoli ya malamu? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Nzembo 32:8.] Lamuká! oyo ya ntina mingi ezali kolobela mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso mpenza soki tosaleli yango na kati ya mabota.”