Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/11 lok. 2
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Tósalela mikanda na mayele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Saleláká mikanda na biso malamu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Tósalela mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia na mayele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa mikanda na teritware oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 12/11 lok. 2

Biyano na mituna na bino

◼ Nini ekoki kosala ete tótikela moto mikanda?

Likambo ya libosoliboso ya kotalela ezali soki moto yango asepeli na mikanda yango. Soki amonisi ete asepeli mpenza, tokoki kotikela ye zulunalo mibale, to mwa buku moko, to buku moko, to mokanda mosusu oyo tozali kokabola. Tokopesa ye yango ata soki azali na mwa mbongo moke to azali na mbongo te ya kopesa lokola likabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. (Yobo 34:19; Em. 22:17) Nzokande, tokopesa te mikanda na biso oyo ezali na ntina mingi epai ya bato oyo basepelaka na yango te.​—Mat. 7:6.

Ndenge nini moto akoki momonisa ete asepeli? Soki andimi kosolola na biso. Tokoyeba yango ndenge nini? Soki azali kotya likebi ntango tozali koloba, azali koyanola na mituna, mpe azali kobimisa makanisi na ye. Soki azali kolanda ntango tozali kotánga Biblia, yango ekomonisa ete azali na limemya mpo na Liloba ya Nzambe. Mbala mingi, ekozala malamu kotuna ye soki akotánga mikanda oyo tolingi kopesa ye. Basakoli basengeli kozala na bososoli mpo na koyeba soki moto asepeli. Na ndakisa, ntango tozali kosakola na balabala, ekozala malamu te kopesa bazulunalo, to mwa babuku, to babuku kaka bipesela na moto nyonso oyo azali koleka. Soki tozali na likoki te ya koyeba soki moto asepeli to te, ekozala malamu kopesa ye lokasa ya libyangi to trakte.

Ndenge moko mpe, mikanda oyo mosakoli akozwa na esika ya kobomba mikanda na Ndako ya Bokonzi, ekotalela te likoki na ye ya kopesa makabo; kasi ekotalela nde mikanda oyo azali na yango mposa mpo na kokokisa mosala na ye. Makabo oyo epesamaka ezalaka te mpo na kosomba mikanda kasi nde mpo na kosunga na makambo nyonso oyo etali mosala ya kosakola na mokili mobimba. Ezala tozali na makoki mingi to moke, botɔndi oyo tozali na yango ekotinda biso tópesa oyo tokani mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso, kasi te oyo totikali na yango nsima ya kokokisa bamposa na biso. (Mrk. 12:41-44; 2 Ko. 9:7) Botɔndi yango ekotinda mpe biso tózwa kaka mikanda oyo tozali na yango mposa, mpe na ndenge yango tokobebisa te makabo ya mbongo oyo epesamaki mpo na mosala ya Nzambe.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 2]

Basakoli basengeli kozala na bososoli mpo na koyeba soki moto asepeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto