Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli epai ya moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu
Mpo na nini ezali na ntina: Yehova asepelaka ete “na ekólo nyonso,” bato bázala na boyokani malamu na ye. (Mis. 10:34, 35) Yango wana, Yesu amonisaki ete nsango malamu ekosakolama “na mabele mobimba esika bato bafandi” mpe “na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Mosakoli Zekaria asakolaki ete bato ya “minɔkɔ nyonso ya bikólo” bakondima nsango malamu. (Zek. 8:23) Ndenge ntoma Yoane amonaki yango na emonaneli, bato oyo bakobika na bolɔzi monene ekozala bato oyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Em. 7:9, 13, 14) Na kotalela nyonso wana, soki na teritware na biso tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu, tosengeli komeka kopesa ye litatoli.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Na losambo na bino na kati ya libota ya mbala ekoya, bómekameka ndenge ya kopesa litatoli na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu.