Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/09 nk. 3-5
  • Tóbosana te bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbosana te bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Ntango tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli epai ya moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Olobaka ‘monoko ya peto’ malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 11/09 nk. 3-5

Tóbosana te bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya

1. Likambo nini tokutanaka na yango ntango tosakolaka na teritware na biso?

1 Yesu Kristo asakolaki ete nsango malamu ekosakolama na mabele mobimba “mpo na litatoli na bikólo nyonso.” Moto nyonso oyo asalaka mosala ya kosakola mpe koteya abosanaka te ete maloba yango ezali na ntina mingi. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Ntango tobimaka mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli, ntango mosusu tokutanaka na bato ya bikólo ndenge na ndenge oyo balobaka minɔkɔ mosusu. Bato yango mpe basengeli kozwa libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi mpe kondima solo liboso mokolo ya nsɔmɔ ya Yehova eya. (Mal. 3:18) Tokoki kosala nini mpo tóbosana bato yango te na teritware na biso?

2. Tokomekola Yehova na likambo nini ntango tozali kosakwela bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu?

2 Tótalela bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu ndenge Yehova atalelaka bango: Mpo tómonisa bato nyonso ya teritware na biso bolingo ya Yehova, tosengeli kozala na mposa makasi ya kosalisa bango bázwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe ya solo, Yehova, ata soki balobaka monɔkɔ nini. (Nz. 83:18; Mis. 10:34, 35) Atako tolukaka libosoliboso bato oyo balobaka monɔkɔ oyo tolobaka na lisangá na biso, tosengeli kotyelaka bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu likebi mpe koluka ndenge oyo tokoki koyebisa bango nsango ya Bokonzi. Soki tobosani bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu, tokokokisa te mokano ya Yehova oyo alingi ete bato ya bikólo nyonso bázwa litatoli. Na yango, ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ na biso te?

3. Mokanda nini ya malamu mingi lisangá ebimiselá biso, mpe ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kosalela yango?

3 Salelá mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations: Mwa buku yango ebongisami mpo tósalelaka yango ntango tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ na biso te. Zaláká na mwa buku yango ntango nyonso, luká koyeba ndenge ebongisami, mpe zaláká pene ya kosalela yango. Mpo omona noki esika oyo olingi kozwa, tyá bilembo na nkasa oyo ezali na minɔkɔ ya bapaya oyo bokutanaka na bango mingi na teritware na bino. Soki bozali na mikanda na minɔkɔ yango, ezali malamu kozala na mwa ndambo ya mikanda yango mpo na kopesa moto nsima ya kotángisa ye makambo oyo ezali na mwa buku.

4. Ndenge nini tokoki kosalela mwa buku Nations na mosala ya kosakola?

4 Soki na mosala ya kosakola okutani na moto moko oyo azali koloba monɔkɔ ya bapaya mpe oyebi te soki ezali monɔkɔ nini, fungolá ezipeli ya mwa buku yango. Balolá na esika oyo karte ya mokili ezali, omilakisa mosapi, mpe na nsima lakisá mosapi na mboka oyo bozali; lisusu, monisá moto yango ete olingi koyeba soki azali moto ya mboka nini mpe monɔkɔ nini alobaka. Ntango oyebi monɔkɔ oyo alobaka, talá na etanda ya makambo oyo ezali na kati (table des matières) mpe luká lokasa oyo monɔkɔ yango ezali mpe lakisá ye makomi ya moindo makasi oyo ezali na likoló; na nsima, monisá ye ete osepeli atánga makambo oyo ekomami wana. Soki asilisi kotánga, pesá ye trakte moko na monɔkɔ na ye to lakisá ye makambo oyo ezali na mwa langi likoló na yango, oyo elobi ete okosepela kozongela ye mpe koyela ye mokanda oyo ekomami na monɔkɔ oyo alobaka. Na nsima, lakisá ye maloba oyo elimboli “nkombo na ngai,” oyo ekomami na langi ya moindo makasi, mpe yebisá ye nkombo na yo. Lakisá ye esika mosusu oyo ezali na makomi ya moindo makasi, oyo elimboli “nkombo na yo nani?” mpe zelá ye apesa eyano. Yokaná na ye mokolo oyo okozongela ye.

5. Tosengeli kosalaka nini nsima ya kosolola na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu, oyo asepeli na nsango malamu?

5 Bibongiseli mpo ndeko oyo ayebi monɔkɔ akende kotala ye: Tosengeli kosala nyonso mpo na kotala bato oyo basepeli na nsango ya Bokonzi, ata soki balobaka monɔkɔ na biso te. Ntango kaka tomoni ete moto azali mpenza na mposa ya koyeba Nzambe mpe Liloba na ye, Biblia, tosengeli kotondisa lokasa Veuillez suivre l’intérêt (S-43) mpe kopesa yango nokinoki epai ya sekrɛtɛrɛ, oyo akotinda yango na biro ya filiale mpo ndeko moko oyo alobaka monɔkɔ ya moto wana akende kotala ye. Biro ya filiale ekotinda lokasa yango na lisangá to na etuluku ya monɔkɔ wana. Ntango bazwi yango, bakoluka nokinoki kokutana na moto yango. Sekrɛtɛrɛ akoki kopesa mokɛngɛli na mosala ya kosakola kopi ya lokasa yango mpo ayebaka soki bato mingi oyo balobaka monɔkɔ moko boye bazali kosepela na nsango malamu. Esengeli kotondisa lokasa yango kaka soki moto asepeli mpenza na nsango malamu.

6. Soki tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu, oyo asepeli na nsango malamu, tokozala na mokumba nini?

6 Ekoki koleka mwa ntango banda lokasa S-43 etindami tii ntango mosakoli oyo ayebi monɔkɔ ya bapaya akokutana na moto oyo asepelaki. Yango wana, mpo moto yango abungisa te mposa oyo amonisi, mosakoli oyo atondisaki lokasa S-43 akoki kokoba kokolisa mposa na ye tii ntango akokutana na mosakoli oyo alobaka monɔkɔ na ye. Ntango mosusu, akoki kobanda boyekoli ya Biblia na moto yango. Kasi, na ntango yango, ndenge nini mosakoli akoki kozwa mikanda na monɔkɔ oyo moto yango alobaka?

7. Ebongiseli nini tokoki kosalela mpo na kozwa mikanda na monɔkɔ ya bato oyo tokutani na bango?

7 Mikanda na minɔkɔ mosusu: Esengeli te ete masangá ebombaka ebele ya mikanda ya minɔkɔ mosusu. Nzokande, soki mokɛngɛli na mosala ya kosakola amoni ete bato mingi oyo balobaka monɔkɔ moko boye bazali kosepela na nsango malamu, akoki komona malamu lisangá ezala na mwa mikanda na monɔkɔ yango mpo basakoli bábimaka na yango. Soki mikanda ezali te na monɔkɔ yango, bakoki kosɛnga yango. Ekoki koleka mwa ntango liboso mikanda ya monɔkɔ mosusu ekóma na lisangá. Yango wana, likoki ezali ya kozwa mikanda na Internet, na site oyo: www.watchtower.org. Lokola batye mikanda na minɔkɔ ebele na site yango, mosakoli to moto oyo asepeli na nsango malamu akoki komona mikanda ya monɔkɔ na ye. Na ntembe te, ebongiseli yango ezali malamu mpo na kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu bábungisa te mposa oyo bamonisaki.

8. Lisangá ezali na mokumba nini mpo moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu, oyo asepeli na nsango malamu, abungisa mposa te?

8 Mokumba ya lisangá: Na bisika mosusu oyo ebele ya bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu bazali koya, ekoki kozala ete ezali na lisangá ata moko te oyo basalaka makita na monɔkɔ wana. Yango wana, soki bato oyo balobaka monɔkɔ yango basepeli na nsango malamu, esengeli kolendisa bango báyanganaka na makita ya lisangá na bino. Lokola bokoyamba bango na esengo mpe bokotyela bango likebi, ekoki kolendisa bango báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ. Na ebandeli, mwa mokakatano ekoki kozala mpo bayebi monɔkɔ na bino te; nzokande, mokakatano ezalaka te mpo na bolingo ya bokristo na lisangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. (Sef. 3:9; Yoa. 13:35) Olobaka monɔkɔ moko ya bapaya malamu? Soki oyebi koloba monɔkɔ moko boye mpe ozali na mposa ya kosalisa bato oyo balobaka yango, oyo bandeko mosusu bakoki kokutana na bango na mosala ya kosakola, sololá na sekrɛtɛrɛ ya lisangá na bino mpo ayebisa biro ya filiale. Yango ekosalisa mingi ntango biro elingi koluka mosakoli oyo ayebi monɔkɔ yango mpo akende kotala moto oyo asepeli.

9. Ntango nini kelasi ya koyekola monɔkɔ ya bapaya ekoki kosalema, mpe moto asengeli koyekola monɔkɔ yango na mokano nini?

9 Koyekola monɔkɔ: Ntango bozali koyekola na bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu, ezali malamu mingi kolendisa bango bábanda koyangana na makita na monɔkɔ oyo balobaka, soki likoki ezali. Nzokande, soki likoki ezali te, basakoli mosusu bakoki kozwa ekateli ya koyekola monɔkɔ yango mpe na bongo, bakozala na makoki ya kosalisa bato oyo bazali kosepela. Soki lisangá moko ya monɔkɔ yango ezali zingazinga te, biro ya filiale ekoki kozwa meko ete lokola bato mingi, bázala bapaya to bana-mboka, bazali koloba monɔkɔ moko boye, bibongiseli ezwama mpo na kotángisa bandeko oyo balingi koyekola monɔkɔ yango. Soki ebongiseli ya ndenge wana esalemi, biro ya filiale ekoki koyebisa masangá ya zingazinga mposa oyo ezali na teritware yango mpe ekopesa liyebisi ete kelasi esalemi mpo na bato oyo balingi koyekola monɔkɔ yango. Bandeko oyo bakopesa nkombo mpo na koyekola monɔkɔ wana basengeli kozala na mokano ya kokende kopesa mabɔkɔ na etuluku to lisangá ya monɔkɔ wana mpo na kosakwela bato oyo balobaka monɔkɔ yango.

10. Ntango nini etuluku ya monɔkɔ ya bapaya ekoki kosalema, mpe esengeli kotalela makambo nini?

10 Ndenge ya kosala etuluku: Mpo etuluku moko ya monɔkɔ ya bapaya esalema, esengeli kokokisa makambo minei ya ntina. (1) Esengeli komonana ete bato mingi oyo balobaka monɔkɔ yango bazali kosepela mpe bokoli ekoki komonana. (2) Esengeli kozala na mwa etuluku ya basakoli oyo bayebi monɔkɔ yango to bazali koyekola yango. (3) Esengeli kozala na nkulutu to mosaleli na misala moko ya makoki oyo akokamba etuluku yango mpe akotambwisa ata likita moko na monɔkɔ wana pɔsɔ na pɔsɔ. (4) Lisangani moko ya bankulutu esengeli kondima kopesa etuluku yango mabɔkɔ. Soki makambo yango minei ekokisami, lisangani ya bankulutu ekokomela biro ya filiale mpo na koyebisa makambo ya etuluku yango mpe ekosɛnga ete biro etánga yango lokola lisangá oyo ezali na etuluku moko ya monɔkɔ ya bapaya. (Talá Tobongisami, nk. 106-107.) Nkulutu oyo azali kotambwisa etuluku yango akobengama “mokɛngɛli ya etuluku”; soki mosaleli na misala nde azali kotambwisa yango, akobengama “mosaleli ya etuluku.”

11. Mpo na nini tokoki koloba ete kosakwela bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya na teritware na biso ezali libaku malamu?

11 Kozwa bibongiseli mpo na kosakwela bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya na teritware na biso ezali likambo ya ntina mingi na mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo Yesu Kristo, Ndakisa na biso, abandisaki. Tiká tósala nyonso oyo tokoki mpe tózela ndenge Yehova akokoba koningisa bikólo mpo na kokɔtisa biloko kitoko. (Hag. 2:7) Tozali mpenza na esengo ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango! Tiká Yehova apambola milende oyo biso nyonso tozali kosala mpo na kosakwela bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya na teritware na biso mpe tóbosana te ete ata soki minɔkɔ ezali kokabola bato, Nzambe akoki kokolisa!​—1 Ko. 3:6-9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto